Manaka mpo na pɔsɔ ya 2 Mai
PƆSƆ EBANDI NA 2 MAI
Loyembo 99 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 11 par. 15-21, etanda na lok. 117 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yobo 38-42 (Min. 10)
No. 1: Yobo 40:1-24 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Matomba ya kozala na boboto mpe motema molai (Min. 5)
No. 3: Soki moto alobi: “Ondimaka Yesu lokola mobikisi na yo?”—rs lok. 438 par. 3-4 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Mai. Lendisá bandeko nyonso bámeka kosala bongo.
Min. 15: Loná mboto na yo, mpe kopemisa lobɔkɔ na yo te. (Mos. 11:6) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2011, lokasa 170, paragrafe 2 tii na lokasa 173 paragrafe 4. Nsima ya kolobela lisolo mokomoko, sɛngá bayangani báyebisa mateya oyo bazwi na masolo yango.
Min. 10: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Mai. Lisolo na bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato, mpe sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga mpo na kokabola bazulunalo yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Loyembo 91 mpe libondeli