Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/07 lok. 1
  • Bapesi biso eloko ya motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bapesi biso eloko ya motuya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Tyá motema na yo na biloko ya motuya ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Okoki kozwa “boyebi ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Zwá mosala na yo ya kosakola na motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Eloko na biso ya motuya: Mosala na nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 2/07 lok. 1

Bapesi biso eloko ya motuya

1 Ntoma Paulo amonaki ete mokumba ya kosakola oyo Nzambe apesaki ye ezalaki na ntina mingi, mpe abengaki yango ‘eloko ya motuya.’ (2 Kol. 4:7) Ayikelaki mikakatano mpe minyoko mpiko ntango azali kokokisa mokumba yango. Na molende mpenza, azalaki kosakwela moto nyonso oyo azalaki kokutana na ye. Asalaki mibembo ya mpasi mpe ya makama, ezala na masuwa to na mokili. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo mpe komonisa ete tolingaka mpenza mosala na biso ya kosakola? (Lom. 11: 13) Eloko nini esalaka ete mosala na biso ya kosakola ezala na motuya koleka?

2 Eloko ya motuya koleka: Mbala mingi, biloko ya motuya ya mokili ebimiselaka bato mikakatano mpe epesaka kaka bolamu ya ntango moke. Nzokande, mosala ya kosakola epesaka biso mpe bato mosusu bolamu oyo ekoumela. (1 Tim. 4:16) Esalisaka bato ya mitema sembo báyeba Yehova, bábongola bomoi na bango, mpe bázwa elikya ya solosolo ya bomoi ya seko. (Lom. 10:13-15) Soki tozali kozwa mosala na biso ya kosakola na motuya mingi, bomoi na biso ekozala na ntina, tokomona ete tozali kosala mosala oyo matomba na yango ekoumela, mpe tokozala na elikya ya solosolo.​—1 Kol. 15:58.

3 Monisá ete ozwaka mosala ya kosakola na motuya mingi: Mbala mingi, tomonisaka ete tozali kozwa eloko moko na motuya soki tozali kosala makasi tómipimela makambo mosusu mpo na kozwa eloko yango. Kosalela ntango na biso mpe makasi na biso mpo na kosanzola Yehova ezali libaku malamu mpenza! (Ef. 5:16, 17) Ndenge tosalelaka ntango na biso esengeli komonisa ete topesaka motuya mingi na makambo ya elimo koleka biloko ya mokili. Lokola tozali na eloko ya motuya mingi ya kopesa bato, tosakolaka na esengo mpenza mpe tozalaka pene ya koyebisa bato nsango malamu na mabaku nyonso.

4 Mbala mingi, moto oyo azali na biloko ya motuya alingaka basusu bámona yango. Ndenge moko mpe, soki tomonaka ete mosala ya kosakola ezali na motuya mingi, tokotya yango na esika ya liboso na bomoi na biso. (Mat. 5:14-16) Lokola mitema na biso ezali na botɔndi, tiká tólanda ntango nyonso ndakisa ya ntoma Paulo, mpe tósimba mabaku nyonso mpo na komonisa mpenza ete tolingaka mosala ya kosakola mingi, mpe totalelaka yango lokola eloko ya motuya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto