Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 9 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 16 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 23 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 30 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Novɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 10/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 9 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 25

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ ná Nsango ya Bokonzi No. 37.

Min. 15: “Salisá basusu bákóma baninga ya Nzambe.”a Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo ndakisa ya basusu mpe mabondeli oyo euti mpenza na motema esalisaki bango bákola na elimo tii bázwa batisimo.

Min. 20: Omibongisa mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 37. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá bibongiseli ya kampanye, ndenge emonisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ. Lendisá bandeko nyonso bákabola Nsango ya Bokonzi yango na molende mpenza. Lendisá basakoli nyonso báluka koyeba soki bato oyo bayekolaka na bango Biblia, oyo bazali kokola malamu na elimo, bakokisi masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Baboti mpe basengeli koluka koyeba soki bana na bango bakokisi masɛngami. Lobelá na mokuse masɛngami oyo ezali na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 79-81.

Loyembo 221 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 16 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 84

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 20: Tózwa matomba na Boyekoli ya mokanda ya lisangá. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, kobanda na motó ya likambo moke ya lokasa 69 tii na motó ya likambo moke ya lokasa 72.

Min. 15: “Makambo nini otyaka na esika ya liboso?”b Poná mwa ndambo ya basakoli mpe sɛngá bango bálobela ndenge oyo babongoli programɛ na bango mpo na kotya makambo ya Bokonzi na esika ya liboso; bámonisa mpe mapamboli oyo bazwi.

Loyembo 172 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 23 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 58

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya Novɛmbɛ. Na elakiseli moko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Mpo na nini bozongelaka bato mbala na mbala?”​—Talá buku Comment raisonner, lok. 20, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lok. 12.

Min. 15: Bómema mokumba na bino ya kobatela libota. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1998, nkasa 20-23. Lobelá mpe malako oyo ezali na Biyano na mituna na bino oyo elobi: “Tosengeli mpe kotánga boyekoli ya Biblia na kati ya libota na lapolo ya mosala ya kosakola oyo topesaka na nsuka ya sanza?,” na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2003.

Min. 20: “Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola.”c Ntango bokolobela paragrafe 3, lobelá mpe makanisi ya paragrafe 4 ya Biyano na mituna na bino, oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2001, oyo emonisi makambo oyo esengeli kosala soki ezali na ndeko moko te ya mobali oyo akoki kotambwisa likita yango.

Loyembo 143 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 30 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 207

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola mpe bákoma motángo ya Nsango ya Bokonzi No. 37 oyo bakabolaki, na ngambo mosusu ya losaka ya lapolo.

Min. 15: Ndenge nini nakoki koyebisa baninga na ngai ya kelasi makambo oyo nandimaka? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Lamuká! ya 22 Marsi 2002, nkasa 10-12 (Na Lifalanse). Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bayebisaki baninga na bango ya kelasi.

Min. 20: Makambo oyo bandeko bakutanaki na yango ntango bazali kokabola Nsango ya Bokonzi No. 37. Lendisá basakoli bálobela matomba oyo bazali kozwa ntango bazali kokabola Nsango ya Bokonzi No. 37. Yebisá eteni ya teritware oyo bosali mpe monisá oyo esengeli kosala mpo na kosilisa teritware mobimba na mokolo ya 12 Novɛmbɛ. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli azongeli moto moko oyo asepelaki mpe azali kosolola na ye na buku Biblia eteyaka. Yebisá basakoli bázongisa Nsango ya Bokonzi nyonso oyo bamoni ete bakokoka kokabola yango te na mikolo oyo etyami mpo na kampanye, mpo bandeko mosusu bákabola yango.

Loyembo 136 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 6 Novɛmbɛ

Loyembo 146

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo ezali na nkasa 3-4 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, na eteni ya nsuka ya sanza ya Novɛmbɛ. Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki ntango basalelaki buku yango na mosala ya kosakola to na mabota na bango moko.

Min. 15: Salá ete mokolo ya libala na yo ezala mokolo ya esengo mpe ya lokumu. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2006, nkasa 28-31.

Min. 20: Kosakola Liloba ebɔndisaka. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2002, nkasa 8-9. Sɛngá bayangani bámonisa ndenge oyo mosala ya kosakola ebɔndisaka bango. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale bálobela yango.

Loyembo 8 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto