Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Yuni 2012. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.
1. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova abikisaki Yirimia na ntango ya mpasi? (Yir. 37:21) [7 Mai, w97 15/9 lok. 3 par. 4–lok. 4 par. 1]
2. Na ndenge nini bakristo oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele balandaka ndakisa malamu ya Ebede-meleke? (Yir. 38:8-13) [7 Mai, su lok. 179 par. 9]
3. Lokola Yehova asalelaki basoda ya Nebukadenezare mpo na kobatela Yirimia mpe Baruke, bakristo bakoki mpe koluka libateli epai ya bakonzi ya basoda oyo bamemaka bibundeli? (Yir. 39:11-14) [14 Mai, w83-F 15/10 lok. 31]
4. “Makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka ezalaki nini, mpe ndenge oyo alandaki toli ya Yehova esalisaka biso tótya makanisi na biso na nini? (Yir. 45:5) [21 Mai, w06 15/8 lok. 18 par. 1; lok. 19 par. 6]
5. Ntango Yehova azalaki kolobela etumbu oyo alingaki kopesa Edome, mpo na nini amikesenisaki na “babuki-mbuma ya vinyo” mpe “miyibi”? (Yir. 49:9, 10) [28 Mai, w77-F 1/11 lok. 666 par. 7–lok. 667 par. 1]
6. Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki mokonzi Zidikiya ntango “abandaki kotombokela mokonzi ya Babilone”? (Yir. 52:3, 7-11) [4 Yuni, w88-F 15/9 lok. 17 par. 8; w81-F 1/7 lok. 13 par. 3-4; lok. 14 par. 6]
7. “Ebonga ya makolo” ya Yehova mpe “mwa ndako na ye ya matiti” ezali nini? (Bil. 2:1, 6) [11 Yuni, w07 1/6 lok. 9 par. 1]
8. Yirimia alingaki koloba nini ntango alobaki ete Yehova ‘akokanisa mpe akogumbama likoló na ye,’ mpe mpo na nini maloba yango ezali na ndimbola monene mpo na biso? (Bil. 3:20) [18 Yuni, w07 1/6 lok. 11 par. 2]
9. Mpo na nini ezali malamu moto ayekola komema ekanganeli na ye ya mpasi na ntango azali naino elenge? (Bil. 3:27) [18 Yuni, w07 1/6 lok. 11 par. 4; w87-F 15/2 lok. 24 par. 1]
10. Ndenge nini ndakisa ya Ezekiele ekoki kosalisa biso tósakola na mpiko atako bato mosusu bazali kosepela te na nsango malamu? (Ezk. 3:8, 9) [25 Yuni, w08 15/7 lok. 8 par. 6-7]