Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato oyo tokei kotala bazali na buku yango, tokomonisa bango na mokuse ndenge boyekoli esalemaka mpo na kosalisa bango bázwa matomba na buku yango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokoki kolakisa bango mwa buku Bókɛngɛlaka!
Lokola sanza ya Sɛtɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ya mobu 2007 mpe diskɛ CD-ROM Watchtower Library—2007 na komande na bango ya mikanda ya mbala ekoya. Lokasa “Avis aux congrégations,” oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza, ekomonisa bino soki mikanda yango ekozala na minɔkɔ nini. Bóbosana te ete diskɛ CD-ROM Watchtower Library—2007 ezali kaka mpo na bandeko oyo bazwá batisimo mpe moto akoki kozwa yango kaka soki asɛngi yango na nzela ya lisangá.
◼ Video oyo ezali na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah : organisés pour prêcher la bonne nouvelle (Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu), oyo batye na DVD, ekotalelama na Likita moko ya mosala na sanza ya Desɛmbɛ. Soki olingi kozwa yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2008 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema na pɔsɔ ya 31 Marsi 2008. Motó ya likambo ya lisukulu yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo bakozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, bakosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya pɔsɔ ya 31 Marsi.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá mpo na sanza ya Yuni, Yuli, mpe Augusto. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.—Talá formilɛrɛ Instructions pour la comptabilité des congrégations (S-27).