Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Febwali
“Okanisi ete lelo oyo, Nzambe azali na ebongiseli na ye awa na mabele, to ayokanaka nde na moto na moto? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo elobami awa mpo na libota moko oyo Nzambe abongisaki eleki sikoyo bambula mingi.” Fungolá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali na lokasa 16, bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso, mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali
“Na bambula oyo euti koleka, bato mingi bazali kolobela Armagedone. Okanisi ete bato bakoki kosala eloko moko mpo na kopekisa Armagedone esalema? [Tiká ye apesa eyano.] Talá epai liloba ‘Armagedone’ euti. [Tángá Emoniseli 16:16. Na nsima, lakisá motó ya likambo ya zulunalo yango.] Zulunalo oyo emonisi biyano oyo Biblia epesi na mituna yango.”
Lamuká! Febwali
“Lelo oyo, bato mingi basepelaka kosolola na bato mosusu na nzela ya Internet. Okanisi boni, kosolola na bato na nzela wana ezali na makama to te? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali na toli oyo ekoki kosalisa biso tózwa makama te ntango tozali kosalela Internet. [Fungolá zulunalo na nkasa 6 tii 9, mpe bólobela motuna moko mpe vɛrsɛ oyo ezali wana.] Zulunalo oyo ekosalisa yo oyeba mpe omibatela na makama ya kosolola na bato na nzela ya Internet.”