Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Aprili 2012. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.
1. Mpo na nini mokanda ya Yirimia ezali na litomba mpo na biso? [5 Mar., si lok. 129 par. 36]
2. Ndenge nini Yehova akoki kobikisa biso ntango bazali konyokola biso lelo oyo? (Yir. 1:8) [5 Mar., w05 15/12 lok. 23 par. 18]
3. Ntango nini mpe ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazongelaki “banzela ya kala”? (Yir. 6:16) [12 Mar., w05 1/11 lok. 24 par. 12]
4. Mpo na nini tokoki koloba ete “balsame ezali na Gileade” lelo oyo? (Yir. 8:22) [19 Mar., w10 1/6 lok. 22 par. 3–lok. 23 par. 4]
5. Na ndenge nini Yehova ‘ayokaka mawa’ nsima ya kokana kopesa etumbu? (Yir. 18:7, 8) [2 Apr., jr lok. 151, etanda]
6. Na ndenge nini Yehova akosaki Yirimia mpe yango eteyi biso nini? (Yir. 20:7) [2 Apr., jr lok. 36 par. 8]
7. Na ndenge nini banguna ya Bayisraele basantisamaki? (Yir. 22:6-9) [9 Apr., it-1-F lok. 1039 par. 1]
8. Mpo na nini Yehova akokaki mpenza koloba na libota ya Yisraele ete “nabendi yo na motema boboto”? (Yir. 31:3) [23 Apr., jr nk. 142-145 par. 8-11]
9. Ndenge nini tokoki koloba ete mobeko ya Nzambe ekomami na kati ya mitema? (Yir. 31:33) [23 Apr., w07 15/3 lok. 11 par. 2]
10. Kokoma boyokani moko na mikanda mibale ezalaki na ntina nini? (Yir. 32:10-15) [30 Apr., w07 15/3 lok. 11 par. 3]