Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/10 lok. 2
  • Ndakisa nini opesaka bato oyo bamonaka yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndakisa nini opesaka bato oyo bamonaka yo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Zwa litomba na eteyelo mpo na kobongisa mosala na yo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tólanda ndakisa ya Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tópesaka bato ya sika formasyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 4/10 lok. 2

Ndakisa nini opesaka bato oyo bamonaka yo?

1. Makambo nini bayekoli ya Yesu bamonaki epai na ye?

1 Yesu alobaki boye: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai.” (Mat. 11:29) Emonani polele ete Yesu azalaki kopesa ndakisa malamu epai ya bato oyo azalaki koteya, asukaki kaka na koloba te. Kanisá makambo oyo bayekoli ya Yesu bazalaki komona epai na ye. Azalaki kosepela na bato, azalaki na boboto, mpe azalaki kolinga bato. (Mat. 8:1-3; Mrk. 6:30-34) Azalaki na komikitisa ya solosolo. (Yoa. 13:2-5) Ntango bayekoli ya Yesu bazalaki elongo na ye na mosala ya kosakola, bazalaki komona ete azali mosali ya molende oyo ayebi mpenza koteya bato solo. (Luka 8:1; 21:37, 38) Ndakisa nini topesaka bato oyo bamonaka biso na mosala ya kosakola?

2. Bomoto na biso mpe bizaleli na biso ya malamu na mosala ya kosakola esalaka nini epai ya bato?

2 Bato oyo tosololaka na bango: Molato na biso ya malamu, bizaleli na biso ya malamu mpe ndenge oyo tosepelaka na bato ekoki kopesa litatoli epai ya bato oyo tosololaka na bango. (2 Ko. 6:3; Flp. 1:27) Bato bamonaka ete tosalelaka Biblia mingi. Bamosusu basepelaka ndenge toyokaka bango na limemya ntango bazali koloba. Tóbosanaka te ete kopesa ndakisa malamu na makambo yango ekoki kotinda bato báyoka nsango ya Bokonzi.

3. Ndenge nini tokoki kozala ndakisa malamu epai ya bandeko na biso?

3 Bandeko na biso bakristo: Kanisá mpe ndenge oyo ndakisa na biso ya malamu esalisaka bandeko na biso bakristo. Molende na biso na mosala ya kosakola etindaka bandeko mosusu bákóma na molende. Ndenge ebende epɛlisaka ebende mosusu, lolenge na biso ya kosakola ekoki mpe kolendisa basakoli mosusu bábongisa ndenge na bango ya kosakola nsango malamu. (Mas. 27:17) Soki tobosanaka te kokoma bankombo ya bato oyo basepeli na nsango malamu mpe tosalaka makasi tózongela bango noki, yango ekoki kolendisa basakoli mosusu bákokisa mosala na bango malamumalamu.​—2 Tim. 4:5.

4. Mpo nini tosengeli komitalelaka mbala na mbala?

4 Ezali malamu otalelaka mbala na mbala maloba mpe misala na yo mpe otalelaka soki ozali ndakisa malamu mpo na basusu. Ndakisa na biso ya malamu ekosepelisa Yehova Nzambe mpe ekosalisa biso tóloba lokola ntoma Paulo ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali momekoli ya Kristo.”​—1 Ko. 11:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto