Manaka mpo na pɔsɔ ya 11 sanza ya 8
PƆSƆ EBANDI NA 11 SANZA YA 8
Loyembo 71 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 11 par. 9-16 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mitángo 7-9 (Min. 10)
No. 1: Mitángo 9:9-23 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Soki moto abiki, abiki mpo na libela?—rs lok. 321 par. 4-7 (Min. 5)
No. 3: Akana (Akân)—Moto oyo ayibi Nzambe akosuka mabe—it-1-F lok. 70 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 5: “1914-2014: Mbula nkama moko ya boyangeli ya Bokonzi!” Lisolo na bayangani. Sɛngá ndeko moko atánga paragrafe oyo ezali likoló na lokasa oyo. Masolo ya Likita ya mosala ya sanza oyo ekolobela Bokonzi. Lobelá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwaki mpo na mosala ya kosakola.
Min. 10: “Salelá trakte ya sika oyo elobeli site jw.org.” Bólobela makambo ezali na trakte yango. Bósala elakiseli oyo ekomonisa mosakoli moko azali kopesa moto trakte yango, mpe na nsima asaleli aparɛyi na ye mpo na kolakisa moto ndenge ya kokɔta na site jw.org.
Min. 15: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósakolaka Bokonzi na komindimisa mpenza.” Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli mibale básala elakiseli oyo: Mosakoli atɛlɛmi na molɔngɔ na magazini moko. Moto oyo azali pembeni na ye abwaki liso na zulunalo moko mpe alobi ete: “Mokili oyo etondi na mobulu! Moto nyonso azali kokanisa ete akoki kobongisa mokili kasi makambo ezali kobeba se kobeba.” Mosakoli azali kolobaloba ye moko: ‘Nasengeli koloba likambo moko. Nasengeli kosakola Bokonzi!’ Mosakoli alobi na ye: “Nayebi ete bansango ya mabe ezali se kobakisama. Kasi nakoki kopesa yo trakte oyo? Site ya Internet oyo batye awa esalisi ngai mpenza nazwa biyano na mituna mingi ya minene oyo etali bomoi.” Mosakoli alobeli moko ya mituna oyo ezali na trakte mpe moto yango amonisi ete asepeli.
Loyembo 92 mpe libondeli