Manaka mpo na pɔsɔ ya 7 sanza ya 7
PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA 7
Loyembo 99 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 9 par. 21-24, etanda na lok. 96 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Balevi 17-20 (Min. 10)
No. 1: Balevi 19:19-32 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ntina oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo, to “basantu” bazangi lisumu te—rs lok. 75 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Libulu mozindo (Abîme)—Oyo Biblia elobi mpo na libulu mozindo—it-1-F nk. 22-23 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Bazulunalo oyo tokokabola na sanza ya nsambo. Lisolo na bayangani. Bóbanda na elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola bazulunalo yango na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Na nsima, bótalela maloba yango ya kobanda lisolo banda ebandeli tii nsuka. Mpo na kosukisa, lendisá na mokuse bandeko nyonso bámesana mpenza na bazulunalo yango mpe básangana na molende nyonso na kokabola yango.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani ekosalema na sɛkrɛtɛrɛ. Lobelá mosala oyo esalemaki na eleko ya Ekaniseli, mpe pesá bandeko ya lisangá longonya mpo na mosala oyo basalaki. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kokabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli to ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
Loyembo 123 mpe libondeli