Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Na sanza ya Aprili 2012, na Congo-Kinshasa, motángo ya basakoli ekómaki 174 588, babongisi-nzela ya sanza na sanza 15 595, mpe bayekoli ya Biblia 505 448. Lisusu, na sanza moko tokabolaki mwa babuku 335 187 mpe bazulunalo 1 222 470; yango ezali mpe motángo ya sika. Na Congo-Kinshasa mpe Congo-Brazzaville, masangá ya sika 103 efungwamaki na mobu ya mosala 2012, elingi koloba masangá mibale pɔsɔ nyonso. Topesi bino longonya!