Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tózongela bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka na eleko ya Ekaniseli, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Ntango tozali kozongela bango, mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola Biblia na baoyo babandi naino koyekola Biblia te.
◼ Lokola sanza ya Marsi ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza. Soki moko na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli koluka ndenge ya kosalisa ye.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2008 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ezali na motó ya likambo “Nani abongi koyangela bato?” Talá na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2007.