Manaka mpo na pɔsɔ ya 25 Yuni
PƆSƆ EBANDI NA 25 YUNI
Loyembo 63 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 13 par. 17-24 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ezekiele 1-5 (Min. 10)
Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yuli.
Min. 15: Tósalela ntango na biso malamu na mosala ya kosakola. (Ef. 5:15, 16) Lisolo na bayangani na mituna oyo elandi. (1) Ndenge nini tokoki kosalela ntango malamu wana: (a) tozali kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola? (b) likita yango esili? (c) ndeko oyo tobimi na ye na mosala ya ndako na ndako, to oyo tokei na ye motuka moko (soki yango esalemaka na teritware na bino) azali kobenda lisolo molai na moto oyo asepeli? (d) tozali kozongela bato oyo bafandi mosikamosika? (2) Mpo na nini tokobungisa ntango te soki: (a) bato ya libota na biso balei (soki likoki ezali) liboso ya kokende na mosala ya kosakola? (b) mosakoli nyonso akómi na ngonga malamu na likita mpo na mosala ya kosakola? (c) tozali kotya likebi ntango motambwisi azali kokabola bato, mpe tozali koluka lisusu te kokabola bandeko biso moko nsima ya likita? (d) moto na moto ayebi esika oyo akosakola liboso akende na teritware?
Min. 10: Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yuli. Lisolo na bayangani. Lobelá mwa makambo oyo ezali na kati ya mikanda yango, mpe bósala elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola mikanda yango.
Loyembo 29 mpe libondeli