Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Janvier nk. 8-9
  • 29/01–04/02

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 29/01–04/02
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Janvier nk. 8-9

29/01-04/02

YOBO 40-42

Loyembo 124 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Yobo

(Min. 10)

Yebá ete makanisi na yo ezali na ndelo kasi oyo ya Yehova ezali na nsuka te (Yb 42:​1-3; w10 15/10 nk. 3-4 par. 4-6)

Zaláká pene ya kondima toli ya Yehova mpe ya ebongiseli na ye (Yb 42:​5, 6; w17.06 lok. 25 par. 12)

Yehova apesaka mbano epai ya baoyo batikalaka sembo epai na ye atako mikakatano (Yb 42:​10-12; Yk 5:11; w22.06 lok. 25 par. 17-18)

Yobo ná mwasi na ye pene na mwa ngomba batalani mpe bazali kosepela. Yobo atye lobɔkɔ epai bitonga ya bibwele mpe ndako na ye ezali.

Yehova apesaki Yobo mbano mpo na bosembo na ye

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yb 42:7—Baninga misato ya Yobo bazalaki mpenza koloba na nani mabe, mpe ndenge nini koyeba yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango bazali kotyola biso? (it-2-F lok. 344)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yb 42:​1-17 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Moto yango ayebi makambo ya bakristo te. (lmd liteya 5 pwɛ 3)

5. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 13 pwɛ 6-7 mpe Soki moto alobi na yo (lmd liteya 11 pwɛ 4)

6. Diskur

(Min. 4) lmd apɛndisi A pwɛ 2—Motó ya likambo: Mabele ekobebisama te. (th liteya 13)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 108

7. Salisá basusu bámona bolingo ya Yehova

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Elilingi ya video “Tozwi bolingo ya solosolo na kati ya libota ya Yehova.” Mimi ná mama na ye bamemeli ndeko mwasi moko na mbeto ya lopitalo bafololo ná karte.

Tosepelaka kosalela Nzambe moko ya bolingo mpenza. (1Yoa 4:​8, 16) Bolingo ya Yehova ebendaka biso epai na ye mpe etindaka biso tótikala pene na ye. Lokola tozali bampate ya Yehova, tomonaka bolingo na ye epai na biso.

Tosalaka makasi ya komekola bolingo ya Yehova na ndenge tosalelaka bato ya libota na biso, bandeko na biso bakristo, mpe basusu makambo. (Yb 6:14; 1Yoa 4:11) Soki tozali komonisa bolingo, tokosalisa basusu báyekola koyeba Yehova mpe bápusana pene na ye. Kasi, soki tozali komonisela basusu bolingo te, ekoki kozala mpasi mpo bándima ete Yehova alingaka bango.

Lakisá VIDEO Tozwi bolingo ya solosolo na kati ya libota ya Yehova. Na nsima tuná bayangani boye:

Liteya nini ozwi epai ya Lei Lei ná Mimi na oyo etali ntina ya komonisa bolingo?

Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bandeko na biso bámona bolingo ya Yehova?

  • Monáká bango lokola bampate ya Yehova ya motuya.—Nz 100:3

  • Lobáká na bango na ndenge oyo ekolendisa bango.—Ef 4:29

  • Mityáká na esika na bango. —Mt 7:​11, 12

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 5 par. 1-8, etanda na lok. 39

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 126 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto