Eteni 5—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Ndenge ya koyeba baparagrafe boni bokoyekola
1 Ntango Yesu azalaki koteya bayekoli na ye, azalaki kotalela makoki na bango, azalaki koloba na bango “na meko oyo bazalaki na likoki ya koyoka.” (Mko. 4:33; Yoa. 16:12) Lelo oyo mpe, bateyi ya Liloba ya Nzambe basengeli koyeba baparagrafe boni basengeli koyekola na moto na boyekoli moko. Yango ekotalela makoki mpe makambo ya bomoi ya moteyi mpe ya moyekoli.
2 Tongá kondima ya makasi: Mpo na bato mosusu, ekoki kosɛnga koyekola likambo moko mbala mibale to misato mpo bákanga ntina na yango; nzokande, basusu bakoki kokanga ntina mbala moko mpamba. Tosengeli te kowela kosilisa mokanda, nzokande moyekoli azali kokanga ntina ya makambo oyo azali koyekola te. Moyekoli nyonso asengeli koyeba mateya ya ntina mpo na kotonga kondima na ye na Liloba ya Nzambe.—Mas. 4:7; Lom. 12:2.
3 Ntango ozali kotambwisa boyekoli pɔsɔ na pɔsɔ, zwáká ntango oyo esengeli mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola na Liloba ya Nzambe mpe andima yango. Kotambwisa boyekoli mbangumbangu te mpo moyekoli akokanga ntina ya mateya ya solo malamu te. Zwá ntango oyo ebongi mpenza mpo na kolobela makanisi ya ntina mpe kotalela bavɛrsɛ oyo esimbi mateya.—2 Tim. 3:16, 17.
4 Kobima na boyekoli te: Atako tosengeli kotambwisa boyekoli mbangumbangu te, tosengeli mpe koboya kolobela makambo kilikili. Soki moyekoli abandi kolobela makambo na ye moko, ekozala malamu tósɛnga ye alobela yango na nsuka ya boyekoli.—Mos. 3:1.
5 Epai mosusu, esengo na biso mpo na solo ekoki kosala ete tókoka te kolobela makambo na mokuse ntango tozali koyekola na moto. (Nz. 145:6, 7) Na bantango mosusu, kolobela likanisi moko to lisolo moko oyo ezali na liteya te ekoki kosalisa moyekoli asimba liteya yango malamu, kasi soki makanisi to masolo yango eleki mingi to ekómi milaimilai, ekobulunganisa ye mpe akozwa boyebi ya sikisiki te ya mateya ya ntina ya Biblia.
6 Soki tozali koyeba baparagrafe boni ebongi tóyekola na moto na moto, tokosalisa bato oyo tozali koyekola na bango Biblia ‘bátambola na pole ya Yehova.’—Yis. 2:5.