Zwá mosala na yo ya kosakola na motuya
1. Ndenge nini bato mingi na mokili batalelaka mosala na biso ya kosakola?
1 Bato mingi na mokili oyo ya Satana bamonaka ete mosala na biso ya kosakola ezali “bozoba.” (1 Ko. 1:18-21) Soki tokebi te, lolenge wana mabe ya kotalela mosala na biso ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kokitisa milende na biso. (Mas. 24:10; Yis. 5:20) Mpo na bantina nini tozwaka na motuya libaku malamu oyo tozali na yango ya kozala Batatoli ya Yehova?—Yis. 43:10.
2. Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ya kosakola ezali “mosala mosantu”?
2 “Mosala mosantu”: Ntoma Paulo alobaki ete mosala ya kosakola ezali “mosala mosantu.” (Rom. 15:15, 16) Na ndenge nini mosala ya kosakola ezali “mosala mosantu”? Ntango tosakolaka, ‘tosalaka elongo’ na Yehova, oyo azali “Mosantu,” mpe topesaka mabɔkɔ mpo nkombo na ye esantisama. (1 Ko. 3:9; 1 Pe. 1:15) Yehova atalelaka mosala na biso ya kosakola lokola “mbeka ya lisanzoli,” yango wana mosala ya kosakola ezali moko ya makambo ya ntina na losambo na biso.—Ebr. 13:15.
3. Mpo na nini kosakola nsango malamu ezali lokumu monene mpo na biso?
3 Kosakola nsango malamu ezali lokumu monene oyo epesami na bato mingi te. Baanzelu bakokaki kokokisa mokumba wana na esengo nyonso mpe na ntembe te, balingaki kosala yango malamu mpenza. (1 Pe. 1:12) Kasi, Yehova aponá biso bato ya kozanga kokoka, oyo tozali lokola “bambɛki ya mabele,” mpo tósala mosala wana ya ntina mingi!—2 Ko. 4:7.
4. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka mosala ya kosakola na motuya?
4 Totyaka yango na esika ya liboso: Lokola tozwaka mpenza mosala na biso ya kosakola na motuya mingi, totalelaka yango lokola moko ya “makambo oyo eleki ntina” na bomoi na biso. (Flp. 1:10) Yango wana, tosalaka programɛ mpo na kobima na mosala yango pɔsɔ nyonso. Soki mobɛti-miziki moko azwaka na motuya mingi libaku malamu ya kobɛta na orkɛstrɛ moko oyo eyebani mokili mobimba, akomibongisa malamumalamu liboso ya kobɛta mpe akosala makasi mpo akolisa makoki na ye ya kobɛta. Ndenge moko mpe, tosengeli komibongisa liboso ya kobima na mosala ya kosakola mpo tókoka “kosembola liloba ya solo malamumalamu,” mpe tosengeli kosala makasi mpo tókolisa “mayele [na biso] ya koteya.”—2 Tim. 2:15; 4:2.
5. Banani basepelaka na mosala na biso ya kosakola?
5 Kolɛmba nzoto te soki bato mingi bazali koboya koyoka nsango malamu. Kobosana te ete ezali na bato mingi ya teritware na biso oyo basepelaka ndenge toyaka kotala bango. Nzokande, tolukaka te ete bato bándima biso. Likambo eleki ntina ezali ndenge oyo Yehova atalelaka mosala na biso, mpe azwaka na motuya mingi milende oyo tosalaka.—Yis. 52:7.