Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/08 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 2/08 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Febwali 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Yanuali tii na pɔsɔ ya 25 Febwali 2008. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Tosengeli kosala nini mpo na kosalisa bayoki bákanga ntina ya bavɛrsɛ, mpe mpo na nini tosengeli kosala yango? [be lok. 228 par. 2-3]

2. Mpo na nini tosengeli kosala makasi ete lisolo na biso eteya mpenza bato oyo bazali koyoka biso, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? [be lok. 230 par. 3-5, etanda]

3. Na ndenge nini kolukaluka na mikanda ekoki kosala ete lisolo na biso eteya mpenza bayoki? [be lok. 231 par. 1-3]

4. Tokoki kosala nini mpo na kolimbola bavɛrsɛ oyo bayoki bamesaná na yango na ndenge oyo ekoteya bango mpenza? [be lok. 231 par. 4-5]

5. Mpo na nini tosengeli kolandela malamumalamu bavɛrsɛ oyo totángi? [be lok. 232 par. 3-4]

LISOLO NO. 1

6. Nini emonisi ete mokanda ya Matai ekomamaki libosoliboso mpo na Bayuda? [si lok. 176 par. 6-7]

7. Ndenge nini tokoki kobongisa mitema na biso mpo na koyamba mateya oyo Nzambe apesaka biso na makita mpe na mayangani? (2 Nta. 20:33) [be lok. 13 par. 4–lok. 14 par. 5]

8. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bákóma bato ya “bwanya mpo na lobiko”? (2 Tim. 3:15) [be lok. 16 par. 3-4]

9. Ndenge nini mokanda ya Matai elobeli polele kokokisama ya bisakweli ya Biblia? [si lok. 181 par. 32]

10. Atako Evanzile ya Matai emonisi Yesu lokola Masiya oyo alakamaki mpe Mokonzi, ndenge nini Evanzile ya Malako elobeli ye? [si lok. 182 par. 7-8]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Kobimisa nkanda ezali mabe koleka kobomba yango? (Mat. 5:21, 22) [w08 15/1 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—Makanisi ya ntina na mokanda ya Matai”]

12. Ndenge nini baklisto babatelaka ‘liso alima’? (Mat. 6:22, 23) [w06 1/10 lok. 29]

13. Yesu alingaki koloba nini ntango atunaki bayekoli na ye ete: “Bokangi ntina ya makambo nyonso wana?” (Mat. 13:51, 52) [w08 15/1 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—Makanisi ya ntina na mokanda ya Matai”]

14. Mpo na nini Yesu azalaki kopekisa makasi bato oyo azalaki kobikisa ete “bábɛtɛla ye ntangwa te”? (Mat. 12:16) [w87-F 15/5 lok. 9; cl nk. 93-94]

15. Yesu alingaki koloba nini ntango alobelaki “emekelo” oyo moto azali “komekela”? (Mko. 4:24, 25) [w80-F 15/6 lok. 12; gt mok. 43]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto