Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/07 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Ozwaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi?’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bavideo, masolo mpe ba-audio ya eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bavideo, masolo mpe ba-audio ya eteni 1
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Kosalela Internet​—Kebá na makama!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 9/07 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ “Moombo ya sembo mpe ya mayele” andimaka bituluku ya Batatoli oyo bakutanaka na ndenge na bango moko mpo na kosala bolukiluki to kotyana ntembe na Makomami?​—Mat. 24:45, 47.

Te, andimaka yango te. Nzokande, na bisika mosusu na mokili, bandeko mosusu oyo bayanganaka elongo na biso, basali bituluku mpo na kosalaka bolukiluki na masolo ya Biblia na ndenge na bango moko. Basusu basali etuluku na bango moko mpo na koyekola monɔkɔ ya Liebele mpe ya Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia, mpo báluka mabunga na Libongoli ya mokili ya sika. Basusu bayekolaka masolo ya siansi oyo eyokani na Biblia. Bandeko yango bafungoli ba site ya Internet mpe bisika oyo bato ebele bakoki kosolola mbala moko na nzela ya ordinatɛrɛ, mpo na kosololaka mpe kopesanaka makanisi. Basalaka mpe makita mpe babimisaka mikanda mpo na komonisa makambo oyo bayekoli mpe kobakisa makambo mosusu oyo ezali te na mikanda na biso mpe na makita ya lisangá.

Na mabelé mobimba, basaleli ya Yehova bazwaka ebele ya bilei ya elimo mpe balendisamaka mpenza na nzela ya makita, mayangani ya mike mpe ya minene, mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisaka. Na nzela ya elimo santu mpe ya Liloba na ye oyo ezali solo, Yehova azali kopesa basaleli na ye nyonso oyo esengeli mpo bázala “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (1 Kol. 1:10; Kols. 2:6, 7) Tozali mpenza na botɔndi mpo na bibongiseli wana ya elimo oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso na mikolo oyo ya nsuka. Yango wana, “moombo ya sembo mpe ya mayele” andimaka te mikanda, makita, to ba site ya Internet, oyo bandeko bazali kobimisa to kosala na ndenge na bango.​—Mat. 24:45-47.

Ezali malamu ete bandeko básalela makoki na bango ya kokanisa mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu. Nzokande, tosengeli te kotika ete bamposa na biso moko elongola likebi na biso na makambo oyo Yesu Klisto azali kosala lelo oyo na nzela ya lisangá na ye awa na mabelé. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akebisaki baklisto ete bámikɔtisa te na masolo oyo elɛmbisaka mpe elyaka ntango na makambo lokola “milɔngɔ ya bankɔkɔ, oyo esukaka ata na eloko moko te, kasi oyo ebimisaka nde mituna mpo na bolukiluki na esika ya kokabolama ya mwa eloko moko oyo euti na Nzambe na oyo etali kondima.” (1 Tim. 1:3-7) Baklisto nyonso basengeli koboya “bantembe ya bozoba mpe milɔngɔ ya bankɔkɔ mpe koswana mpe bitumba na ntina etali Mibeko, mpamba te makambo wana ezangi litomba mpe ezali mpamba.”​—Tito 3:9.

Tolendisi baoyo balingi koyekola Biblia na mozindo mpe kosala bolukiluki ete básalelaka buku Étude perspicace des Écritures, mpe buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” mpe mikanda na biso mosusu, na ndakisa oyo elimboli bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele, Yisaya, mpe Emoniseli. Mikanda yango esalisaka biso mpenza na koyekola Biblia mpe komanyola. Na ndenge yango, tokoki kotonda na “boyebi ya solosolo ya mokano [ya Nzambe] na kati ya bwanya nyonso mpe bososoli ya elimo, mpo na kotambola na ndenge ebongi na Yehova mpo [tó]sepelisa ye mpenza wana [to]zali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.”​—Kols. 1:9, 10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto