Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/04 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 11/04 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa kobanda mwa 1 tii na 14 Novɛmbɛ: Tokosala kampanye ya monene mpo na kokabola mwa buku Bókɛngɛlaka! Kobanda mwa 15 tii na 30 Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, tokolakisa bango mwa buku Azali kosɛnga. Ntango tozali kosalela mwa buku yango, tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Desɛmbɛ to mwa moke na nsima. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa kɔnti ya makambo etali kobongisaka Ndako ya Bokonzi to kotonga yango, esengeli mpe kotalela bakɔnti yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ya mobu 2004 na komande na bango ya mikanda ya sanza oyo ekolanda. Lokasa “Avis aux congrégations,” oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza, ekomonisa bino soki mikanda yango ekozala na minɔkɔ nini. Tokobomba komande yango tii ntango bavolimi relye yango ekokóma mpe tokotinda yango na masangá. Bavolimi relye ezali na kati ya mikanda oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.

◼ Kobanda na pɔsɔ ya 23 Mai 2005, tokobanda koyekola mwa buku Bókɛngɛlaka! na boyekoli ya mokanda ya lisangá.

◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadrɛsi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adrɛsi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29) mpe bakotinda formilɛrɛ yango noki mpenza na biro ya filiale.

◼ Na mwapɔsɔ 27 Novɛmbɛ 2004, libota ya Betele ekozala na ebongiseli moko oyo ekosalema kaka mpo na bandeko oyo bafandaka kuna. Lisusu, na mwapɔsɔ 4 Desɛmbɛ 2004, bandeko ya Betele bakotya bopɛtɔ na Betele mobimba. Na yango, tolingi koyebisa bino ete bóya na Betele te na mikolo wana mibale.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto