Manaka mpo na pɔsɔ ya 2 Aprili
PƆSƆ EBANDI NA 2 APRILI
Loyembo 8 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 9 par. 8-18 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yirimia 17-21 (Min. 10)
No. 1: Yirimia 21:1-10 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Boyangeli ya Satana emonisi nini? (Min. 5)
No. 3: Makambo nini babalani basengeli kosala mpo bázala na libala ya esengo?—rs lok. 254 par. 1-4 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Aprili.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Aprili. Lisolo na bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá masolo oyo ekoki kosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakoki kotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na masolo ya ebandeli ya Lamuká! mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu, ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Loyembo 99 mpe libondeli