Batelá yango
Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Siplema oyo ezongeli makanisi ya ntina ya masolo nyonso oyo elobaki ete tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola, oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi. Tolendisi basakoli nyonso bábomba siplema oyo mpe bátalelaka yango ntango bazali koyekola na bato Biblia. Longolá yango, makanisi oyo ezali na siplema oyo ekoki mpe kosalelama na likita ya mosala ya kosakola, mpe bakɛngɛli na mosala ya kosakola bakoki kosalela yango na masukulu oyo basalaka ntango batalaka bituluku ya boyekoli ya mokanda.
Eteni 1: Boyekoli ya Biblia ezali nini?
Soki ozali kosolola na moto moko mbala na mbala na Biblia, ata soki bolekisi ntango mingi te, kasi soki bosaleli Biblia ná mokanda moko oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato Biblia, ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Tokotánga boyekoli soki toyekoli na moto moko mbala mibale nsima ya koyokana mpe kolakisa ye ndenge boyekoli esalemaka, mpe soki tomoni ete moto yango akokoba koyekola.—km 7/04 lok. 1.
Mikanda oyo tosengeli kosalela mpo na koyekola na bato
◼ Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
◼ Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
◼ Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
◼ Okoki kozala moninga ya Nzambe! ekoki kosalelama mpo na koyekola na bato oyo batángi kelasi mingi te to baoyo bazali na mikakatano mpo na kotánga malamu.
Eteni 2: Ndenge ya komibongisa mpo na kotambwisa boyekoli
Tosengeli kolobela makambo na ndenge oyo ekosimba mpenza motema ya moyekoli. Yango esɛngaka komibongisa malamu na kotalela bamposa ya moyekoli.—km 8/04 lok. 1.
Ndenge ya komibongisa
◼ Lobelá na mokuse motó ya likambo ya mokapo to ya liteya, mitó ya makambo mike, bafoto, bakalati, mpe bitanda na yango.
◼ Luká biyano ya mituna oyo ezali na mokanda mpe tyá bilembo kaka na maloba ya ntina.
◼ Poná bavɛrsɛ oyo bokotánga ntango bokoyekola. Komá mwa makambo pembeni ya lisolo na esika lokasa etikali mpamba.
◼ Bongisá bozongeli ya mokuse ya makanisi ya ntina.
Yokanisá lisolo na bamposa ya moyekoli
◼ Bondelá mpo na moto yango mpe bamposa na ye.
◼ Kanisá liboso makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo moyekoli akanga ntina na yango to andima yango.
◼ Omituna boye: ‘Likambo nini azali na mposa ya kokanga ntina na yango to kosalela mpo akola na elimo? Ndenge nini nakoki kosimba motema na ye?’
◼ Soki esengeli, bongisá ndakisa moko, likambo moko oyo okolimbola, to mwa mituna oyo ekosalisa moyekoli akanga ntina ya likambo moko to ya vɛrsɛ moko.
Eteni 3: Kosalela Makomami malamu
Ntango tozali koyekola na bato Biblia, mokano na biso ezali ya ‘kokómisa bango bayekoli,’ mpe ya kosalisa bango bákanga ntina ya mateya ya Liloba ya Nzambe, bándima yango mpe básalela yango na bomoi na bango. (Mat. 28:19, 20; 1 Tes. 2:13) Yango wana, makambo oyo tozali koloba na ntango ya boyekoli esengeli mpenzampenza kouta na Makomami.—km 11/04 lok. 4.
Teyá Liloba ya Nzambe
◼ Monisá moyekoli ndenge ya kozwa bavɛrsɛ na Biblia na ye moko.
◼ Tángá mpe lobelá bavɛrsɛ oyo esimbi bindimeli na biso.
◼ Tuná mituna. Na esika ya kolimbola bavɛrsɛ, sɛngá moyekoli ye moko alimbola yango.
◼ Koluka mindɔndɔ te. Koluka te kopesa bandimbola nyonso ya vɛrsɛ mokomoko. Lobelá kaka makambo oyo esengeli mpo na kolimbola likambo yango.
◼ Monisá ndenge ya kosalela yango. Salisá moyekoli amona ndenge vɛrsɛ yango etaleli ye.
Eteni 4: Lakisá moyekoli ndenge ya komibongisa
Moyekoli oyo atángaka lisolo liboso ya koyekola, oyo atyaka bilembo na biyano, mpe akanisaka ndenge akoloba yango na maloba na ye moko, akolaka noki na elimo. Yango wana, soki obandi koyekola na moto moko, bongisá lisolo moko elongo na ye mpo na komonisa ye ndenge ya komibongisa. Mpo na bayekoli mingi, ezalaka malamu kobongisa mokapo to liteya mobimba elongo.—km 12/04 lok. 1.
Kotya bilembo mpe kokoma makanisi na mopanzi ya lokasa
◼ Limbolelá ye ndenge ya kozwa biyano ya mituna oyo ezali na mokanda.
◼ Lakisá moyekoli mokanda na yo ndenge otyá bilembo kaka na maloba ya ntina.
◼ Salisá moyekoli amona ndenge vɛrsɛ mokomoko oyo batii maloba na yango na lisolo te, esimbi likambo oyo balobeli na paragrafe, mpe lakisá ye ndenge ya kokoma na mokuse mwa makanisi na mopanzi ya lokasa.
Koyeba lisolo na mokuse mpe bozongeli
◼ Monisá moyekoli ndenge ya kotalela motó ya likambo ya mokapo to lisolo, mitó ya makambo mike, mpe bililingi liboso ya kobongisa lisolo.
◼ Lendisá moyekoli azongelaka makanisi ya ntina soki asilisi komibongisa.
Eteni 5: Ndenge ya koyeba baparagrafe boni bokoyekola
Mpo na koyeba baparagrafe boni koyekola na moto, yango ekotalela makoki mpe makambo ya bomoi ya moteyi mpe ya moyekoli.—km 1/05 lok. 1.
Tongá kondima ya makasi
◼ Kowela te kosilisa mokanda, nzokande moyekoli akangi naino te ntina ya Liloba ya Nzambe.
◼ Zwá ntango oyo esengeli mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola.
◼ Zwá ntango oyo ebongi mpenza mpo na kotalela bavɛrsɛ oyo esimbi mateya.
Kobima na boyekoli te
◼ Soki moyekoli abandi kolobela makambo na ye moko, ekozala malamu tósɛnga ye alobela yango na nsuka ya boyekoli.
◼ Lobelá makambo na mokuse ntango ozali koyekola na moto. Kolobela mingi te makanisi mpe masolo oyo ekobulunganisa moyekoli mpe ekopekisa ye azwa boyebi ya sikisiki ya mateya ya ntina ya Biblia.
Eteni 6: Ntango moyekoli atuni motuna
Ntango obandi koyekola Biblia na moto moko, mbala mingi ezalaka malamu kotalela mateya ya Biblia na molɔngɔ na esika ya koyekola lisolo moko opumbwi okei na mosusu. Yango esalisaka moyekoli azwa boyebi ya solo mpe akola na elimo.—km 2/05 lok. 6.
Zalá na bososoli
◼ Mbala mingi, esɛngaka kopesa eyano mbala moko na mituna oyo ezali na boyokani na lisolo oyo bozali kotalela.
◼ Mituna oyo ezali na boyokani te na lisolo oyo bozali kotalela to ezali kosɛnga kosala bolukiluki mpo na kozwa eyano oyo ebongi, ekoki kolobelama na ntango mosusu. Ekoki kozala malamu kokoma motuna ya moyekoli na papye.
◼ Soki moyekoli azali kokakatana mpo na kondima liteya moko, bótalela elongo mokanda mosusu oyo elobeli likambo yango na mozindo.
◼ Soki moyekoli andimi kaka te, bombá lisolo yango mpo na kolobela yango mokolo mosusu mpe bókoba na boyekoli.
Yebá bandelo na yo
◼ Soki oyebi eyano ya motuna moko te, kopesa likanisi na yo moko te.
◼ Monisá ye mokemoke ndenge ya kosalaka bolukiluki
Eteni 7: Kosala libondeli na ntango ya boyekoli
Mpo moyekoli ya Biblia akola na elimo, lipamboli ya Yehova ezali na ntina mingi. Na bongo, ezali malamu tóbandaka mpe tósukisaka boyekoli na libondeli.—km 3/05 lok. 4.
Ndenge ya kobanda kobondela
◼ Mpo na bato oyo bandimaka Nzambe, tokoki kobondela elongo na bango ata na mbala ya liboso oyo tokutani na bango.
◼ Mpo na bato mosusu, ekoki kosɛnga koluka koyeba ntango nini ebongi mpo na kobanda kobondela elongo na bango.
◼ Tokoki kosalela Nzembo 25:4, 5 mpe 1 Yoane 5:14 mpo na kolimbola ntina oyo tosengeli kobondelaka.
◼ Tokoki kosalela Yoane 15:16 mpo na komonisa moyekoli ete tosengeli kobondelaka Yehova na nzela ya Yesu Klisto.
Makambo oyo tokoki koloba na libondeli
◼ Ebongi tókumisaka Yehova lokola azali Liziba ya mateya.
◼ Tóloba makambo oyo ekomonisa ete tozali komibanzabanza mpo na moyekoli.
◼ Tóloba makambo oyo ekomonisa ete tozali na botɔndi mpo na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela.
◼ Sɛngá Yehova apambola milende oyo moyekoli azali kosala mpo na kosalela makambo oyo azali koyekola.
Eteni 8: Tómema bayekoli na Ebongiseli ya Yehova
Ntango tozali koyekola na bato Biblia, mokano na biso ezali kaka te koteya bango mateya ya ntina mingi ya Biblia, kasi mpe kosalisa bango bákɔta na lisangá ya boklisto. Zwáká mwa miniti mpo na kolimbolela ye likambo moko etali ebongiseli ya Yehova.—km 4/05 p. 8.
Makita ya lisangá
◼ Lobelá ndenge makita esalemaka. Soki kaka boyekoli na moto mbala ya liboso, bengá ye mbala moko na makita.
◼ Yebisá ye makanisi ya ntina ya makambo oyo elobelamaki na makita.
◼ Lendisá moyekoli asepela na Ekaniseli, na mayangani, mpe na boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga.
◼ Salelá bililingi oyo ezali na mikanda na biso mpo na kosalisa ye amona ndenge makita yango esalemaka.
◼ Lendisá ye atánga mwa buku Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka?
Bakasɛti-video oyo eteyaka
◼ Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation (Batatoli ya Yehova—Nkombo mpe ebongiseli na bango)
◼ Toute la communauté des frères (Lisangá mobimba ya bandeko)
◼ Unis grâce à l’enseignement divin (Mateya ya Nzambe esangisi biso)
◼ Jusqu’aux extrémités de la terre (Tii na nsuka ya mabelé)
Eteni 9: Tósalisa bayekoli mpo bápesaka litatoli ya libaku malamu
Soki bayekoli ya Biblia bakómi kondima makambo oyo bazali koyekola, bayokaka mposa makasi ya kolobela makambo yango.—km 5/05 lok. 1.
Lendisá ye apesaka litatoli
◼ Azali nde na baninga to bandeko oyo akoki kobenga bango ntango azali koyekola mpo bálanda boyekoli elongo na ye?
◼ Ezali na moninga na ye moko ya mosala, ya kelasi to moto mosusu oyo bayebani na ye oyo asepelaki na makambo yango?
Salisá ye alobelaka makambo oyo azali koyekola
◼ Ntango bozali koyekola likambo moko, tuná moyekoli ya Biblia boye: “Ndenge nini okoki kosalela Biblia mpo na kolimbola likambo oyo epai ya bandeko na yo?”
◼ Salisá moyekoli ayeba ete ezali na ntina mingi azalaka na bososoli, na limemya mpe na boboto ntango azali koyebisa basusu makambo etali Yehova mpe mikano na ye.
◼ Moyekoli akoki kosalela mwa buku Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka? mpo na kosalisa baninga mpe bandeko na ye bákanga ntina ya makambo oyo tondimaka mpe oyo tosalaka, makambo oyo euti na Biblia.
Eteni 10: Tólakisa bayekoli ndenge ya kosakola ndako na ndako
Soki bankulutu bataleli moyekoli ya Biblia mpe bamoni ete akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, moyekoli yango akoki kobanda kosakola elongo na lisangá.—km 6/05 lok. 1.
Bómibongisa esika moko
◼ Lakisá moyekoli esika oyo akoki kozwa makanisi ya kobanda masolo.
◼ Salisa ye apona maloba ya kobanda lisolo ya pɛtɛɛ mpe oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino.
◼ Lendisá ye asalelaka Biblia ntango azali kosakola.
◼ Bómekameka lisolo yango elongo na ye. Monisá ye oyo akoki kosala, na mayele mpenza, soki bapesi ye biyano oyo bato mingi ya teritware na bino bapesaka.
Bósakolaka elongo
◼ Tiká moyekoli amona ndenge ozali kosala lisolo oyo bobongisaki bino mibale.
◼ Talelá bomoto ya moyekoli mpe makoki na ye. Na bantango mosusu, ekoki kozala malamu kosɛnga ye aloba kaka moke.
◼ Salisá mosakoli ya sika asala programɛ na ye moko ya kobimaka mbala na mbala na mosala ya kosakola.
Eteni 11: Tósalisa bayekoli bázongelaka bato oyo basololaki na bango
Mpo na kozongela moto, esɛngaka kobongisa yango banda na mbala ya liboso oyo okutani na ye. Lendisá moyekoli amibanzabanzaka mpenza mpo na bato oyo asololaki na bango. Salisá ye mokemoke ayeba ndenge ya kosalisa bato oyo azali kosolola na bango mpo bábimisaka polele makanisi na bango, salisá ye atyaka matoi na biyano na bango, mpe atyaka likebi na makambo oyo etungisaka bango.—km 7/05 lok. 1.
Komibongisa mpo na kozongela bato
◼ Talelá elongo na moyekoli lisolo oyo bosololaki na moto mbala ya liboso, mpe monisá ye ndenge ya kopona lisolo moko oyo ekobonga mpenza na moto oyo bosololaki na ye.
◼ Bongisá lisolo moko oyo bokotánga vɛrsɛ moko, mpe paragrafe moko na mokanda moko oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato.
◼ Bongisá motuna moko oyo bokoki kotuna na nsuka ya lisolo.
Kozala na molende mpo na kozongela bato oyo basepelaki
◼ Lendisá moyekoli na kozongelaka nokinoki bato oyo basepelaki na nsango malamu.
◼ Salisá moyekoli amona ntina ya kosala nyonso mpo na kokutana na bato oyo ezalaka mpasi kokuta bango na bandako na bango.
◼ Teyá moyekoli ndenge ya koyokana na moto, mpe salisá ye amona ete kozongelaka bato ndenge alakaki bango ezali na ntina.
Eteni 12: Tósalisa bayekoli bábanda mpe bálanda koyekola na bato Biblia
Ezali na ntina mingi olanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba yo moko ozala ndakisa malamu na mosala ya kosakola. Ntango moto oyo boyekolaka na ye akotala ndakisa na yo na mosala ya kosakola, akokanga ntina ete bazongelaka bato mpo na kobanda koyekola na bango Biblia.—km 8/05 lok. 1.
Kosɛnga moto mpo oyekola na ye Biblia
◼ Limbolelá moyekoli ete ezalaka mpenza na ntina te koyebisa moto makambo nyonso tosalaka mpo na koyekola.
◼ Mbala mingi esɛngaka kaka koyekola na moto mbala moko paragrafe moko to mibale ya mokanda oyo tokoyekola mpo na komonisa ye ndenge toyekolaka.
◼ Bótalela mpe bómekameka likanisi moko oyo epesami mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.—km 8/05 lok. 8; km 1/02 lok. 6.
Kopesa moyekoli formasyo mpo akóma moteyi
◼ Lendisá moyekoli akomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
◼ Bongisá mpo mosakoli ya sika atalaka bayekoli mosusu ya Biblia oyo ye akoki koteya bango ata moke.