Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/12 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 3/12 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki moto yango asilaki kozwa buku yango mpe aboyi koyekola Biblia, mosakoli akoki kopesa ye zulunalo moko ya kala to mwa buku moko oyo ekosalisa ye. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia. Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu kasi bayanganaka na makita nyonso ya lisangá te, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya minei 5 Aprili 2012. Soki lisangá na bino esalaka makita mokolo ya minei, makita yango esengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki bokoki kosala bongo te mpe likoki ya kosala Likita na bino ya Mosala ezali te, bokoki kokɔtisa masolo ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino, na programɛ ya Likita mosusu ya Mosala.

◼ Na basanza oyo ezali koya, na Likita ya Mosala, tokotalela DVD mibale oyo ezali na motó ya likambo Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu? mpe Nakosala nini na bomoi na ngai? Soki bozali na mposa na yango, bokoki kosɛnga yango nokinoki na nzela ya lisangá.

◼ Sɛkrɛtɛrɛ asili kotinda lapolo ya Ekaniseli (S-7)? Na nsuka ya pɔsɔ oyo Ekaniseli ekosalema, Mokambi-misala ya bankulutu asengeli koluka koyeba soki lapolo yango etindami na biro ya filiale. Lolenge mosusu ya kosala: bokoki kotinda lapolo yango na SMS to na Internet na adrɛsi jw.org, soki lisangá na bino ezwaki adrɛsi yango (talá mokanda ya mwa 15/12/2006 mpe ya mwa 16/8/2011).

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto