Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Na Congo-Kinshasa, tosalaki mosala malamu mpenza na mobu ya mosala 2011 mpo tokómaki basakoli 161 298; yango emonisi bokoli ya 6%. Tosepelaki mpe na komona ndenge bato 1 043 418 bayanganaki na Ekaniseli na Congo-Kinshasa, mpe bato 28 145 na Congo-Brazzaville.