Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 2
Kolata mpili
1. (a) Kolata mpili elimboli nini? (b) Nini ekesenisi yango na bilamba mosusu?
1 Mbala mingi, soki moto akufi, libota mpe baninga na ye balataka mpili. Kolata mpili oyo tolobeli awa, ezali te elamba oyo bato balataka na mabaku ndenge na ndenge, ata na ntango ya kokunda ebembe. Balataka mpili kaka ntango moto akufi. Na ndakisa, na ekólo Ghana, monɔkɔ mokomoko ezali na nkombo oyo ekesenisi elamba yango na bilamba mosusu.
2. (a) Ngɔtɔ ezali nini, mpe mpo na nini bazalaki kolata yango na ntango ya kala? (b) Basaleli ya Nzambe bazalaki na likanisi nini te ntango bazalaki kolata ngɔtɔ?
2 Bato mosusu bakanisaka ete na bikólo mingi ya Afrika, balataka mpili ndenge bazalaki kolata ngɔtɔ na ntango ya kala. Na ntembe, bato bazalaki kolata ngɔtɔ soki moto na bango akufi, kasi bazalaki mpe kolata yango na mabaku mosusu. Ezalaki nsuki ya mpate oyo batongi, oyo mbala mingi bazalaki kosala na yango mabenga oyo bazalaki kosalela mpo na kobomba mbuma. Na ntango yango, babateli ya mpate bazalaki kolata ngɔtɔ mpamba te ezalaki ntalo te mpe ezalaki koumela mingi. Bato bazalaki mpe kolata ngɔtɔ mpo na komonisa ete babongoli motema. (1 Mik. 21:27; Yona 3:6-8) Liboso Danyele abondela Yehova na motema mobimba, alataki ngɔtɔ. (Dan. 9:3) Ntango mosusu, basakoli ya kala bazalaki kolata ngɔtɔ ntango Yehova azalaki kotinda bango básakola makebisi na ye. (Yis. 20:2) Bazalaki kolata ngɔtɔ mpo na ntina mingi, kasi basaleli ya Nzambe bazalaki kolata yango te mpo na kobanga bakufi. Ezali mpe bongo mpo na mpili?
3. (a) Mbala mingi, elamba ya kolela ebembe ezalaka na balangi nini? (b) Makanisi oyo mangomba ezali na yango na ntina na elamba yango ebandá wapi? (c) Mbala mingi, ndimbola nini bato bapesaka na elamba ya kolela ebembe ya motane, moindo, mpɛmbɛ?
3 Kolata mpili emonisaka ete moto azali na mawa. Balangi na yango mpe ntina oyo balataka yango eutá na bindimeli ya mangomba oyo ebandá kala mpenza mpe etalelaka mimeseno mpe mboka na mboka. Bindimeli yango mingi ezali na boyokani na bakufi mpe boyokani oyo mowei azalaki na yango na bato oyo batikali na bomoi, na ndakisa, tata, mama, ndeko to moninga. Na bisika mosusu, bandeko mpenza ya mowei balataka elamba ya ndenge moko mpo na kolela moto na bango oyo akufi. Bakanisaka ete yango ekobatela bango na likama mpo bazali makila moko na mowei. Basusu balataka elamba ya moindo. Na bisika mingi, bakanisaka ete kosala bongo ebatelaka bango na bilimo mabe mpe esalisaka mowei akutana na bankɔkɔ na mokili ya bilimo. Kolata elamba ya mpɛmbɛ makasi mpo na kolela mowei ezalaka mpe na ntina mingi mpo na bato mingi. Yango emonisaka ete mowei akolonga liwa mpe mposa na bango ete elimo ya mowei ekende na kimya na mokili ya bilimo. Na bikólo mosusu, bato bakoki kolata na motó, eteni ya elamba ya mpɛmbɛ oyo mowei atiki mpo na komonisa ete bayebi te epai liwa ya ndeko na bango euti. Lisusu, mpo na komonisa mawa na bango, basusu bakokolaka nsuki ya motó mpe basi bafandaka pembeni ya mowei, ntolo polele mpe makolo ngulu. Bato mosusu balataka te bilamba ya pɛto na ntango yango.
4. (a) Bato balataka mpili na boumeli ya ntango boni? (b) Mpo na nini na ntango ya molulu ya kokunda, bato mosusu balataka bilamba ya langi ndenge na ndenge, balati oyo mpe na nsima balati mosusu?
4 Soki moto oyo akufi azalaki tata, mama, ndeko to moninga, bato balataka mpili mokolo moko, mwa mikolo, basanza mingi, ata mpe mbula mobimba to bambula mingi nsima ya kokunda mowei. Na bamboka mosusu, na boumeli ya molulu ya kokunda, bamosusu balataka bilamba ya langi ndenge na ndenge, balataka elamba ya langi moko, balongoli yango mpe balati ya langi mosusu. Basalaka bongo mpo na komonisa ndenge boyokani na bango na mowei ezali kosila. Na ndakisa, mwasi oyo mobali na ye akufi, alataka elamba ya langi moko boye mpo na komibatela na elimo ya mobali na ye. Soki mikolo eleki mpe amoni ete likama ebandi kolongwa, akolongola elamba yango mpe akolata mosusu. Akosala bongo tii ntango akomona ete likama oyo liwa ya mobali na ye ekokaki kobimisela ye ezali lisusu te. Nsukansuka, akolongola elamba yango mpo na kokata boyokani nyonso na mobali na ye oyo akufi.
5. (a) Ndenge nini Yisaya 52:11 ekoki kosalisa na likambo ya kosalela bilembo oyo batyaka na bilamba oyo balelaka mowei? (b) Mpo na nini bato oyo basambelaka Yehova te bakoki koyoka mabe soki moto moko aboyi kolata elamba oyo balataka mpo na kolela mowei?
5 Mbala mosusu batyaka bilembo to makomi na elamba oyo balati mpe makomi yango ezalaka na ndimbola lokola “kendá malamu.” Mbala mingi, bilamba yango ezalaka batriko. Lokola bilembo yango mingi etindaka bato bándima bilimo ya bankɔkɔ mpe ete bilimo yango eyokanaka na bato ya bomoi, tosengeli koboya yango. (Yis. 52:11) Mbala mingi mikóló na kati ya libota nde baponaka elamba ya kolata. Na nsima, moto nyonso ya libota akolata yango. Bato oyo bazali Batatoli te bamonaka ete soki balati elamba yango te, bazwi mowei mpe bato ya libota na ye na kilo te. Makambo wana ekoki kotinda biso tókanisa nini mpo na elamba oyo balataka mpo na kolela mowei? Tótalela mitinda misato ya ntina.
6. (a) Tángá 1 Batesaloniki 4:13. Etinda yango ekoki kotinda biso tótalela kolata mpili ndenge nini? (b) Tángá 2 Bakolinti 6:3. Mituna nini tosengeli komituna mpo na elamba ya kolela ebembe?
6 Mitinda oyo tosengeli kolanda: Ya liboso, lokola tozali basaleli ya Yehova, tolelaka mpe tomonisaka mawa koleka ndelo te ndenge baoyo “bazali na elikya te” basalaka ntango mosusu. (1 Tes. 4:13) Ya mibale, tolingi kosala eloko moko te mpo na ‘kobɛtisa bamosusu libaku.’ (2 Kol. 6:3) Na kotalela etinda wana, tokoki komituna boye: ‘Soki nalati mpili, bato bakomona ete nandimaka mateya mpe mimeseno oyo Biblia epekisi? Ekobɛtisa nde bato oyo bayebi bindimeli mpe mateya ya Batatoli ya Yehova libaku? Ekotungisa lisosoli ya baklisto mosusu ya mboka na biso to ya bikólo mosusu? Yango ekoki kolɛmbisa baklisto mosusu oyo baboyaki kolata mpili mpe kutu banyokwamaki mpo na likambo yango?’—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1998, nkasa 22-23.
7. (a) Tángá Masese 27:11 mpe Bakolose 1:9, 10. Mitinda nini ya ntina ezali na bavɛrsɛ wana? (b) Engebene 1 Bakolinti 10:21, 22, kolata mpili ekoki kosala nini na boyokani na biso na Yehova? Mpo na nini?
7 Na mitinda nyonso oyo tosengeli kobosana te, oyo eleki ntina mingi yango oyo: tosengeli te kosala ata likambo moko oyo ekofinga Yehova. (Mas. 27:11; Kols. 1:9, 10) Toyebi malamu ntina oyo bato balataka mpili mpe boyokani oyo kolata mpili ezali na yango na liteya oyo elobaka ete bakufi bazali na bomoi. Na yango, tosengeli kokanisa malamumalamu mpo soki tosali yango ekobebisa boyokani na biso na Yehova. ‘Tokoki te kolya na “mesa ya Yehova” mpe na mesa ya bademo.’—1 Kol. 10:21, 22.
8. Soki toyebaki te boyokani oyo ezali kati na kolata mpili mpe bilimo mabe, nini esalisi biso sikoyo tóyeba ntina oyo baklisto ya solo bakoki te kolata mpili? (Zongelá mitinda minene misato oyo ezali na paragrafe ya 6 mpe 7.)
8 Ezali solo ete bato mosusu bayebaka te ntina oyo bato balataka mpili. Kasi, bayebaka mpe te kolimbola mpo na nini balingaka kolata yango kaka soki moto akufi. Mingi balataka yango kozanga koyeba ntina na yango, kasi biso tosengeli te kolata yango mpo bango balataka. Soki tomanyoli likoló ya mitinda wana mpe tobondeli, tokoyeba ntina oyo tosengeli te kolanda momeseno wana ya kolata mpili ntango moto akufi mpo na komonisa ete tozali na mawa.
9. Na esika ya kolata mpili, ndenge nini baklisto basengeli kolata na ntango ya kokunda mowei kozanga kobɛtisa basusu libaku?
9 Bilamba oyo tokoki kolata: Molato nini ebongi na ntango ya kokunda mowei? Banda ebele ya mbula, mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele esilá kolobela likambo wana.a Elendisaki biso tólekisa ndelo te mpe tózala na makanisi malamu ya kopona bilamba oyo ebongi. Bilamba yango ekoki kozala ya langi makasi te, oyo ebongi na “ndako ya kolela.” (Mos. 7:2) Na yango, basengeli kotinda biso na makasi te mpo tólata “iniforme” oyo bato mpenza ya libota mpe bandeko mosusu ya mowei balati. Ezala toponi kolata elamba ya ndenge nini, lokola toyebi malamu oyo Biblia elobi mpo na bakufi, tosengeli kozala na limemya ata soki tolati te elamba oyo emonisaka ete moto azali na mawa.
Ndenge ya kokunda mowei
10. Ndenge nini mitinda oyo ezali na Baefese 5:7-11 mpe na 1 Bakolinti 10:32, esengeli kosalisa biso ntango tolingi kokunda mowei?
10 Ntango baklisto bazali kokunda ndeko na bango oyo akufi, basengeli kokabwana na ye na ndenge ya malamu mpe kotosa mibeko nyonso ya Leta, mpe ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Mpo ete molulu ya kokunda ebembe ebɔndisa bato na lisalisi ya Biblia mpe emonisa mpenza oyo Biblia elobi mpo na bato oyo bakufá, esengeli kopesa nzela ata moke te na mimeseno ya bonkɔkɔ oyo eyokani te na Makomami. (Ef. 5:7-11) Makambo oyo ezali kosalema na molulu yango esengeli te kobebisa lisosoli ya bandeko na biso baklisto. (1 Kol. 10:32) Ndenge nini tokoki kosalela mitinda oyo ya Biblia ntango tolingi kokunda moklisto oyo akufi?
11. (a) Soki esɛngi kokoma makambo oyo mowei asalaki na bomoi na ye, makambo nini tosengeli te kotikela bato oyo bazali Batatoli te bákɔtisa? (b) Maloba nini baklisto basengeli kosalela te mpe mpo na nini?
11 Kokumisa mowei: Soki tomoni malamu tókoma makambo ya malamu oyo moto oyo akufi asalaki, tosengeli kokanisa malamu na makambo oyo tokokoma. Na ndakisa, bandeko mosusu to baninga ya mowei oyo bazali Batatoli te, bakoki komona malamu bákɔtisa maloba oyo ekoki kokumisa mowei. Bakoki kosalela maloba oyo ekoki kopesa likanisi ete Nzambe abengi moto yango na likoló to azali na nzela mpo na kokende na esika mosusu. Bato balobaka maloba lokola: “Pemá na kimya,” “Molimo na yo ekende na kimya” mpe “Kende malamu.” Bato mingi bakanisaka ete wana ezali lolenge malamu mpe ya limemya ya kokabwana na mowei. Kasi, toyebi malamu ete bakufi bayebaka likambo te mpe bayokaka te makambo wana oyo balobaka mpo na bango. Likambo ya ntina koleka, baklisto ya solo basengeli te kosalela maloba wana, mpamba te endimisaka liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.—Yis. 52:11.
12. (a) Makomami emonisi ete nani akoki kozwa ekateli ndenge mowei asengeli kokundama, mpe na nini likambo yango ekeseni na mimeseno ya bonkɔkɔ? (b) Na kotalela 2 Bakolinti 6:14-17, mpo na nini ekozala malamu te kotikela bato oyo bazali Batatoli te, ezala baboti, bato mosusu ya libota to bato mosusu, bábebisa bibongiseli oyo ezwami?
12 Nani asengeli kozwa ekateli?: Na bisika mingi, bato oyo bazali Batatoli te bamonaka ete bato ya libota ya mowei oyo bazali mosika to mosika te nde basengeli kokata ndenge nini mpe ntango nini mowei akokundama. Kasi mpo na baklisto, na libala mwasi ná mobali nde basengeli kozwa bikateli ya minene oyo etali bomoi na bango mpe oyo ya bana na bango. Baboti, bato mosusu ya libota mpe bandeko ya lisangá, basengeli kotosa ebongiseli wana oyo Makomami elobi. (Mat. 19:5, 6) Ezali mpe bongo soki moto moko ya libota na biso akufi. (Gen. 23:19; 35:29) Mpo moklisto asala te “ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te,” asengeli komonisa polele ete makambo nyonso esengeli kosalema na boyokani na mitinda ya Biblia soki akufi. (2 Kol. 6:14-17) Bibongiseli nini asengeli kozwa mpo na likambo yango?
13. (a) Mpo na nini ezali mpenza na ntina ete okoma makambo polele ndenge oyo okolinga básala soki okufi? (b) Mokanda ya ndenge nini ekozala na motuya mingi, mpe esengeli kozala na makambo nini?
13 Esengeli komonisa ekateli na yo polele: Soki okomi ndenge okolinga makambo esalema soki okufi, ekozala mpasi te mpo na kosolola na bato ya libota, mpo mbala mingi, bato batosaka maloba ya mowei. (Gen. 50:5) Ekozala malamu mingi kokoma makambo polele mpe kosɛnga na molongani na yo mpe bato mosusu oyo bazali Batatoli ya Yehova bátya sinyatire na mokanda yango. Okoki mpe kokoma mokanda mosusu oyo ekoki komonisa ndenge biloko na yo esengeli kokabolama soki okufi. Bato oyo bamonaka mosika mpe bazali na bwanya bayebaka ete esengeli te kozela tii ntango bakokóma mibange mpenza to bakómi kobunda na liwa nde bakokoma mokanda yango. (Mos. 9:11) Na mokanda yango, esengeli komonisa ndenge nini, ntango nini mpe esika nini okokundama mpe nani nde asengeli kobongisa molulu ya kokunda yo. Wana makambo ya ntina mingi oyo okoki kokoma ntango ozali naino na makasi na nzoto. Kopesa nkulutu moko ya lisangá fotokopi ya mokanda yango ekoki kosalisa mingi soki oyo osalaki ebungi. Lolenge mosusu ya kosala ezali ya kokɔtisa makambo yango na kasɛti mpe kopesa yango na moto moko oyo otyelaka motema mpo abomba yango.
14. (a) Mpo na nini bato mosusu baboyaka kokoma liboso ndenge bakolinga básala mpo na kokunda bango soki bakufi? (b) Tángá Bafilipi 2:4 mpe Baefese 5:28, 33. Ndenge nini mitinda yango ekoki kosalisa biso na likambo wana ya ntina mingi?
14 Bato mosusu babangaka koyebisa liboso mpenza ndenge makambo ekoleka soki bakufi. Nzokande, soki oyebisi liboso ndenge okolinga básala soki okufi, okomonisa ete ozali moklisto oyo akɔmɛli mpe oyo azali na bolingo. Baoyo bazali na boyebi ya sikisiki ya Biblia bayebi ete ata soki basali bongo, yango ekosala te ete bákufa noki to nsima. Ezali solo ete bato ya libota oyo bazali Batatoli te bakoki kosilika to koyoka lokola osambwisi bango soki omonisi polele ete olingi te ete makambo oyo okomi bábongola yango ntango bakokunda yo soki okufi. Kasi ezali malamu kobongisa likambo yango ntango ozali naino na bomoi na esika ya kotikela bato ya libota na yo, oyo soki okufi, bakoki mbala mosusu kolanda makanisi ya bato mosusu mpe kosala milulu ya mbindo. (Filp. 2:4) Soki tozwi bibongiseli mpe tomitye na esika ya basusu, tokomonisa ete tolingaka bango mpe tomibanzabanzaka mpo na bango.—Ef. 5:28, 33.
15. (a) Mpo na nini bato bakutanaka na boumeli ya mikolo mwambe, mpe mpo na nini likambo yango ezali mabe? (b) Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na 2 Bakolinti 6:14, soki bato ya libota oyo bazali Batatoli te balingi kaka bátambwisa makambo mosusu mpo na kokunda mowei?
15 Ndenge ya kosala epai ya bato ya libota oyo bazali Batatoli te: Na bisika mosusu, mpo na kobongisa ndenge ya kokunda moto, bato bazalaka na momeseno ya kokutana mwa moke nsima ya liwa ya moto yango. Bakoki kosala bongo na boumeli ya mikolo mwambe. Basalaka bongo mpo na koluka mbongo mpe kopesana makanisi, kopona ntango mpe lolenge oyo bakokunda mowei. Emonanaka ete na bisika ya ndenge wana, Motatoli ya Yehova akoki kozanga kotosa mitinda ya Biblia mpe kotikela bato ya libota na ye oyo bazali Batatoli te bátambwisa makambo. Ndenge tomonaki yango, Makomami emonisi polele ete tokoki te kotikela bato oyo bazali te Batatoli bátambwisa makambo mosusu mpe lisangá esala makambo mosusu. (2 Kol. 6:14) Na yango, soki mowei azalaki Motatoli, ekozala malamu te kotikela bato ya libota na ye oyo bazali Batatoli te básala mwa “komite ya bokundi” oyo ekobanda koyebisa bato ndenge nini ndeko wana akokundama. Bandeko ya lisangá oyo bazali bato ya libota wana te, bakosangana te ntango bato yango bazali kokutana mpo na kobongisa ndenge ya kokunda mowei to bakoki te komikɔtisa na bibongiseli na bango. Na yango, baklisto oyo ndeko na bango akufi, bakoki kotuna toli epai ya nkulutu moko to mibale mpo básalisa bango na lolenge ya kokunda ndeko na bango na boyokani na mitinda ya Biblia.
16. (a) Makambo nini esengeli komonisa polele epai ya bato ya libota oyo bazali Batatoli te? (b) Esengeli kosala nini soki bato ya libota oyo bazali Batatoli te balingi kaka bákɔtisa milulu ya mbindo? (c) Mbala mingi, soki tokomi makambo nyonso oyo tokolinga básala soki tokufi na mokanda, yango ekoki kosalisa na nini?
16 Bato ya libota ya mowei oyo bazali Batatoli bakolimbola na motema mpiɔ mpe na boboto ndenge babongisi ete ndeko na bango akundama. Soki bato yango bandimi ete bakotosa bindimeli na biso, tokoboya te kosala elongo na bango. Kasi tokosala nini soki bato yango balingi kaka bákɔtisa milulu ya mabe mpe ya mbindo? Na ntango wana, ekosengela tómonisa ekateli na biso polele mpe tólimbola bango na boboto nyonso kasi na mpiko. Awa mpe lisusu, soki mowei atikaki makambo na mokanda ndenge alingaki ete bákunda ye soki akufi, mindɔndɔ mpe kowelana ekozala te.
17. (a) Esengeli kosala nini soki bato oyo bazali Batatoli te balingi kaka bátambwisa makambo soki ndeko moko akufi? (b) Soki emonani ete balingi kaka bátambwisa makambo, bibongiseli nini esengeli kozwama? (c) Tángá 2 Bakolinti 4:7. Mpo na nini tokoki kobɔndisama ata soki bato oyo bazali Batatoli te babebisi ndenge oyo tolingaki kokunda ndeko na biso?
17 Soki tosali nyonso, kasi bato ya libota na biso oyo bazali Batatoli te balingi kaka bátambwisa makambo, tosengeli kosundolela bango makambo nyonso mpo na kobatela lisosoli ya malamu. Na ntango wana, ekosɛnga kosala lisukulu ya bokundi na Ndako ya Bokonzi to na esika mosusu oyo ebongi. Baoyo bazali na mawa ya ndeko na bango wana oyo akufi bakobɔndisama na nzela ya Makomami. (Lom. 15:4; Nz. 119:50) Ata soki nzoto ya mowei ezali wana te, lisukulu yango esengeli kosalema na lokumu mpe na ndenge ebongi. (Det. 34:5, 6, 8) Toboyi te, makambo oyo bato oyo bazali Batatoli te basalaka ekoki kobakisela biso mawa mpe mpasi na ntango moto akufi. Kasi, tobɔndisami lokola toyebi ete Nzambe ayebi ekateli oyo tozali na yango ya kotosa mitinda ya Biblia na likambo etali kokunda bibembe mpe ete akoki kopesa basaleli na ye ya sembo “nguya oyo eleki makasi.”—2 Kol. 4:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1998, nkasa 22-23, mpe ya 15 Aprili 1985, nkasa 21-23 (na Lifalanse) mpe buku L’humanité à la recherche de Dieu, lokasa 70.