Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr23 Mai nk. 1-16
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • 01-07/05
  • 08-14/05
  • 15-21/05
  • 22-28/05
  • 29/05–04/06
  • 05-11/06
  • 12-18/06
  • 19-25/06
  • 26/06–02/07
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
mwbr23 Mai nk. 1-16

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

01-07/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 17-19

“Taleláká basusu ndenge Yehova atalelaka bango”

w17.03 lok. 24 par. 7

Okotya motema na yo na makambo oyo ekomamá?

7 Tótalela sikoyo ndakisa ya Yehoshafate, mwana ya Asa. Azalaki na bizaleli mingi ya malamu oyo Yehova azalaki kosepela na yango. Mpe ntango azalaki kotyela Yehova motema, asalaki makambo mingi ya malamu. Kasi azwaki mpe bikateli mosusu ya mabe. Na ndakisa, asalaki ete mwana na ye ya mobali abala mwana mwasi ya Ahaba, mokonzi mabe. Na nsima, Yehoshafate asanganaki na Ahaba mpo na kobundisa bato ya Siri, atako mosakoli Mikaya akebisaki ye ete asala yango te. Na etumba, bato ya Siri babundisaki Yehoshafate mpe balingaki koboma ye. (2 Nt. 18:1-32) Ntango azongaki na Yerusaleme, mosakoli Yehu atunaki ye: “Esengeli nde kosalisa moto mabe, mpe osengeli nde kolinga baoyo bazali koyina Yehova?”—Tángá 2 Ntango 19:1-3.

w15 15/8 nk. 11-12 par. 8-9

Manyoláká na bolingo ya Yehova oyo esilaka te

8 Yehova alingi tóyeba ete alingaka biso mpe atalaka te kaka mabunga na biso. Alukaka nde malamu oyo tosalaka. (2 Nt. 16:9) Tótalela sikoyo lolenge oyo Yehova amonaki makambo ya malamu epai ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda. Yehoshafate azwaki ekateli ya mabe ya kosangana na Ahaba mokonzi ya Yisraele mpo na kobundisa bato ya Siri na Ramote-gileade. Atako basakoli ya lokuta 400 bayebisaki mokonzi mabe Ahaba ete akolonga etumba, Mikaya mosakoli ya solo ya Yehova, ayebisaki Yehoshafate mpe Ahaba ete soki babundi, bakolonga te. Mpe ekokisamaki bobele bongo. Ahaba akufaki na etumba mpe Yehoshafate abikaki na mpasi mpenza. Nsima ya etumba, Yehova asalelaki Yehu mpo na kopesa Yehoshafate toli mpo na libunga oyo asalaki. Yehu ayebisaki ye lisusu ete: “Makambo ya malamu emonani epai na yo”—2 Nt. 18:4, 5, 18- 22, 33, 34; 19:1-3.

9 Mwa bambula liboso, Yehoshafate ayebisaki bankumu, balevi, mpe banganga-nzambe bátambola na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato mibeko ya Yehova. Basalaki mosala yango malamu mpenza mpo ata bato ya bikólo mosusu bayebaki Yehova. (2 Nt. 17:3-10) Na yango, atako Yehoshafate azwaki ekateli mabe na nsima, Yehova abosanaki te makambo ya malamu oyo asalaki liboso. Ndakisa wana ekoki mpenza kolendisa biso mpo na bantango mosusu tosalaka mabunga. Kasi, soki tosali nyonso mpo na kosalela Yehova, akokoba kolinga biso mpe akobosana te makambo ya malamu oyo tosalá.

Biloko ya motuya ya elimo

w17.03 lok. 20 par. 10-11

Salelá Yehova na motema mobimba!

10 Yehoshafate, mwana ya Asa, “azalaki se kotambola na nzela ya tata na ye Asa.” (2 Ntango 20:31, 32) Na ndenge nini? Lokola tata na ye, Yehoshafate alendisaki bato bákoba kosambela Yehova. Atindaki mibali na bingumba ya Yuda mpo bákende koteya bato “buku ya mobeko ya Yehova.” (2 Ntango 17:7-10) Kutu, akendaki na teritware ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele, epai ya bato oyo bazalaki na bangomba ya Efraime, “mpo azongisa bango epai ya Yehova.” (2 Ntango 19:4) Yehoshafate azalaki mokonzi “oyo alukaki Yehova na motema na ye mobimba.”—2 Ntango 22:9.

11 Lelo oyo, Yehova alingi ete na mokili mobimba bato báteyama mpo na koyeba ye, mpe biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Yo mpe ozalaka na mokano ya kosakola sanza na sanza? Okosepela koteya basusu Biblia mpo bango mpe bábanda kosambela Yehova? Obondelaka mpo na likambo yango? Soki osali milende, Yehova akoki kosalisa yo ozwa moto ya koyekola na ye Biblia. Okondima koyekola na moto Biblia ata soki ekoki kosɛnga ete oyekola na moto yango na ntango oyo osengeli kopema? Kaka ndenge Yehoshafate asalaki makasi asalisa bato bázongela kosalela Yehova, biso mpe tokoki komeka kosalisa bandeko oyo batiká kosakola. Lisusu, bankulutu ya lisangá bazwaka bibongiseli mpo na kokende kotala mpe kosalisa bato oyo balongolamá na lisangá, oyo bafandi na teritware ya lisangá na bango, mpo na koluka koyeba soki batiká masumu na bango ya kala.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: Batelá makanisi malamu soki bato bazali kosepela te

w21.05 nk. 17-18 par. 11-15

Batelá makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola

11 Bato mosusu basepelaka te na nsango na biso. Bamonaka te ntina ya koluka koyeba makambo etali Nzambe to Biblia. Bandimelaka Nzambe te mpo bamonaka ete mpasi etondi na mokili. Basepelaka na Biblia te mpo bamonaka ete bakonzi ya mangomba oyo balobaka ete batosaka makambo oyo Biblia elobaka, basalaka makambo mingi ya mabe. Bato mosusu mpe bakanisaka mingi makambo etali misala na bango, mabota na bango, to mpe mikakatano na bango moko, yango wana bamonaka te ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa bango. Ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso ntango bato oyo tosakwelaka bazali komona te ntina ya nsango na biso?

12 Monisá ete otyelaka basusu likebi. Bato mingi oyo liboso bazalaki kosepela na nsango malamu te, bakómaki kosepela na yango ntango bamonaki ete mosakoli moko atyelaki bango mpenza likebi. (Tángá Bafilipi 2:4.) Na ndakisa, Davidi oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Soki moto moko alobi ete asepelaka te na nsango na biso, totikaka Biblia mpe mikanda na biso mpe tolobaka: ‘Nakosepela koyeba mpo na nini okanisaka bongo.’” Bato bayebaka ntango moto moko azali kotyela bango likebi. Bakoki kobosana makambo oyo toyebisaki bango, kasi bakobosana te ndenge oyo totyelaki bango likebi. Ata soki nkolo-ndako atikeli biso nzela te tósolola na ye, tokoki komonisa na bizaleli mpe na elongi na biso ete tozali kotyela ye likebi

13 Tokomonisa ete tozali kotyela nkolo-ndako likebi soki toyokanisi mateya na biso na bamposa na ye. Na ndakisa, ezali na makambo oyo emonisi ete azali na bana? Baboti bakoki kosepela na toli ya Biblia oyo elobeli ndenge ya kobɔkɔla bana to ndenge ya kozala na libota ya esengo. Tozali komona bafungola mingi na porte na ye? Tokoki komona malamu tólobela mobulu, mpe ndenge oyo yango ebangisaka bato mingi. Na nsima, nkolo-ndako akoki kosepela koyeba ete makambo yango nyonso ekosila. Mbala nyonso oyo okutani na bato oyo basepeli koyoka, luká kosalisa bango báyeba ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa bango. Katarína, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nabosanaka te ndenge oyo solo ekómisá bomoi na ngai malamu koleka.” Yango esalaka ete Katarína aloba na mpiko, mpe na ntembe te bato oyo asololaka na bango bamonaka yango.

14 Ndimá lisalisi ya basusu. Na siɛklɛ ya liboso, Paulo alakisaki Timote mayele ya kosakola mpe ya koteya mpe alendisaki ye asalela mayele yango mpo na kosalisa basusu. (1 Ko. 4:17) Ndenge moko na Timote, tokoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko oyo baumeli mingi na lisangá. (Tángá Masese 27:17.) Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Shawn. Na ntango moko boye, azalaki mobongisi-nzela na mwa mboka moko epai bato mingi bazalaki kosepela na lingomba na bango. Ndenge nini abatelaki esengo na ye? Alobi boye: “Mbala nyonso soki libaku emonani, nazalaki kosakola elongo na ndeko moko. Ntango tolongwe na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu, nzelanzela tozalaki kolobela makambo oyo tokoki kosala, mpo tókóma basakoli ya malamu koleka. Na ndakisa, tozalaki kolobela makambo oyo nkolo-ndako moko alobaki mpe oyo tosalaki mpo na kosalisa ye. Na nsima, tozalaki kolobela oyo tokoki kosala na mbala ya nsima soki tokutani na likambo ya ndenge wana.”

15 Bondelá Yehova asalisa yo. Sɛngá Yehova asalisa yo mbala nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola. Soki Yehova asalisi biso na nzela ya elimo santu na ye te, moko te kati na biso akokoka kosala makambo oyo azali kosala. (Nz. 127:1; Luka 11:13) Ntango ozali kobondela Yehova asalisa yo, lobáká makambo ya sikisiki. Na ndakisa, sɛngá ye asalisa yo mpo okutana na bato oyo bakosepela koyoka makambo etali ye. Na nsima, salá makambo oyo eyokani na libondeli na yo mpe sakwelá moto nyonso oyo okokutana na ye.

08-14/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 20-21

“Ndimelá Yehova Nzambe na yo”

w14 15/12 lok. 23 par. 8

Tósala na bomoko mpo tólonga mokili oyo enuni

8 Na mikolo ya mokonzi Yehoshafate, basaleli ya Nzambe bakutanaki na monguna moko ya makasi mpenza, “ebele ya bato” oyo bazalaki zingazinga. (2 Nt. 20:1, 2) Likambo ya esengo, basaleli ya Nzambe balukaki te kolonga monguna yango na makasi na bango moko. Balukaki nde lisalisi ya Yehova. (Tángá 2 Ntango 20:3, 4.) Mpe basalaki yango te ndenge balingi, ndenge moto na moto amonaki malamu to ndenge ezalaki koyela ye na motó. Biblia eyebisi biso ete: “Bato nyonso ya Yuda batɛlɛmaki liboso ya Yehova, ata bana na bango ya mike, basi na bango mpe bana na bango.” (2 Nt. 20:13) Bázala bilenge to mikóló, basalaki makasi elongo na kati ya kondima mpo na kolanda litambwisi ya Yehova, mpe Yehova abatelaki bango na mabɔkɔ ya monguna na bango. (2 Nt. 20:20-27) Omoni te ete oyo ezali ndakisa moko kitoko oyo emonisi ndenge oyo biso basaleli ya Nzambe tokoki kolonga mikakatano?

w21.11 lok. 16 par. 7

Bandeko oyo bouti kobalana—Bótya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bino

7 Yehova asololaki na Yehoshafate na nzela ya Molevi moko na nkombo Yahaziele. Yehova alobaki boye: “Bótɛlɛma, bóningana te, mpe bómona lobiko ya Yehova mpo na bolamu na bino.” (2 Nt. 20:13-17) Na ntembe te, yango ezali lolenge malamu te ya kobunda etumba! Kasi malako yango eutaki te epai ya bato, eutaki nde epai ya Yehova. Lokola atyelaki Nzambe na ye motema mobimba, Yehoshafate asalaki kaka ndenge bayebisaki ye. Ntango ye ná bato na ye bakendaki mpo na kokutana na banguna yango, atyaki te basoda oyo bayebi kobunda malamu na molɔngɔ ya liboso, kasi atyaki nde bayembi oyo bayebaki na bango kobunda te. Yehova akokisaki elaka na ye epai ya Yehoshafate; mpe Yehova asalaki ete banguna yango bábomana.—2 Nt. 20:18-23.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 1190 par. 5-6

Yehorame

Bopusi mabe ya mwasi na ye Atalia, ezali moko ya makambo oyo esalaki ete Yehorame alanda te banzela ya sembo ya tata na ye Yehoshafate. (2Nt 8:18) Yehorame asukaki kaka te na koboma bandeko na ye ya mibali motoba mpe bankumu mosusu ya Yuda, kasi atindaki mpe bato na ye bátika kosambela Yehova mpe bákóma kosambela banzambe ya lokuta. (2Nt 21:1-6, 11-14) Boyangeli na ye mobimba etondaki na mikakatano mpe na matata oyo eutaki na kati mpe na libándá ya ekólo na ye. Ya liboso, Edome etombokaki; mpe na nsima, Libina etombokelaki Yuda. (2Nt 8:20-22) Na mokanda moko oyo mosakoli akomaki, apesaki Yehorame likebisi oyo: “Talá! Yehova azali kobɛta bato na yo, bana na yo, basi na yo ná biloko na yo nyonso na kobɛta moko monene.” Lisusu, yo, mokonzi Yehorame, “okobɛla bamaladi ebele, ná maladi ya misɔpɔ tii misɔpɔ na yo ekobima mpo na maladi yango mokolo na mokolo.”— 2Nt 21:12-15.

Makambo esalemaki kaka bongo. Yehova asalaki ete Baarabe mpe Bafilistia bákɔta na ekólo mpe bámema basi ná bana ya mibali ya Yehorame lokola bakangami. Nzambe apesaki nzela ete kaka Yehoahaze, mwana ya nsuka ya Yehorame (oyo abengami mpe Ahazia), likoki ya kokima, kasi likambo yango esalemaki kaka mpo Nzambe asalaki kondimana ya Bokonzi elongo na Davidi. “Mpe nsima ya nyonso wana, Yehova apesaki ye [Yehorame] maladi ya misɔpɔ oyo bakokaki kobikisa te.” Mbula mibale na nsima, “misɔpɔ na ye ebimaki” mpe nsukansuka akufaki. Na ndenge wana nde bomoi ya moto wana ya mabe esukaki, mpe “akendaki na ye, bato bayokaki mawa te.” Bakundaki ye na Sité ya Davidi, “kasi na malita ya bakonzi te.” Ahazia, mwana na ye ya mobali, akómaki mokonzi na esika na ye. — 2Nt 21:7, 16-20; 22:1; 1Nt 3:10, 11.

15-21/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 22-24

“Yehova apesaka mbano na baoyo bamonisaka mpiko”

w09 1/4 lok. 24 par. 1-2

Yehoashe atikaki Yehova mpo na baninga mabe

EZALAKI ntango moko ya nsɔmɔ na Yelusaleme, esika oyo tempelo ya Nzambe ezalaki. Mokonzi Ahazia autaki kobomama. Na nsima, Atalia, mama ya Ahazia asalaki likambo moko ya nsɔmɔ. Abomisaki bankɔkɔ na ye moko​—bana ya Ahazia! Oyebi mpo na nini?—Mpo mwana moko te ya Ahazia ayangela, mpe ye moko akóma mokonzi.

Nzokande, Yehoashe, nkɔkɔ moko ya Atalia, oyo azalaki naino bebe abikisamaki, mpe nkɔkɔ na ye ayebaki likambo yango te. Okolinga koyeba ndenge abikaki?​—Yehoashe, azalaki na mama-leki moko nkombo na ye Yoseba, oyo abombaki Yehoashe na tempelo ya Nzambe. Asalaki yango mpo mobali na ye Yoyada azalaki nganga-nzambe monene. Bango mibale basɛnzɛlaki ete Yehoashe abatelama malamu.

w09 1/4 lok. 24 par. 3-5

Yehoashe atikaki Yehova mpo na baninga mabe

Na boumeli ya mbula motoba, Yehoashe abatelamaki na tempelo na ndenge ya nkuku. Kuna, bateyaki ye makambo etali Yehova Nzambe mpe mibeko na ye. Nsukansuka, ntango Yehoashe akómaki na mbula nsambo, Yoyada akómisaki ye mokonzi. Okosepela koyeba ndenge Yoyada asalaki yango mpe makambo oyo ekómelaki nkɔkɔ na ye Atalia, mokonzi-mwasi mabe?—

Yoyada asangisaki na ndenge ya nkuku babateli nyonso oyo bakonzi ya Yerusaleme bazalaki na bango na ntango wana. Ayebisaki bango ndenge oyo ye ná mwasi na ye babikisaki mwana ya mobali ya moke ya Mokonzi Ahazia. Na nsima, Yoyada alakisaki Yehoashe epai ya bakɛngɛli yango, oyo bamonaki ete azalaki moyangeli ya malamu. Mpe basalaki myango.

Yoyada abimisaki Yehoashe libanda mpe akómisaki ye mokonzi. Mbala moko, bato “babandaki kobɛta mabɔkɔ mpe koloba: “Mokonzi azala na bomoi!”” Bakɛngɛli bazingaki Yehoashe mpo na kobatela ye. Kasi, ntango Atalia ayokaki ndenge bato bazalaki kosepela, akimaki mbangu libanda mpe atombokaki. Kasi Yoyada apesaki bakɛngɛli mitindo ete báboma Atalia.—2 Bakonzi 11:1-16.

it-1-F lok. 776 par. 8

Kokunda ebembe, bisika ya kokunda bibembe

Yehoyada, nganga-nzambe monene ya sembo azwaki lokumu ya kokundama na “Sité ya Davidi esika moko na bakonzi,” azalaki moto kaka moko oyo azwaki libaku yango atako azalaki na libota ya bakonzi te.—2Nt. 24:15, 16.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 1231 par. 10

Zekaria

12. Mwana ya nganga-nzambe monene Yehoyada. Nsima ya liwa na ye, Mokonzi Yehoashe atikaki losambo ya solo, ayokaki toli ya mabe oyo bapesaki ye na esika ayoka basakoli ya Yehova. Zekaria, mwana ya nɔkɔ ya Yehoashe (2Nt. 22:11), akebisaki mpenza bato mpo na likambo yango, kasi na esika babongola motema, babambaki ye mabanga na lopango ya tempelo. Ntango Zekaria azalaki kokufa, alobaki maloba oyo: “Tiká Yehova atala yango mpe asɛnga yango.” Yehova ayanolaki na maloba yango ya esakweli, mpo bato ya Siri babebisaki mpenza Yuda mpe basaleli ya Mokonzi Yehoashe babomaki ye “mpo na makila ya bana ya nganga-nzambe Yehoyada.” Libongoli ya grɛki oyo babengi Septante mpe Libongoli ya Latin oyo babengi Vulgate elobi ete babomaki Yehoashe mpo na kozongisa mabe mpo na makila ya “mwana mobali” ya Yehoyada oyo esopanaki. Nzokande, Makomami ya Bamasorete mpe libongoli ya Peshitta ya Syriaque elobeli “bana mibali,” mbala mosusu mpo na kolobela bolamu mpe valɛrɛ ya nganga-nzambe mpe mosakoli Zekaria, mwana ya Yehoyada.—2Nt 24:17-22, 25.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: Elimo ya Yehova ekosalisa yo okóma na mpiko

w10 15/2 nk. 6-8 par. 6-10

‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’

6 Ndenge ya kozwa na mbala moko mpenza elimo santu ya Nzambe ezali ya kosɛnga yango. Yesu ayebisaki bayoki na ye ete: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?” (Luka 11:13) Ya solo, tosengeli ntango nyonso kobondela mpo na kosɛnga elimo santu. Soki mitindo mosusu ya mosala ya kosakola—kosakola na balabala, na libaku malamu, to na bamagazini mpe na zando—ebangisaka biso, tokoki kobondela Yehova apesa biso elimo na ye mpe kosɛnga ye asalisa biso tózwa mpiko oyo tosengeli na yango.—1 Tes. 5:17.

7 Yango nde likambo mokristo moko ya mwasi na nkombo Rosa asalaki. Mokolo moko ntango Rosa azalaki na esika ya mosala, moninga na ye molakisi azalaki kotánga lapolo moko oyo eutaki na eteyelo mosusu, oyo elobelaki ndenge bazalaki konyokola bana. Molakisi yango atungisamaki makasi na makambo oyo atángaki mpe agangaki ete: “Mokili oyo ezali kokende wapi?” Rosa akokaki te kolekisa libaku wana ya kopesa litatoli. Asalaki nini mpo azwa mpiko ya koloba? Rosa alobi boye: “Nabondelaki Yehova mpe nasɛngaki elimo na ye mpo esalisa ngai.” Alongaki kopesa litatoli ya malamu mpe bayokanaki mokolo oyo bakokoba lisolo yango. Tózwa mpe ndakisa ya Milane, mwana moko ya mwasi ya mbula 5, oyo afandaka na engumba New York. Milane alobi boye: “Liboso nakende kelasi, ngai ná mama tozangaka te kobondela Yehova.” Babondelaka mpo na kosɛnga nini? Milane azala na mpiko ya kotɛlɛma ngwi mpe koloba na ntina na Nzambe na ye! Mama na ye alobi boye: “Yango esalisi Milane alimbola bindimeli na ye na ntina na bafɛti ya mbotama mpe bafɛti mosusu mpe akende te na bisika oyo bazali kosala bafɛti yango.” Bandakisa wana emonisi te ete mpo na kozwa mpiko, libondeli esalaka mpenza?

8 Kanisá mpe oyo esalisaki mosakoli Yirimia azwa mpiko. Ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli epai ya bikólo, Yirimia azongisaki ete: “Talá, nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yir. 1:4-6) Kasi, na nsima Yirimia alendendelaki mingi mpe akómaki makasi na mosala ya kosakola kino bato mingi bakómaki komona ete azali mosakoli kaka ya makambo ya mpasi. (Yir. 38:4) Na boumeli ya mbula koleka 65, asakolaki bitumbu ya Yehova na mpiko. Ayebanaki mingi na Yisraele mpo azalaki kosakola kozanga kobanga mpe na mpiko na boye ete mbula soki 600 na nsima, ntango Yesu alobaki na mpiko, bato mosusu bakanisaki ete Yirimia nde azongi na bomoi. (Mat. 16:13, 14) Ndenge nini mosakoli Yirimia oyo azalaki liboso kokakatana atikaki kozala nsɔninsɔni? Alobaki boye: “Na motema na ngai [liloba ya Nzambe] ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai; mpe nalɛmbaki kobomba yango.” (Yir. 20:9) Ya solo, liloba ya Yehova epesaki Yirimia nguya mpe etindaki ye aloba.

9 Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Nsango to liloba ya Nzambe ekoki kosala epai na biso ndenge esalaki epai ya Yirimia. Tóbosana te ete atako Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia, mikanda ya Biblia ezali bwanya ya bato te, mpo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na 2 Petro 1:21, tozali kotánga boye: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” Soki tozali kozwa ntango ya koyekola Biblia na mozindo, makanisi na biso ekotonda na nsango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. (Tángá 1 Bakorinti 2:10.) Nsango yango ekoki kokóma “lokola mɔtɔ oyo ezali kopela” na kati na biso, na ndenge oyo tokokoka kobomba yango te.

10 Mpo boyekoli ya Biblia esala mpenza mosala epai na biso, esengeli kosalema na ndenge oyo nsango ya Biblia ekokɔta mpenza na motema na biso, ekosimba bomoto na biso ya kati. Na ndakisa, mosakoli Ezekiele amonaki emonaneli moko; na emonaneli yango, basɛngaki ye alya rulo ya buku oyo ezalaki na nsango moko ya makasi ya koyebisa bato oyo bazalaki matoi mangbongi. Ezekiele asengelaki komɛla nsango nyonso mpe kokɔtisa yango mpenza na kati na ye. Kosala bongo ekokómisa mosala ya kopesa nsango yango elɛngi, lokola mafuta ya nzoi.—Tángá Ezekiele 2:8–3:4, 7-9.

22-28/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 25-27

“Yehova azali na makoki ya kopesa yo mingi koleka oyo wana”

it-2-F lok. 1118 par. 3

Yehoashe

Yehoashe apesaki mpe basoda na ye 100 000 epai ya mokonzi ya Yuda mpo na kobundisa bato ya Edome. Nzokande, mpo na toli oyo “moto moko ya Nzambe ya solo” apesaki, esalaki ete azongisa basoda yango, atako basilaki kopesa bango talanta nkama (660 600 $). Basoda yango basilikaki ndenge bazongisaki bango epai na bango, mbala mosusu mpo basengelaki lisusu kozwa te biloko ya motuya oyo basengelaki kopunza na etumba. Na yango, ntango bazongaki na nɔrdi ya ekólo, bapunzaki bingumba oyo ezalaki na bokonzi ya sudi kobanda na Samaria (mbala mosusu esika batyaki kaa ya basoda mpo na etumba) tii na Bete-Horone.—2Nt 25:6-10, 13.

w21.08 lok. 30 par. 16

Ndenge nini okoki ‘komeka’ mpe komona bolamu ya Yehova?

16 Omipimela makambo mosusu mpo na Yehova. Esengeli kaka te tósundola biloko na biso nyonso mpo na kosepelisa Yehova. (Mos. 5:19, 20) Nzokande, soki toboyi kosala mingi na mosala ya Yehova kaka mpo toboyi komipimela makambo mosusu, tokoki kosala libunga oyo mobali moko asalaki na ndakisa oyo Yesu apesaki. Moto yango asalaki mosala makasi mpo na kozwa biloko mingi, kasi azalaki kokipe makambo ya Nzambe te. (Tángá Luka 12:16-21.) Christian, ndeko mobali moko oyo afandaka na France, alobi boye: “Nazalaki kopesa te ntango mpe makasi oyo esengeli na mosala ya Yehova mpe na libota na ngai.” Ye ná mwasi na ye bazwaki ekateli ya kokóma babongisi-nzela. Kasi mpo na kokokisa mokano yango, basengelaki kotika misala na bango. Mpo na kokokisa bamposa na bango, bakómaki kosala mwa mosala ya kotya bopɛto, mpe bayekolaki ndenge ya kosepela na mbongo moke oyo bazalaki kozwa. Bazali mpenza na esengo ndenge bamipimelaki makambo wana mpo bákóma babongisi-nzela? Christian alobi boye: “Tozali kosepela mingi na mosala ya kosakola mpe kosepela komona ndenge bayekoli ya Biblia mpe bato oyo tozongelaka bazali koyekola makambo etali Yehova.”

Biloko ya motuya ya elimo

w07 15/12 lok. 10 par. 1-2

Ozalaka na mopesi-toli?

UZIYA azalaki na mbula 16 ntango akómaki mokonzi ya Yuda. Ayangelaki mbula koleka 50, kobanda na mobu 829 tii na mobu 778 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Uziya “azalaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova” banda azalaki naino elenge. Nini esalisaki ye alanda nzela ya malamu? Biblia elobi boye: “[Uziya] amipesaki na koluka Nzambe na mikolo ya Zekalia oyo alakisaki ye ete atosa Nzambe. Mikolo nyonso ya bomoi na ye wana elukaki ye [Yehova], Nzambe alongisaki ye.”—2 Ntango 26:1, 4, 5.

Biblia elobi makambo mosusu te mpo na Zekalia, moto oyo azalaki mopesi-toli ya mokonzi. Nzokande, Zekalia asalisaki mpenza mokonzi oyo azalaki naino elenge asala oyo ezali malamu na ndenge “alakisaki ye ete atosa Nzambe.” Buku moko (The Expositor’s Bible) emonisi ete Zekalia azalaki “moto oyo amipesaki na koyekola makomami, ayebaki makambo mingi ya Nzambe, mpe azalaki na likoki ya kolakisa bato mosusu makambo oyo ayebi.” Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki boye mpo na Zekalia: “Ayebaki bisakweli mpe . . . azalaki mayele, alingaki Nzambe, mpe azalaki moto malamu; mpe, ekoki kozala ete ateyaki Uziya makambo mingi.”

29/05–04/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 28-29

“Okoki kosalela Yehova ata soki babɔkɔlá yo malamu te”

w16.02 lok. 11 par. 8

Mekolá baninga ya motema ya Yehova

8 Bomoi ya Hizikiya ekesanaki mosika na oyo ya Ruta. Hizikiya azalaki moto ya ekólo oyo emipesaki na Nzambe. Kasi Bayisraele nyonso te nde batikalaki sembo. Mokonzi Ahaze, tata ya Hizikiya, azalaki moto mabe. Azangaki limemya mpo na tempelo ya Nzambe mpe atindaki bato básambela banzambe mosusu. Kutu, Ahaze atumbaki bandeko mosusu ya Hizikiya na mɔtɔ mpo na kopesa bango mbeka epai ya banzambe ya lokuta. Bomwana ya Hizikiya ezalaki mpasi!—2 Bakonzi 16:2-4, 10-17; 2 Ntango 28:1-3.

w16.02 lok. 11 par. 9-11

Mekolá baninga ya motema ya Yehova

9 Ndakisa mabe ya Ahaze ekokaki kotinda mwana na ye Hizikiya asilikela Yehova. Lelo oyo, bato mosusu oyo bayikaki mpiko na mikakatano oyo ekokani ata te na oyo ya Hizikiya bakanisaka ete basengeli “kosilikela Yehova” to kosilikela ebongiseli na ye. (Masese 19:3) Basusu bakanisaka ete lokola bakolá na libota oyo makambo ezalaki malamu te, bakoki kozala na bizaleli mabe to kozongela mabunga ya baboti na bango. (Ezekiele 18:2, 3) Kasi makanisi wana ezali solo?

10 Bomoi ya Hizikiya emonisi ete eyano na motuna wana ezali “te”! Tosengeli ata moke te kosilikela Yehova. Ye te moto abimiselaka bato makambo ya mabe. (Yobo 34:10) Ezali solo ete baboti bakoki koteya bana na bango kosala malamu to mabe. (Masese 22:6; Bakolose 3:21) Kasi yango elimboli te ete libota oyo touti nde ekosala ete tókóma na bomoto boye to boye. Mpo na nini? Mpo Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, elingi koloba, likoki ya kopona kosala malamu to mabe. (Kolimbola Mibeko 30:19) Ndenge nini Hizikiya asalelaki likabo wana kitoko?

11 Atako tata na ye azalaki moko ya bakonzi mabe ya Yuda, Hizikiya akómaki moko ya bakonzi malamu mpenza. (Tángá 2 Bakonzi 18:5, 6.) Alandaki ndakisa mabe ya tata na ye te. Aponaki nde koyoka na likebi basakoli ya Yehova, na ndakisa Yisaya, Mika, mpe Hosea. Atyaki likebi mingi na toli na bango mpe andimaki básembola ye. Yango esalisaki ye abongisa makambo mingi oyo tata na ye abebisaki. Apɛtolaki tempelo, asɛngaki Nzambe alimbisa masumu ya bato ya ekólo na ye, mpe alongolaki bikeko na ekólo mobimba. (2 Ntango 29:1-11, 18-24; 31:1) Na nsima, ntango Senakeribe, mokonzi ya Asiri alukaki kobundisa Yerusaleme, Hizikiya amonisaki mpiko mpe kondima makasi. Atyaki motema ete Yehova akobatela ye mpe alendisaki bato ya ekólo na ye. (2 Ntango 32:7, 8) Na eleko moko boye, Hizikiya akómaki na lolendo, kasi ntango Yehova asembolaki ye, amikitisaki. (2 Ntango 32:24-26) Tomoni polele ete Hizikiya azali ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda. Atikaki te ete makambo ya libota na ye ebebisa bomoi na ye. Amonisaki nde ete azalaki moninga ya Yehova.

Biloko ya motuya ya elimo

w12 15/2 nk. 24-25

Natane—Moto ya sembo oyo alongisaki losambo ya solo

Lokola Natane azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova, andimaki na esengo nyonso likanisi ya Davidi ya kotonga tempelo ya liboso mpo na losambo ya solo awa na mabele. Nzokande, na libaku yango, Natane amonisaki makanisi na ye moko na esika aluka koyeba makanisi ya Yehova. Na butu, Nzambe atindaki mosakoli yango akende koyebisa Davidi nsango mosusu: Davidi akotongela Yehova tempelo te. Mwana na ye nde akotonga yango. Kasi, Natane ayebisaki Davidi ete Nzambe akosala na ye kondimana mpo ete kiti ya bokonzi na ye ‘epikama makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’—2 Sa. 7:4-16.

Na likambo ya kotonga tempelo, mokano ya Nzambe eyokanaki na makanisi ya Natane te. Atako bongo, mosakoli yango ya komikitisa aimaimaki te; andimaki mokano ya Yehova mpe atosaki yango. Tosengeli mpenza kolanda ndakisa na ye ntango Nzambe asemboli biso na likambo moko! Makambo oyo Natane asalaki na nsima lokola mosakoli ya Yehova emonisi ete Nzambe aboyaki ye te. Kutu, emonani ete Yehova apesaki Natane, elongo na Gade, momoni-bimonaneli, elimo na ye mpo básalisa Davidi na kobongisa babɛti-miziki 4 000 na tempelo.—1 Nt. 23:1-5; 2 Nt. 29:25.

05-11/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 30-31

“Koyangana elongo ezali mpo na litomba na biso”

it-1-F lok. 1132 par. 4

Hizikiya

Molende na ye mpo na losambo ya solo. Hizikiya amonisaki molende mpo na losambo ya Yehova kaka ntango abandaki koyangela, wana azalaki na mbula 25. Likambo ya liboso oyo asalaki ezalaki ya kofungola tempelo mpe kobongisa yango. Na nsima, asangisaki banganga-nzambe mpe Balevi mpe ayebisaki bango: “Na motema na ngai, nazali na mposa ya kosala kondimana ná Yehova Nzambe ya Yisraele.” Ezalaki kondimana ya bosembo, lokola nde kondimana ya mibeko oyo ezalaki kaka kasi bato bazalaki kotosa yango te, ezongisamaki lisusu na Yuda. Na mpiko nyonso, akómaki kobongisa Balevi na mosala na bango mpe azongisaki likambo etali kobɛta miziki mpe koyemba mpo na kokumisa Nzambe. Ezalaki na sanza ya Nisana oyo basengelaki kosala fɛti ya Elekeli, kasi tempelo, banganga-nzambe, mpe Balevi bazalaki mbindo. Mokolo ya 16 Nisana, bapɛtolaki tempelo mpe bazongisaki bisaleli na yango. Esɛngaki kopesa bambeka mpo na kozipa masumu ya ekólo Yisraele. Bankumu bayaki na bambeka, bambeka ya lisumu mpo na bokonzi, etumbelo mpe bato. Nsima ya kopesa bambeka yango, bato bapesaki makabo ya kotumba ebele.—2Nt 29:1-36.

it-1-F lok. 1132 par. 5

Hizikiya

Lokola mbindo oyo bato bazalaki na yango epekisaki bango kosala fɛti ya Elekeli na mokolo oyo yango esengelaki kosalema, Hizikiya alandaki mobeko oyo elobaki ete baoyo bazalaki mbindo basengelaki kosala fɛti na nsima ya sanza moko. Abengisaki kaka bato ya Yuda te kasi mpe ya Yisraele, na nzela ya mikanda oyo atindaki epai ya bapoti-mbangu na ekólo mobimba, kobanda na Beere-sheba tii na Dane. Bato mingi bazalaki kotyola bapoti-mbangu yango, kasi bato ya Ashere, ya Manase mpe ya Zebulone bamikitisaki mpe bandimaki libyangi yango, bato mosusu bautaki na Efraime mpe na Isakare. Longola yango, bato mingi oyo bazalaki kosambela Yehova, oyo bazalaki bato ya ekólo Yisraele te bayaki mpe na molulu yango. Na ntembe te ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bato oyo bazalaki na bokonzi ya nɔrdi oyo bazalaki kopesa mabɔkɔ na losambo ya solo báya na fɛti yango. Ndenge moko na bapoti-mbangu wana, bato batɛmɛlaki bango mpe batyolaki bango mpo bokonzi ya mabota zomi oyo ezalaki pene na kokwea, ekɔtaki na losambo ya lokuta mpe bato ya Asiri bazalaki koya kobundisa yango.—2Nt 30:1-20; Mit 9:10-13.

it-1-F lok. 1132 par. 6-7

Hizikiya

Nsima ya Elekeli, basalaki fɛti ya bagato ezangá levire na boumeli ya mikolo nsambo, lokola bato basepelaki makasi, bazwaki ekateli ya kokoba na fɛti yango mikolo nsambo lisusu. Ata na ntango wana ya mpasi, Yehova apambolaki basaleli na ye na boye ete “esengo monene ezalaki na Yerusaleme, mpo banda mikolo ya Salomo mwana ya Davidi mokonzi ya Yisraele, likambo ya boye emonaná naino te na Yerusaleme.”—2Nt 30:21-27.

Yango ezalaki mpenza kozongisama ya losambo ya pɛto, ezalaki kaka te esengo oyo bato bayokaki mpo na mwa ntango, yango emonani na makambo oyo esalemaki na nsima. Liboso bato bázonga epai na bango, babebisaki makonzí ya losambo, bisika oyo etombwamá mpe bitumbelo, mpe babebisaki banzete ya losambo na Yuda mpe na Benyamina ezala na Yisraele mpe na Manase (2Nt 31:1). Hizikiya apesaki ndakisa na ndenge abukaki nyoka ya motako oyo Moize asalaki, mpamba te bato bakómaki kosambela yango mpe kotumbela yango mbeka ya milinga (2Nt 18:4). Nsima ya fɛti wana ya monene, Hizikiya asalaki ete bato bákoba kosambela Nzambe ya solo, na ndenge abongisaki banganga-nzambe mpe bato oyo bazalaki kopesa mabɔkɔ na misala ya tempelo: alendisaki bato bápesaka moko ya bandambo zomi mpe mbuma ya liboso ya bilanga na bango epai ya Balevi mpe Banganga-nzambe, likambo oyo basalaki na motema moko.—2Nt 31:2-12.

Biloko ya motuya ya elimo

w18.09 lok. 6 par. 14-15

“Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango”

14 Koyoka basusu na likebi ezali mpe ndenge mosusu ya komonisa ete tozali na komikitisa. Yakobo 1:19 elobi ete tosengeli “koyokaka noki.” Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo yango. (Eba. 18:32; Yosua 10:14) Na ndakisa, tángá lisolo oyo ezali na Kobima 32:11-14. (Tángá.) Atako Yehova azalaki na mposa ya makanisi ya Moize te, apesaki ye nzela ya koloba ndenge oyo azalaki komiyoka. Soki moto moko apesaki makanisi ya libunga liboso, okondima lisusu koyoka ye ntango molai, mpe na nsima kosala makambo oyo alobi? Nzokande, Yehova amonisaka motema molai mpe ayokaka bato nyonso oyo babondelaka ye na kondima nyonso.

15 Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Soki Yehova amonisaka mpenza komikitisa mpe ayokaka bato ndenge asalaki epai ya Abrahama, Rashele, Moize, Yosua, Manoa, Eliya, mpe Hizikiya, nasengeli te kosala makasi namekola ye? Nasengeli te kopesa bandeko na ngai lokumu, koyoka makanisi na bango mpe kosala makambo balobi, soki esengeli? Ezali na ndeko moko na lisangá to na libota oyo nasengeli kotyela likebi mingi koleka? Nakosala nini mpo na yango?’—Eba. 30:6; Bas. 13:9; 1 Ba. 17:22; 2 Nt. 30:20.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: Kumisá Yehova na makita—Pesáká biyano

w19.01 nk. 11-13 par. 13-18

13 Wapi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo opesa biyano ya kolendisa na makita? Tótalela yango.

14 Bongisáká makita nyonso. Soki omityeli mokano mpe omibongisi malamu, okobanga te kopesa eyano. (Mas. 21:5) Ya solo, moto na moto azali na programɛ na ye ya kobongisa makita. Ndeko mwasi Eloise, oyo azali na mbula mwa moke koleka 80 mpe mobali na ye akufá, abandaka kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ebandeli ya pɔsɔ. Alobi boye: “Nasepelaka na makita mingi soki nayekolaki liboso.” Ndeko mwasi mosusu na nkombo Joy, oyo asalaka mikolo nyonso, atyá ngonga mokolo ya pɔsɔ mpo na kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Alobi boye: “Nalingaka ete makambo oyo tokoyekola ezala naino sika na makanisi na ngai.” Ndeko Ike, nkulutu oyo azalaka na makambo ebele ya kosala mpe azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Namonaka ete eleki malamu nazwa ntango ya koyekola mokemoke na boumeli ya pɔsɔ na esika ya kolekisa ntango ebele na mbala moko.”

15 Kobongisa makita malamu esɛngaka nini? Liboso obanda koyekola, bondelá mpo na kosɛnga Yehova elimo santu. (Luka 11:13; 1 Yoa. 5:14) Na nsima, zwá mwa miniti mpo na kobwaka liso na lisolo yango, na ndakisa talá motó ya likambo, mitó ya makambo mike, bililingi, mpe bitanda nyonso. Ntango ozali koyekola paragrafe mokomoko, salá makasi otánga bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango te. Manyolá makambo yango, mpe tyá likebi na makanisi oyo okosepela kopesa eyano. Soki omibongisi malamu, okozwa matomba mingi mpe ekozala mpasi te opesa eyano.—2 Ko. 9:6.

16 Soki likoki ezali, salelá bisaleli oyo totyaka na baaparɛyi, oyo ezali na monɔkɔ oyo oyebi. Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesi biso bisaleli mpo na kosalisa biso tóbongisa makita. JW Library® esalisaka biso tózwa mikanda ya boyekoli mpe tótya yango na telefone to na tablɛti na biso. Na nsima tokoki koyekola, to ata kotánga to mpe koyoka lisolo yango, ntango nyonso oyo tolingi mpe ata esika nini. Basusu basalelaka esaleli yango mpo na koyekola na ntango ya bopemi na mosala to na eteyelo, to mpe ntango bazali kosala mobembo. Watchtower Library mpe Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET™ esalisaka biso tósala bolukiluki na makambo oyo tolingi koyeba malamumalamu.

17 Soki likoki ezali, bongisáká biyano ebele mpo na eteni nyonso ya boyekoli. Mpo na nini? Mpo mbala mosusu bakopona yo te ntango nyonso oyo otomboli lobɔkɔ. Basusu bakoki kotombola mabɔkɔ nzela moko na yo, mpe motambwisi akoki kopona moko na bango. Mpo makita esila na ntango oyo esengeli, ekoki kosɛnga motambwisi apona bato mingi te na bisika mosusu. Na yango, kosilika te mpe kolɛmba nzoto te soki aponi yo te na ebandeli ya boyekoli. Soki obongisi biyano ebele, okozwa mabaku mosusu ya kopesa biyano. Kotánga vɛrsɛ ekoki mpe kozala na kati ya biyano oyo okobongisa. Kasi soki likoki ezali, omibongisa mpo na kopesa eyano, na maloba na yo moko.

18 Pesáká biyano ya mikuse. Mbala mingi, biyano oyo elendisaka mpenza ezalaka ya mikuse mpe ya mindɔndɔ te. Na yango, mityelá mokano ya kopesa biyano ya mikuse. Salá makasi elekaka segɔnde 30 te. (Mas. 10:19; 15:23) Soki opesaka biyano na makita banda bambula mingi, ozali na mokumba monene: osengeli kozala ndakisa malamu na oyo etali kopesa biyano ya mikuse. Soki ozali kopesa biyano ya mindɔndɔ oyo ezwi miniti ebele, ekoki kobangisa basusu, mpe bakokanisa ete bakokoka te kopesa biyano ya malamu lokola yo. Lisusu, kopesa biyano ya mikuse esalaka ete bato ebele bázwa libaku ya kopesa biyano. Mingimingi soki baponi yo moto ya liboso, pesá mbala moko eyano ya mokuse na motuna ya paragrafe. Koluka te kolobela makanisi nyonso oyo ezali na paragrafe. Soki likanisi ya ntina ya paragrafe ebimi, okoki kobakisa makanisi mosusu.—Talá etanda “Eyano nini nakoki kopesa?”

12-18/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 32-33

“Lendisá bandeko na yo na ntango ya mpasi”

it-1-F lok. 212 par. 6

Asiri

Senakeribe. Senakeribe, mwana ya Sargon II, abundisaki bokonzi ya Yuda na mbula ya 14 ya boyangeli ya Hizikiya (732 L.T.B.) (2Ba 18:13; Yis 36:1). Hizikiya atombokelaki bokonzi ya bato ya Asiri oyo bazalaki konyokola bato ya Yuda mpo na makambo oyo Ahaze tata na ye asalaki (2Ba 18:7). Mpo na yango nde Senakeribe abundisaki Yuda mpe emonani ete abɔtɔlaki bingumba 46 ya bokonzi yango (talá Yis 36:1, 2). Lisusu, kolongwa na Lakishi epai azalaki kofanda, Senakeribe asɛngaki Hizikiya afuta lomande ya talanta 30 ya wolo (pene na 11 560 000 $) talanta 300 ya palata (pene na 1 982 000 $) (2Ba 18:14-16; 2Nt 32:1; talá mpe Yis 8:5-8). Atako afutaki lomande yango, Senakeribe atindaki molobeli na ye epai ya Hizikiya mpo na kosɛnga ete Yerusaleme emitika na mabɔkɔ na ye (2Ba 18:17–19:34 ; 2Nt 32:2-20). Na yango, na butu moko kaka Yehova abomaki basoda 185 000 ya Asiri, yango esalaki ete moto yango ya Asiri ya lofundo azonga na Ninive (2Ba 19:35, 36), kuna bana na ye mibale ya mibali babomaki ye. (2Ba 19:37; 2Nt 32:21, 22; Yis 37:36-38). Longola kaka kobebisama ya basoda ya Asiri, makambo yango nyonso ezali na prisme ya Senakeribe mpe na oyo ya Esare-hadone.—BILILINGI, Vol. 1, lok. 957.

w13 15/11 lok. 19 par. 12

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?

