Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/12 lok. 7
  • Mbongo ya bibende mibale ya motuya moke

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongo ya bibende mibale ya motuya moke
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Bomoi na ntango ya kala—Mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Jéhovah alingaka baoyo bakopesaka na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bandakisa ya kolanda​—Mwasi mobola oyo mobali akufá
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Atyaki mingi koleka bato nyonso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 4/12 lok. 7

Mbongo ya bibende mibale ya motuya moke

Likambo moko oyo tokoki kosala mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso ezali kopesa makabo ya mbongo mpo na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Bongo soki tozali na mbongo mingi te?

Mokolo moko, Yesu amonaki mwasi moko mobola oyo mobali akufá azali kotya mbongo ya bibende mibale ya motuya moke na kɛsi ya makabo na tempelo. Atako mwasi yango azalaki kokelela, bolingo oyo alingaki Yehova etindaki ye apesa “nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.” (Mrk. 12:41-44) Lokola Yesu alobelaki likambo oyo mwasi yango asalaki, emonisi ete likabo na ye ezalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe. Ndenge moko mpe, bakristo ya liboso bazalaki te kokanisa ete kaka bandeko na bango oyo bazali bazwi nde basengeli kopesa makabo ya mbongo mpo na mosala ya kosakola. Ntoma Paulo apesaki ndakisa ya bakristo ya Masedonia oyo, atako bazalaki na bobola ya makasi “bakobaki kobondela . . . makasi mpenza ete bázwa libaku malamu ya kopesa biloko na boboto.”​—2 Ko. 8:1-4.

Na yango, soki tokoki ata kopesa likabo ya “mbongo ya bibende mibale ya motuya moke,” tóbosana te ete makabo ya mikemike oyo bandeko mingi bapesi ekómaka mbongo mingi. Soki tozali kopesa makabo na motema moko ekosepelisa Tata na biso ya likoló oyo akabaka mingi, mpo “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Ko. 9:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto