Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/12 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 10/12 lok. 8

Mayebisi

◼ Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tósala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia. Novɛmbɛ mpe Desɛmbɛ: Etikali moke bampasi nyonso esila!, Yehova​—Azali nani?, Yesu Kristo​—Azali nani?, to Okosepela koyeba solo? Soki moto yango asepeli, lakisá ye ndenge toyekolaka na bato Biblia na buku Biblia eteyaka to na moko ya mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Yanuali mpe Febwali: Tokoki kokabola mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso?, Ntango moto oyo olingaka akufi, to Okoki kozala moninga ya Nzambe! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya tóbanda koyekola na bango Biblia.

◼ Na Ɔkɔtɔbɛ, masangá nyonso oyo esalelaka Ndako ya Bokonzi moko esengeli kotalela lisusu ngonga na bango ya makita kobanda na mokolo ya 1 Yanuali 2013; mpe bakoyebisa biro ya filiale mbongwana nyonso oyo esalemi na mokolo ya 1 Desɛmbɛ 2012. Soki lisangá na bino ezali na nkɔti ya Internet jw.org, tosɛngi bino bóbongola ngonga ya makita na esika bakomi: Horaires des réunions.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto