Manaka mpo na Pɔsɔ ya 16 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 16 FEBWALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 29-31
No. 1: Genese 29:1-20
No. 2: Mpo na nini tosengeli ‘kotika komitungisa’ (Mat. 6:25)
No. 3: Botosi ekobatela yo (lr mok. 7)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: ‘Tósala makambo nyonso mpo na nsango malamu.’ Ekosalema na mituna mpe biyano.
Min. 15: Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli? Lisukulu ya kolendisa ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá masɛngami oyo moto asengeli kokokisa mpo akóma mobongisi-nzela mosungi. Monisá esengo mpe mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Yebisá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na makita mpo na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza ya Marsi, Aprili mpe Mai. Sololá na basakoli mibale to misato oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na mbula eleki. Makambo nini babongolaki na programɛ na bango mpo básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Mapamboli nini bazwaki? Lendisá mabota nyonso bátala soki moto moko to bato mwa mingi na libota na bango bakoki kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli oyo ezali koya.