12 Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso na makambo oyo biso moko tokokoka te, kasi mposa na ye ezalaka ete tósala oyo tokoki. Hizikiya asololaki na “bankumu na ye mpe mibali na ye ya nguya,” mpe bazwaki mokano “mpo bákanga mai ya maziba oyo ezalaki libándá ya engumba . . . Lisusu, [Hizikiya] azwaki mpiko mpe atongaki efelo oyo ebukanaki mpe atɛlɛmisaki manɔ́ngi likoló na yango, mpe efelo mosusu libándá; . . . mpe asalaki ebele ya bibundeli ya kobwakela ná banguba.” (2 Nt. 32:3-5) Mpo Yehova abatela mpe atambwisa bato na ye na ntango wana, asalelaki mibali ya mpiko lokola Hizikiya, bankumu na ye, mpe basakoli ya sembo.

w13 15/11 lok. 19 par. 13

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?

13 Likambo oyo Hizikiya asalaki na nsima ezalaki na ntina mingi koleka kokanga mai to kotonga bifelo mpo na kobatela engumba. Lokola Hizikiya azalaki mokɛngɛli ya malamu, ayanganisaki bato na ye mpe alendisaki bango na maloba oyo: “Bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te mpo na mokonzi ya Asiri . . . , mpo baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na ye. Lobɔkɔ ya moto nde ezali elongo na ye, kasi Yehova Nzambe na biso azali elongo na biso mpo na kosalisa biso mpe kobundela biso bitumba.” Hizikiya akundwelaki bato ete Yehova akobundela bango. Ntango bayokaki bongo, “bato balendisamaki na maloba ya Hizikiya mokonzi ya Yuda.” Tósimba ete “maloba ya Hizikiya” nde elendisaki bato. Hizikiya, bankumu na ye mpe mibali na ye ya nguya, bakisá mpe mosakoli Mika ná mosakoli Yisaya, bamonisaki ete bazali babateli malamu ya mpate, kaka ndenge Yehova asakolaki na nzela ya mosakoli na ye.—2 Nt. 32:7, 8; tángá Mika 5:5, 6.

Biloko ya motuya ya elimo

w21.10 nk. 4-5 par. 11-12

Kobongola motema ya solosolo elimboli nini?

11 Nsukansuka, Yehova ayanolaki na mabondeli ya Manase. Amonaki ete Manase abongolaki mpenza motema, ndenge mabondeli na ye emonisaki yango. Na yango, Yehova ayokaki malɔmbɔ oyo Manase asalaki mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe azongisaki ye lisusu na bokonzi. Manase asalaki oyo akoki mpo na komonisa ete abongolaki mpenza motema. Asalaki makambo oyo Ahaba asalaki te. Abongolaki bizaleli na ye. Na mpiko nyonso, abundisaki losambo ya lokuta mpe alendisaki losambo ya solo. (Tángá 2 Ntango 33:15, 16.) Na ntembe te, yango esɛngaki mpiko mpe kondima mpo na boumeli ya bambula mingi, Manase azalaki ndakisa mabe mpo na bato ya libota na ye, mpo na bato ya lokumu ya mboka na ye, mpe mpo na bato ya ekólo na ye mobimba. Kasi ntango Manase akómaki mobange, asalaki nyonso abongisa makambo mosusu ya mabe oyo asalaki. Mpe emonani ete akómaki ndakisa malamu mpo na nkɔkɔ na ye Yosiya, oyo na nsima akómaki mokonzi moko malamu.—2 Ba. 22:1, 2.

12 Ndakisa ya Manase ekoki koteya biso nini? Amikitisaki, kasi asukaki kaka wana te. Abondelaki Yehova mpe asɛngaki ayokela ye mawa. Mpe abongolaki bizaleli na ye. Asalaki oyo akoki mpo abongisa makambo mabe oyo asalaki mpe alingaki kosambela Yehova mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo. Ndakisa ya Manase ekoki kosalisa ata baoyo basalá masumu ya minene koleka. Tomoni polele ete Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nz. 86:5) Kaka baoyo bamonisaka kobongola motema ya solosolo nde balimbisamaka.

19-25/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 NTANGO 34-36

“Ozwaka mpenza matomba na Liloba ya Nzambe?”

it-1-F lok. 1152

Huluda

Nsima ya kotángela ye “buku mpenza ya mobeko” oyo nganga-nzambe monene Hilikiya amonaki ntango bazalaki kobongisa tempelo, Yosiya atindaki bato bátuna makanisi ya Yehova. Bakendaki epai ya mosakoli Huluda, oyo ayebisaki bango maloba ya Yehova ete makambo nyonso ya mabe oyo esakolamaki na “buku” yango esengelaki kokómela ekólo wana ya bapɛngwi soki batosi te mibeko yango. Huluda abakisaki ete, lokola Yosiya amikitisaki liboso ya Yehova asengelaki te komona makambo yango ya mabe, kasi asengelaki koyanganisama na bankɔkɔ na ye mpe na malita na ye na kimya.—2Ba 22:8-20; 2Nt 34:14-28.

w09 15/6 lok. 10 par. 20

Tózala na molende mpo na Ndako ya Yehova!

20 Ntango bazalaki kosala mosala ya kobongisa tempelo ndenge Mokonzi Yosiya atindaki, nganga-nzambe monene Hilikiya “amonaki buku ya mobeko ya Yehova na lobɔkɔ ya Moize.” Apesaki yango Safana, oyo azalaki mokomeli ya mokonzi, mpe ye abandaki kotángela yango Yosiya. (Tángá 2 Ntango 34:14-18.) Likambo nini esalemaki? Na mbala moko, mokonzi apasolaki bilamba na ye mpo na mawa mpe atindaki bato bákende kotuna Yehova. Na nzela ya mosakoli-mwasi Huluda, Nzambe amonisaki ete azalaki kosepela te na makambo mosusu oyo bato ya Yuda bazalaki kosala na losambo. Kasi, amonaki milende oyo Yosiya asalaki mpo na kolongola losambo ya bikeko, mpe akobaki kondima ye atako alakaki ete mpasi ekokwela ekólo mobimba. (2 Nta. 34:19-28) Likambo yango ekoki koteya biso nini? Na ntembe te, biso mpe tolingi kosala lokola Yosiya. Tosengeli kotosaka nokinoki malako ya Yehova, tosengeli kobosanaka te likambo oyo ekoki kokómela biso soki totiki ete lipɛngwi to kozanga bosembo ekɔta na losambo na biso. Mpe tokoki kozala na elikya ete Yehova akomona milende na biso mpo na losambo ya solo, kaka ndenge amonaki oyo ya Yosiya.

Biloko ya motuya ya elimo

w17.03 lok. 27 par. 15-17

Okotya motema na yo na makambo oyo ekomamá?

15 Mpo na kosukisa, liteya nini tokoki kozwa epai ya Yosiya? Atako Yosiya azalaki mokonzi malamu, asalaki libunga oyo ememaki ye na liwa. (Tángá 2 Ntango 35:20-22.) Nini esalemaki? Yosiya abandisaki etumba na Neko, mokonzi ya Ezipito, atako ezalaki na ntina te asala bongo. Kutu, Neko ye moko ayebisaki Yosiya ete alingi kobunda na ye te. Biblia elobi ete maloba ya Neko “eutaki na monɔkɔ ya Nzambe.” Atako bongo, Yosiya akendaki na etumba yango mpe abomamaki. Kasi, mpo na nini abundisaki Neko? Biblia elobi yango te.

16 Yosiya asengelaki koluka koyeba soki likambo oyo Neko alobaki eutaki mpenza epai ya Yehova. Na ndenge nini? Akokaki kotuna Yirimia, mosakoli ya Yehova. (2 Ntango 35:23, 25) Lisusu, Yosiya asengelaki koluka koyeba likambo yango malamu. Neko azalaki nde kokende na Karakemishe mpo na kobundisa ekólo mosusu, kasi Yerusaleme te. Mpe Neko alukaki te kofinga Yehova to basaleli na ye. Yosiya akanisaki malamumalamu te makambo nyonso wana liboso ete azwa ekateli. Likambo yango eteyi biso nini? Soki tozali na likambo mpe tolingi kozwa ekateli, tosengeli libosoliboso koluka koyeba oyo Yehova akolinga ete tósala.

17 Soki tolingi kozwa ekateli moko, tosengeli liboso kokanisa na ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso mpe ndenge oyo tokoki kosalela yango. Ntango mosusu, tokoki kosala bolukiluki na kati ya mikanda na biso to ata kosɛnga toli epai ya nkulutu moko. Akoki kosalisa biso tókanisa mitinda mosusu ya Biblia. Tózwa ndakisa oyo: Ndeko mwasi moko azali na mobali oyo azali Motatoli te. Mokolo moko, amibongisi mpo na kobima na mosala ya kosakola. (Misala 4:20) Kasi na mokolo yango, mobali na ye alingi te ete akende kosakola. Mobali yango ayebisi ye ete esali mwa mikolo bazali te kolekisa ntango mingi elongo, yango wana alingi ete bákende esika moko boye. Na yango, ndeko mwasi wana ataleli bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa ye azwa ekateli ya malamu. Ayebi ete asengeli kotosa Nzambe mpe ete Yesu apesaki biso etinda ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Misala 5:29) Kasi, amikundoli mpe ete mwasi asengeli kotosa mobali na ye, mpe ete basaleli ya Nzambe basengeli kozala makambo makasimakasi te. (Baefese 5:22-24; Bafilipi 4:5) Mobali na ye azali nde kopekisa ye akende kosakola, to alingi kaka ete bálekisa ntango mingi elongo mokolo wana? Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka kozwa bikateli oyo ezali na bokatikati mpe oyo ekosepelisa ye.

Diskur—Motó ya likambo: Monisá nguya ya Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola

w17.09 nk. 25-26 par. 7-10

“Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”

7 Ezali na ntina ete tósalelaka Liloba ya Nzambe mingi ntango tozali kosakola mpe koteya. Ndeko mobali moko alobaki boye: “Soki obimi mpo na kosakola ndako na ndako elongo na Yehova, kaka yo nde okoloba to okotikela ye mpe aloba?” Ntango totángeli moto Biblia, ezali lokola totiki Yehova aloba na ye. Vɛrsɛ moko oyo eponami malamu ezali na nguya koleka makambo nyonso oyo tokoki koloba. (1 Batesaloniki 2:13) Ntango ozali na mosala ya kosakola, osalaka makasi otánga Biblia mbala nyonso oyo okoki?

8 Kasi, kosuka kaka na kotángela moto vɛrsɛ ekoki te. Bato mingi bayebaka ndimbola ya bavɛrsɛ ya Biblia te. Ezalaki bongo na siɛklɛ ya liboso, ezali mpe bongo lelo. (Baroma 10:2) Tókanisa te ete moto oyo totángeli vɛrsɛ ayebi ndimbola na yango. Tokoki kosalisa ye; tokoki kozongela maloba to makanisi ya ntina ya vɛrsɛ yango, mpe kolimbolela ye yango. Na ndenge yango, Liloba ya Nzambe ekoki kokɔta na motema mpe na makanisi ya bato oyo bazali koyoka biso.—Tángá Luka 24:32.

9 Makambo oyo tolobi liboso ya kotánga vɛrsɛ ekoki mpe kosalisa moto amemya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, tokoki koloba: “Tótala oyo Mozalisi na biso alobi na likambo yango.” To soki tozali kosolola na moto oyo azali mokristo te, tokoki koloba, “Tótala oyo Makomami Mosantu elobi.” Soki tokutani na moto oyo alingaka makambo ya mangomba te, tokoki kotuna ye: “Osilá koyoka maloba oyo ya ntango ya kala?” Soki obosani te ete moto na moto azali na makanisi mpe bindimeli na ye, okosala nyonso oluka maloba oyo ebongi mpo na ye.—1 Bakorinti 9:22, 23.

10 Bato mingi bamonaka ete kosalela Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kosalisa bato oyo tozali koteya. Na ndakisa, ndeko moko akendaki kotala mobange moko ya mobali oyo atángaka bazulunalo na biso banda bambula mingi. Mokolo moko, na esika apesa ye kaka nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ndeko yango amonaki malamu atángela ye vɛrsɛ moko. Atángaki 2 Bakorinti 1:3, 4, oyo elobi: “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” Maloba yango esimbaki motema ya mobange wana mpe asɛngaki ndeko mobali azongela kotánga bavɛrsɛ yango. Na nsima, alobaki ete ye ná mwasi na ye bazalaki mpenza na mposa ya libɔndisi. Mokapo wana etindaki ye aluka koyeba Biblia malamu. Kosalela Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola esalisaka mpenza!—Misala 19:20.

26/06–02/07

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EZERA 1-3

“Tiká Yehova asalela yo”

w22.03 lok. 14 par. 1

Omonaka makambo oyo Zekaria amonaki?

BAYUDA bazalaki na esengo makasi. Yehova Nzambe “alamwisaki elimo ya Siruse mokonzi ya Perse” mpo apesa Bayisraele, oyo balekisaki bambula mingi na Babilone, nzela ya kozonga na mboka na bango. Mokonzi atindaki bábelela ete Bayuda bázonga na mboka na bango mpo na ‘kotonga lisusu ndako ya Yehova Nzambe ya Yisraele.’ (Ezr. 1:1, 3) Ekateli yango epesaki esengo mpenza! Yango elimbolaki ete Bayuda bakokaki kozongisa losambo ya Nzambe ya solo na mokili oyo apesaki bango.

w17.10 lok. 26 par. 2

Makalo ná motole moko ezali kobatela yo

2 Zekaria ayebaki ete Bayuda oyo bazongaki na Yerusaleme bazalaki basambeli ya Yehova. Bazalaki bato oyo “elimo ya Nzambe ya solo elamwisaki” mpo bátika bandako mpe mimbongo na bango na Babilone. (Ezera 1:2, 3, 5) Batikaki esika oyo bayebaki malamu mpe bakendaki na mokili oyo mingi kati na bango bamonaki naino te. Lokola kotonga lisusu tempelo ya Yehova ezalaki na ntina mingi, Bayuda yango bandimaki kosala mobembo ya mpasi ya kilomɛtrɛ soki 1 600 na mokili ekauká.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/1 lok. 19 par. 2

Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezela

1:3-6. Lelo oyo, na ndakisa ya Bayisalaele mosusu oyo batikalaki na Babilone, Batatoli ya Yehova mingi bakoki te kosala mosala ya ntango nyonso to kosala na bisika oyo basakoli bazali mingi te. Atako bongo, basungaka mpe balendisaka baoyo bakoki kosala yango mpe bapesaka makabo mpo mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ekende liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto