Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/12 lok. 5
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 10/12 lok. 5

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 Ɔkɔtɔbɛ 2012. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

1. Etumbelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli elakisi nini? (Ezek. 43:13-20) [10 Sɛt., w07 1/8 lok. 10 par. 4]

2. Mai ya ebale oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezali elilingi ya nini? (Ezek. 47:1-5) [17 Sɛt., w07 1/8 lok. 11 par. 1]

3. Maloba “akanaki na motema na ye” emonisi nini mpo na mateya ya Nzambe oyo Danyele azwaki na bomwana na ye? (Dan. 1:8) [24 Sɛt., dp lok. 33 par. 7 tii 9; lok. 36 par. 16]

4. Nzete ya molai mingi mpenza oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ, ezalaki elilingi ya nini? (Dan. 4:10, 11, 20-22) [1 Ɔk., w07 1/9 lok. 18 par. 5]

5. Danyele 9:17-19 eteyi biso nini na oyo etali libondeli? [8 Ɔk., w07 1/9 lok. 20 par. 5-6]

6. Kondimana nini ‘ebatelamaki mpo na bato mingi’ tii na nsuka ya pɔsɔ 70, to na mobu 36 T.B.? (Dan. 9:27) [8 Ɔk., w07 1/9 lok. 20 par. 4]

7. Maloba oyo anzelu ayebisaki Danyele ete “nkumu ya bokonzi ya Perse” atɛlɛmaki mpo na kobunda na ye emonisi nini? (Dan. 10:13) [15 Ɔk., w11 1/9 lok. 8 par. 2-3]

8. Esakweli nini oyo etali Masiya ekokisamaki na boyokani na Danyele 11:20? [15 Ɔk., dp nk. 232-233 par. 5-6]

9. Na kotalela Hosea 4:11, wapi moko ya makama ya komɛla masanga mingi? [22 Ɔk., w10 1/1 nk. 4-5]

10. Hosea 6:6 eteyi biso likambo nini ya ntina? [22 Ɔk., w07 15/9 lok. 16 par. 8; w05 15/11 lok. 24 par. 11-12]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto