Manaka mpo na pɔsɔ ya 5 Novɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 5 NOVƐMBƐ
Loyembo 115 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia lisangá:
jr mok. 1 par. 1-7 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yoele 1-3 (Min. 10)
No. 1: Yoele 2:17-27 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Na makambo nini tokoki kosalela toli oyo ezali na Masese 22:3? (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komemya ebongiseli ya Yehova?—rs lok. 165 par. 7-11 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene. (Nz. 68:11) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2012, lokasa 117, paragrafe 2, tii lokasa 118, paragrafe 2; mpe lokasa 130, paragrafe 1, tii lokasa 131, paragrafe 2. Sɛngá na bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na Novɛmbɛ. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá mpo na nini bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá na bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na maloba ya ebandeli ya Lamuká! mpe soki ntango ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Loyembo 105 mpe libondeli