MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 6-8
“Asalaki kaka bongo”
Meká naino kokanisa mosala nyonso oyo esɛngaki Noa ná libota na ye básala mpo na kotonga masuwa kozanga bisaleli mpe mayele oyo bato basalelaka lelo na mosala ya botongi!
Masuwa yango ezalaki monene mpenza—molai ya mɛtrɛ soki 133, monene ya mɛtrɛ 22, mpe bosanda ya mɛtrɛ 13
Esɛngaki kokata banzete, kobongisa mpe komema yango mpo na kotya yango esika moko
Esɛngaki kopakola gudrɔ na libándá mpe na kati ya ebakata ya masuwa yango
Esɛngaki koyanganisa bilei ya mbula mobimba mpo na libota ya Noa mpe banyama
Ekoki kozala ete mosala yango eumelaki mbula 40 to 50
Ndenge nini lisolo yango ekoki kolendisa biso soki ekómeli biso mpasi kosala oyo Yehova asɛngi biso?