Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/07 lok. 4
  • Tólanda ndakisa ya Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda ndakisa ya Yesu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Teyá bato ya komikitisa bátambola na nzela ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Makita epesaka bilenge matomba
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 9/07 lok. 4

Tólanda ndakisa ya Yesu

1. Ndakisa nini Yesu atikaki?

1 Ntango tozali kokómisa bato bayekoli, tosengeli kobosanaka te ete ndakisa na biso eteyaka mpenza bato oyo bamonaka biso. Yesu azalaki koteya na maloba mpe na misala. Bato oyo bazalaki komona ye bayebaki ete azalaki na molende, alingaki bato, azalaki na mposa makasi ya kosantisa nkombo ya Tata na ye, mpe azalaki na ekateli makasi ya kokokisa mokano ya Tata na ye.​—1 Pet. 2:21.

2. Na ndenge nini ndakisa na biso ekoki koteya bato oyo tobimi na bango na mosala ya kosakola?

2 Ntango tozali kosakola ndako na ndako: Ndenge moko na Yesu, ndakisa na biso mpe eteyaka bato oyo tosakolaka elongo na bango. Ntango tozali kosakola elongo na basakoli ya sika mpe oyo bameseni mpenza te na mosala yango, molende na biso ekotinda bango bátalela lisusu ndenge na bango ya kosakola. Ntango bazali komona esengo na biso mpe ndenge oyo tosepelaka na bato, bango mpe bakoluka komonisa bizaleli wana ntango bazali kosakola. Ntango bazali komona biso tozali kosalela Makomami na molende, tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu mpe koyekola na bango Biblia, bango mpe bakoluka kosala bongo.

3. Ndenge nini ndakisa na biso eteyaka bayekoli ya Biblia, mpe makambo nini bakoki koyekola?

3 Ntango tozali koyekola na bato Biblia: Bato oyo toyekolaka na bango Biblia batalaka mingi nde etamboli na biso. Na ndakisa, tokoki kolimbwela moto ete ezali na ntina abongisaka boyekoli, atángaka bavɛrsɛ na kati ya Biblia, mpe atyaka bilembo na makanisi ya ntina, kasi akoluka koyeba soki biso moko mpe tosalaka makambo yango. (Lom. 2:21) Soki totosaka ngonga oyo toponá mpo na koyekola na ye, akotika te ete makambo mosusu ebebisa programɛ ya boyekoli. Akomona mpe ete tozali komipimela makambo mosusu mpo na kosakola mpe tozali na kondima makasi. Yango wana, mbala mingi bato oyo bayekolaki Biblia na basakoli oyo balandaki mpenza ndakisa ya Yesu, bakómaka basakoli ya molende mpe oyo babotaka mbuma mingi.

4. Ntango tozali na makita, ndenge nini ndakisa na biso eteyaka basusu?

4 Na makita ya lisangá: Na makita, baklisto nyonso bazali na mokumba ya koteya basusu na ndakisa na bango. Ntango bato ya sika babandi koyangana na makita, bamonaka ndakisa malamu ya baklisto na lisangá mpe yango esalisaka bango mingi. Bamonaka ete biso baklisto tolinganaka mpenza mpe tozali na bomoko, mpe tolekisaka ndelo te na molato mpe na ndenge na biso ya kobongisa nzoto. (Nz. 133:1) Bamonaka mpe ndenge oyo tozangisaka makita te mpe tosalaka eyambweli mpo na kondima na biso. Moto moko oyo ayaki na makita mpo na mbala ya liboso akamwaki komona mwana mwasi moko ya moke afungoli mbala moko vɛrsɛ oyo epesami mpe abandi kolanda botángi na yango na Biblia na ye, na likebi mpenza. Likambo wana etindaki moto yango andima koyekola Biblia.

5. Mpo na nini tosengeli kozala ndakisa malamu?

5 Makomami elendisi biso tólandaka ndakisa malamu ya basusu. (Filp. 3:17; Ebe. 13:7) Nzokande, tosengeli kobosana te ete soki tolandaka malamumalamu ndakisa ya Yesu, basusu bakomona yango mpe yango ekosalisa bango. Yango wana, tiká ete tóbosanaka te maloba oyo ezali na 1 Timote 4:16: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto