Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/4 nk. 12-15
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOTO MOKO YA SEMBO NA MOKILI MOKO MABE
  • “SALÁ MASUWA”
  • “KƆTÁ . . . NA MASUWA”
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
  • Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kondima ya Noa ekweisi mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Noa atongi masuwa
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/4 nk. 12-15

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | NOA

“Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”

NOA asemboli mokɔngɔ mpe anyɔlisi nzoto mpo ekómi mpasimpasi. Meká komona ye na makanisi ndenge afandi na nzete moko ya monene, azali kopema mwa moke mpe kotala masuwa ya monene oyo azali kotonga. Nsolo makasi ya Gudrɔ ya mɔtɔ etondi na mopɛpɛ; makɛlɛlɛ makasi ya bisaleli ya mosala ya mabaya ezali koyokana. Na esika afandi, Noa azali komona mosala makasi oyo bana na ye bazali kosala na biteni ndenge na ndenge ya ebakata ya eloko wana oyo bazali kotonga na mabaya. Eleki bambula mingi bandá ye ná mwasi na ye, bana na ye mpe basi na bango bazali kosala mosala wana. Basilisi ndambo ya mosala, kasi mosala oyo etikali ezali naino mingi!

Bato ya mboka na bango bazali komona bango bazoba. Ntango Noa ná bana na ye bazali kokoba mosala, bato bazali se kosɛka; bazali kondima te ete mpela ekozindisa mabele mobimba. Noa azali kokoba kokebisa bango kasi bazali komona yango lokola lisapo mpamba, likambo moko ya bozoba mpenza! Bazali komituna soki mpo na nini Noa azali kolekisa bomoi na ye ná oyo ya libota na ye na mosala wana ya bozoba. Kasi, Yehova, Nzambe ya Noa, azalaki komona ye zoba te.

Liloba ya Nzambe elobi: “Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo.” (Ebandeli 6:9) Yango elimboli nini? Elimboli te ete Nzambe atambolaki awa na mabele to Noa akendaki na likoló. Noa atosaki Nzambe mpenza mpe alingaki ye mingi, yango wana ezalaki lokola ye ná Yehova bazalaki kotambola elongo lokola baninga. Bankóto ya bambula na nsima, Biblia elobi boye mpo na Noa: “Na kondima [na ye], akweisaki mokili na likambo.” (Baebre 11:7) Na ndenge nini? Kondima na ye ekoki koteya biso nini?

MOTO MOKO YA SEMBO NA MOKILI MOKO MABE

Noa akolaki na mokili moko oyo mabe ezalaki se kobakisama. Mabe ezalaki mpe na mikolo ya nkɔkɔ na ye Enoka, moto moko ya sembo oyo atambolaki mpe elongo na Nzambe. Enoka asakolaki ete mokolo oyo Nzambe akopesa bato mabe etumbu ezalaki koya. Kasi, na ntango ya Noa, mabe ebakisamaki mpenza. Kutu na miso ya Yehova, mabele ebebaki, mpo etondaki na mobulu. (Ebandeli 5:22; 6:11; Yuda 14, 15) Nini esalaki ete makambo ebeba mingi ndenge wana?

Baanzelu mosusu bakolisaki ezaleli moko mabe. Moko na bango asilaki kotombokela Yehova, akómaki Satana Zabolo na ndenge akoselaki Nzambe makambo mpe atindaki Adama ná Eva basala lisumu. Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu mpe batombokelaki boyangeli ya Yehova. Basundolaki esika oyo Nzambe atyá bango na likoló, balataki nzoto ya bato mpe bayaki awa na mabele; bazwaki basi ya kitoko mpe babalaki bango. Baanzelu yango ya lolendo, oyo balukaka bolamu na bango moko, babebisaki mpenza bizaleli ya bato.​—Ebandeli 3:1-5; 6:1, 2; Yuda 6, 7.

Lisusu, babotaki ná basi yango bana oyo bazalaki bambinga mpe na makasi moko ya kokamwa. Biblia ebengi bango banefilime, oyo elimboli “bakweisi”​—baoyo bakweisaka basusu. Lokola bazalaki bato ya mobulu, banefilime basalaki ete mobulu ekóma lisusu mingi na mokili. Yango wana, Mozalisi “amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso.” Yehova azwaki ekateli ya koboma mokili wana ya mabe nsima ya mbula 120.​—Ebandeli 6:3-5.

Noa ná mwasi na ye basengelaki kobatela bana na bango na bizaleli mabe

Kanisá naino ndenge ezalaki mpasi kobɔkɔla bana na mokili mabe ya ndenge wana! Yango nde likambo Noa akutanaki na yango. Azwaki mwasi moko malamu. Ntango Noa akómaki na mbula 500, mwasi na ye abotelaki ye bana mibali misato​—Seme, Kame, mpe Yafete.a Noa ná mwasi na ye basengelaki kobatela bana yango na bizaleli mabe oyo ezalaki zingazinga na bango. Bana mike bakamwaka mpe basepelaka komona “bilombe” mpe “mibali ya lokumu”​—banefilime bazalaki mpenza bongo. Ezalaki mpasi mpo Noa ná mwasi na ye babatela bana na bango na basango nyonso ya makambo ya kokamwa oyo bilombe yango bazalaki kosala; atako bongo bazalaki na likoki ya koteya bana na bango solo na ntina na Yehova Nzambe, oyo ayinaka mabe nyonso. Basengelaki kosalisa bango báyeba ete Yehova ayokaka mpasi mpo na mobulu mpe botɔmbɔki oyo ezali na mokili.​—Ebandeli 6:6.

Lelo oyo baboti bakoki komitya na esika ya Noa mpe mwasi na ye. Mokili ya lelo mpe etondi na mobulu mpe botɔmbɔki. Ata masano oyo ebongisami mpo na bana ekoki kotonda na makambo ya ndenge wana. Mpo na kobatela bana na bango, baboti ya mayele basalaka nyonso báteya bango makambo ya Yehova Nzambe ya kimya, oyo mokolo mosusu akosukisa mobulu nyonso. (Nzembo 11:5; 37:10, 11) Baboti bakoki kolonga! Noa ná mwasi na ye balongaki. Bana na bango bakolaki malamu mpe babalaki basi oyo bandimaki mpe kotya Yehova Nzambe ya solo na esika ya liboso na bomoi na bango.

“SALÁ MASUWA”

Mokolo moko, bomoi ya Noa ebongwanaki mpo na libela. Yehova asololaki na ye mpe ayebisaki ye ete akani koboma mokili ya ntango wana. Nzambe ayebisaki Noa boye: “Salá masuwa na mabaya ya nzete ya gofere.”​—Ebandeli 6:14.

Masuwa yango ezalaki te lokola bamasuwa oyo tomonaka lelo, ndenge bato mosusu bakanisaka. Ezalaki te na eteni ya liboso to ya nsima, na yenda te, ezalaki mpe te na eteni oyo egumbamá. Ezalaki nde kɛsi moko ya monene. Yehova apesaki Noa bamezire ya masuwa yango mpe ayebisaki ye likambo mokomoko oyo etali ndenge kɛsi yango ekozala mpe ndenge ya kopakola yango gudrɔ na libándá mpe na kati. Na nsima ayebisaki Noa ntina na yango: “Nazali koyeisa mpela na mabele . . . Eloko nyonso oyo ezali na mabele ekokufa.” Kasi Yehova ayebisaki Noa boye: “Osengeli kokɔta na masuwa, yo ná bana na yo ná mwasi na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” Noa asengelaki mpe kokɔtisa lolenge nyonso ya nyama na masuwa. Kaka baoyo bakɔtaki na masuwa nde babikaki!​—Ebandeli 6:17-20.

Noa azalaki na mosala moko monene mpenza. Masuwa yango ezalaki monene mingi; ezalaki na molai ya mɛtrɛ 133, monene na yango ezalaki ya mɛtrɛ 22 mpe bosanda na yango mɛtrɛ 13. Ezalaki monene koleka bamasuwa ya mabaya ya minene mpenza oyo etambolaka na mbu, ata mpe oyo ya mikolo na biso. Noa aboyaki nde mokumba yango, amilelaki, to abongolaki makambo mosusu mpo amona mpasi mingi te na mosala yango? Biblia elobi boye: “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.”​—Ebandeli 6:22.

Mosala yango ezwaki bambula mingi, mbala mosusu mbula 40 to 50. Basengelaki kokata banzete, komema nkoni, kokata mabaya minene, kobongisa mpe kokangisa yango. Masuwa yango esengelaki kozala na baetajɛ misato, na bashambre mpe porte na mopanzi. Ezalaki mpe na bafenetre oyo elandaná zingazinga ya nsamba; mbala mosusu nsamba yango esalaki mwa nsɔngɛ na katikati mpe ekitá mwa moke mpo na kolekisa mai.​—Ebandeli 6:14-16.

Wana bambula ezalaki koleka mpe masuwa ezalaki kokoba kotongama, na ntembe te, Noa azalaki kosepela ndenge libota na ye epesaki ye mabɔkɔ! Ezali mpe na mosala mosusu oyo ezalaki mpasi mingi koleka kotonga masuwa. Biblia eyebisi biso ete Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petro 2:5) Na yango, na mpiko nyonso, akambaki mosala ya kokebisa bato ya mokili wana mabe mpo na libebi oyo ezalaki koya. Ndenge nini batalelaki likebisi yango? Yesu Kristo akanisaki lisusu eleko yango mpe alobaki ete bato yango “batyaki likebi te.” Alobaki ete bamipesaki na makambo ya mokolo na mokolo na ndakisa, kolya, komɛla, kobala mpe bayokaki Noa ata moke te. (Matai 24:37-39) Na ntembe te, mingi batyolaki ye ná libota na ye; ekoki kozala ete bamosusu bazalaki kobangisa mpe kotɛmɛla ye makasi.

Atako ezalaki na makambo oyo emonisaki ete Nzambe azalaki kopambola Noa, bato bakobaki kaka kosɛka ye mpe bakipaki nsango na ye te

Ata bongo, Noa ná libota na ye batikaki mosala na bango te. Bakobaki kotonga masuwa atako bato oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki komona ete ezalaki mosala moko ezangá ntina mpe ya bozoba. Lelo oyo, mabota ya bakristo ekoki kozwa liteya monene na ndakisa ya kondima ya Noa mpe libota na ye. Kutu, tozali kobika na eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya mokili oyo. (2 Timote 3:1) Yesu alobaki ete eleko na biso ekokokana na eleko oyo Noa atongaki masuwa. Ekozala malamu bakristo bákanisa lisolo ya Noa ntango bato bazali kosepela te na nsango ya Bokonzi ya Nzambe, bazali kotyola to konyokola bango. Bazali bato ya liboso te ya kokutana na mikakatano ya ndenge wana.

“KƆTÁ . . . NA MASUWA”

Bambula eleki, mpe masuwa ekómi pene na kosila. Ntango Noa akómaki pene na mbula 600, bato mosusu ya libota na ye bakufaki. Tata na ye Lameke, akufaki.b Mbula mitano na nsima, Metusela nkɔkɔ ya Noa mpe tata ya Lameke, akufaki; asalaki mbula 969; ye nde moto oyo aumelá mingi na mokili ndenge Biblia emonisi yango. (Ebandeli 5:27) Metusela ná Lameke bazalaki na bomoi eleko moko ná Adama, moto ya liboso.

Kaka na mbula yango, Noa azwaki nsango oyo eutaki epai ya Yehova Nzambe: “Kɔtá yo ná bato nyonso ya ndako na yo na masuwa.” Kaka na ntango wana, Nzambe ayebisaki Noa akɔtisa nyama ya lolenge nyonso na masuwa​—nsambonsambo nyama nyonso ya pɛto, oyo ebongi mpo na kopesa mbeka, mpe akɔtisa nyama mosusu nyonso mibalemibale.​—Ebandeli 7:1-3.

Ezalaki mpasi bábosana oyo bamonaki. Na mosika, ebele ya banyama yango ezalaki koya; mosusu ezalaki kotambola mbangu, malɛmbɛ, kopumbwa, kobendana​—banyama yango ezalaki ya lolenge nyonso, mosusu ya matata mpe mosusu ya kimya. Tokanisa naino ndenge Noa azalaki kokɔtisa banyama mosusu na mwa ndako ya banyama, kogangela bamosusu, to mpe kobondela baoyo ya zamba mpo ekɔta na esika ya nkaka na kati ya masuwa. Biblia elobi ete banyama “yango ekɔtaki . . . na masuwa epai ya Noa.”​—Ebandeli 7:9.

Bato mosusu oyo batyaka ntembe bakoki komituna boye: ‘Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekoki kosalema? Mpe ndenge nini banyama wana nyonso ekoki kofanda na kimya na esika moko ya nkaka?’ Tókanisa naino: Ezali nde likambo ya mpasi mpo Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asala ete banyama oyo akelá ata mpe oyo ya zamba ekóma kimya soki esengeli? Kobosana te ete Yehova azali Nzambe oyo akabolaki mai ya Mbu motane mpe asalaki ete moi etɛlɛma. Akoki te kokokisa makambo nyonso oyo elobami na lisolo ya Noa? Ya solo akoki kosala yango, mpe asalaki yango mpenza!

Toboyi te, Nzambe akokaki kobikisa banyama na lolenge mosusu. Kasi, asalelaki mayele oyo ekundweli biso ndenge oyo atyelaki bato motema na ebandeli mpo na kobatela bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele. (Ebandeli 1:28) Lelo oyo, baboti mingi basalelaka lisolo ya Noa mpo na koteya bana na bango ete Yehova azwaka bato mpe banyama oyo akelá na valɛrɛ.

Yehova ayebisaki Noa ete mpela ekoya nsima ya pɔsɔ moko. Na ntembe, libota yango ekómaki kosala makambo mbangumbangu. Kanisá naino mosala ya kokɔtisa na masuwa banyama nyonso ná biloko na bango ya kolya na molɔngɔ mpe kokɔtisa biloko ya libota. Ekoki kozala ete mwasi ya Noa mpe basi ya bana na ye bazalaki na mosala mingi mpo na kobongisa esika oyo bakofanda na masuwa.

Bato oyo bazalaki zingazinga na bango basalaki nini? ‘Batyaki kaka likebi te,’ ata na makambo nyonso oyo emonisaki ete Yehova azalaki kopambola Noa mpe mosala na ye. Bazalaki kaka kotala ndenge banyama ezali kokɔta na masuwa. Kasi, ekoki kokamwisa biso te soki bazalaki kokipe te. Lelo oyo bato bazali kokipe te makambo oyo ezali mpenza komonisa ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Mpe ndenge ntoma Petro asakolaki yango, basɛki bazali kosɛka baoyo balandaka makebisi ya Nzambe. (2 Petro 3:3-6) Ndenge moko mpe, bato basɛkaki Noa ná libota na ye.

Ntango nini kosɛka yango esilaki? Lisolo elobi ete ntango Noa akɔtisaki libota na ye mpe banyama na masuwa, “Yehova akangaki porte nsima na ye.” Soki basɛki yango bazalaki pembeni wana, na ntembe te likambo wana oyo Nzambe asalaki ekangisaki bango monɔkɔ. Soki bongo te, mbula yango moko ekangisaki bango monɔkɔ, mpo ebɛtaki mpenza! Mpe ekobaki kobɛta tii ntango ezindisaki mabele, kaka ndenge Yehova alobaki.​—Ebandeli 7:16-21.

Yehova asepelaki nde na liwa ya bato mabe wana? Te! (Ezekiele 33:11) Kutu, apesaki bango libaku ya kotika mabe mpe kosala malamu. Bakokaki kosala bongo? Bomoi ya Noa epesi eyano na motuna yango. Ndenge oyo Noa atambolaki elongo na Yehova Nzambe mpe atosaki ye na makambo nyonso, emonisaki ete bato yango mpe bakokaki kobika. Na ndenge yango, kondima na ye ekweisaki mokili ya ntango na ye na likambo mpe emonisaki polele mabe ya bato yango. Kondima na ye ebikisaki ye ná libota na ye. Soki omekoli kondima ya Noa, yo mpe okoki komibikisa mpe kobikisa bato oyo olingaka. Lokola Noa, yo mpe okoki kotambola elongo na Yehova mpe kokóma moninga na ye. Mpe boninga yango ekoki koumela seko!

a Na ntango wana, bato bazalaki koumela mingi na mokili koleka ndenge ezali lelo. Mbala mosusu bazalaki koumela ndenge wana mpo bazalaki nzoto makasi mpe eumelaki naino te banda Adama ná Eva babungisaki nzoto ya kokoka oyo bazalaki na yango.

b Lameke apesaki mwana na ye nkombo Noa, oyo mbala mosusu elimboli “kopema; libɔndisi” asakolaki mpe ete Noa akokokisa ndimbola ya nkombo na ye na ndenge akokamba bato mpo bázwa kopema na mpasi oyo euti na mabele oyo elakelamaki mabe. (Ebandeli 5:28, 29) Lameke akufaki kozanga komona kokokisama ya esakweli yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto