Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
© 2023 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
01-07/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 32-33
Bɔndisá baoyo bazali na mitungisi
it-1-F lok. 724
Elihu
Elihu azalaki kopona bilongi te, apesaki moto moko te batitre ya mineneminene mpo básepela na ye. Ayebaki ete ndenge moko na Yobo, ye mpe asalemaki na mabele ya lima mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde asalaki ye. Elihu alingaki ata moke te kobangisa Yobo, kasi alobaki na ye lokola moninga ya solosolo, kutu abengaki Yobo na nkombo na ye, likambo oyo Elifaze, Biledade, to Zofare basalaki te.—Yobo 32:21, 22; 33:1, 6.
Otalelaka bolɛmbu ya basusu lokola Yehova?
8 Na ntembe te, tokomitya mpenza na esika ya bandeko na biso soki toyebi ete bolɛmbu na bango eutaki na makambo ya mpasi lokola maladi, kozala na molongani oyo azali Motatoli te to na moboti (baboti) oyo azali Motatoli te, mpe kotungisama na makanisi. Biso mpe tokoki mbala mosusu kokutana na makambo ya ndenge wana. Atako Bayisraele bazalaki babola mpe balɛmbaki na mokili ya Ezipito, Yehova alobaki na bango liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka ete basengeli te ‘koyeisa mitema na bango makasi’ epai ya bandeko na bango oyo bazalaki na mpasi. Yehova alingaki bábosana te ete basengeli kosalisa mobola.—Mib. 15:7, 11; Lev. 25:35-38.
9 Na esika ya kokanisela basusu mabe nokinoki, tosengeli nde kopesa lisalisi ya elimo epai ya baoyo bazali mpenza kotungisama. (Yobo 33:6, 7; Mat. 7:1) Tózwa ndakisa: Soki moto akumbaka tukutuku asali aksida mpe akei nokinoki na lopitalo, minganga bakobanda kotuna mpo na koyeba soki ye nde moto asalaki ete aksida yango esalema? Te, bakobanda mbala moko kopesa ye lisalisi oyo esengeli. Ndenge moko mpe, soki ndeko moko mokristo alɛmbi mpo na makambo oyo akutani na yango, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kopesa ye lisalisi na elimo.—Tángá 1 Batesaloniki 5:14.
10 Soki tofandi mpe tokanisi mpo na mikakatano oyo ekómeli bandeko na biso, tokotalela bolɛmbu na bango na ndenge mosusu. Kanisá mpo na bandeko basi oyo bazali kobunda na botɛmɛli ya libota na boumeli ya bambula. Ntango mosusu, bamosusu bamonanaka lokola bato balɛmbálɛmbá, atako bongo, bamonisaka ete bazali na kondima makasi mpe na makasi ya kotosa Yehova na motema mobimba, boye te? Ntango omonaka mama moko oyo abɔkɔlaka mwana to bana ye moko azali koyangana mbala na mbala na makita elongo na mwana to bana yango, kondima na ye mpe ekateli oyo azali na yango ekamwisaka yo te? Bongo tokoloba nini mpo na bilenge oyo bazali kokangama na solo atako bazali kokutana na makambo mabe na eteyelo? Mpo na koloba solo, tokoki kondima ete bandeko yango oyo bakoki komonana lokola balɛmbálɛmbá, bakoki kozala “bazwi na kati ya kondima” lokola bandeko mosusu kati na biso oyo bazali na mikakatano te.—Yak. 2:5.
Ntango nini ebongi koloba?
17 Mobali ya minei oyo ayaki kotala Yobo ezalaki Elihu, oyo azalaki moto ya libota ya Abrahama. Ayokaki badiskur ya Yobo mpe ya mibali wana misato. Emonani ete atyaki likebi na makambo oyo balobaki mpo apesaki mwa toli ya boboto kasi ya polele, oyo esalisaki Yobo asembola makanisi na ye. (Yobo 33:1, 6, 17) Elihu alukaki libosoliboso kokumisa Yehova, kasi te komikumisa to kokumisa moto mosusu. (Yobo 32:21, 22; 37:23, 24) Ndakisa ya Elihu ezali koteya biso ete ezali na ntango ya kofanda nyɛɛ mpo na koyoka. (Yak. 1:19) Ezali mpe koteya biso ete ntango tozali kopesa toli, tosengeli libosoliboso koluka kokumisa Yehova, kasi te biso moko.
18 Tokomonisa ete tozwaka na motuya likabo ya koloba soki tozali kolanda toli ya Biblia na oyo etali ntango mpe ndenge ya koloba. Elimo ya Nzambe etindaki Mokonzi Salomo akoma ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.” (Mas. 25:11) Soki tozali koyoka na likebi makambo oyo basusu bazali koloba mpe soki tozali kokanisa liboso ya koloba, maloba na biso ekozala lokola bapɔme ya wolo—ekozala na motuya mpe kitoko mingi. Na bongo, ezala tolobi mingi to te, maloba na biso ekolendisa basusu, mpe Yehova akosepela na biso. (Mas. 23:15; Ef. 4:29) Yango nde lolenge eleki malamu ya komonisa botɔndi mpo na likabo ya koloba, oyo Nzambe apesá biso!
Biloko ya motuya ya elimo
Kobá kopusana penepene na Yehova
10 Ndenge moko mpe, ezali mabe te koluka ete tómonana kitoko na miso ya bato. Kasi, tosengeli te kosala nyonso mpo na kolongola bilembo nyonso oyo emonisi ete tobandi konuna. Bilembo wana ekoki komonisa ete moto akɔmɛli, abongi kozwa lokumu, mpe azali na kitoko ya kati. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.” (Mas. 16:31) Lokola Yehova atalelaka biso ndenge wana, biso moko mpe tosengeli kosala makasi tómitalelaka ndenge oyo ye atalelaka biso. (Tángá 1 Petro 3:3, 4.) Na yango, tokanisi ete kosɛnga básala biso lipaso moko boye to kondima bápesa biso nkisi moko boye oyo na nsima ekoki kobimisela biso likama kaka mpo tómonana kitoko ekomonisa mpenza ete tozali na bwanya? “Esengo ya Yehova” nde esalaka ete moto azala na kitoko ya solosolo, oyo ezalaka na kati, ata soki anuni to azali kobɛla. (Neh. 8:10) Kaka na mokili ya sika nde tokozala mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ mpe tokozongela kitoko ya bolenge. (Yobo 33:25; Yis. 33:24) Kasi liboso ete tókɔta na mokili yango, kozala na bwanya mpe komonisa kondima ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova ata soki tozali kokutana na mikakatano sikoyo.—1 Tim. 4:8.
08-14/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 34-35
Ntango tozali komona makambo ya kozanga bosembo
Nzambe azali na bizaleli nini?
Nzambe asalaka kaka makambo oyo ezali sembo. Biblia elobi: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!” (Yobo 34:10) Yehova akataka makambo na bosembo, ndenge mokomi ya nzembo alobaki na ye ete: “Okosambisa bato ya bikólo na bosembo.” (Nzembo 67:4) Lokola “Yehova amonaka ndenge motema ezali,” moto akoki kokosa ye te; ayebaka likambo nyonso soki ezali solo mpe akataka kaka makambo na bosembo. (1 Samwele 16:7) Longola yango, Nzambe ayebi likambo mokomoko ya kozanga bosembo oyo ezali kosalama na mokili mpe alaki ete mosika te “bato mabe bakolongolama na mabele.”—Masese 2:22.
Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?
5 Yehova akosala nini? Sikoyo, Yehova azali kopesa bato mabe libaku ya kobongwana. (Yisaya 55:7) Atako mokili oyo ekobomama mosika te, bato mabe basambisami naino te. Kasi, nini ekokómela bato oyo baboyi kobongwana mpe baoyo bakokoba kopesa mokili oyo mabɔkɔ tii na ntango ya bolɔzi monene? Yehova alaki ete akolongola bato nyonso wana ya mabe awa na mabele. (Tángá Nzembo 37:10.) Lelo oyo, bato mingi babombaka makambo mabe oyo basalaka, mpe mbala mingi bazwaka etumbu te. (Yobo 21:7, 9) Kasi Biblia ekundweli biso ete: ‘Miso ya Nzambe ezali likoló ya banzela ya moto, mpe azali komona matambe na ye nyonso. Molili to molili makasi ezali te mpo baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bámibomba kuna.’ (Yobo 34:21, 22) Na yango, makambo nyonso ezali polele na miso ya Yehova. Azali na likoki ya komona makambo nyonso oyo bato mabe bazali kosala. Nsima ya Armagedone, tokotya likebi na esika oyo bazalaki, kasi tokomona bango te. Bakolongolama mpo na libela!—Nz. 37:12-15.
Okotika ete eloko moko epekisa yo kolanda Yesu?
19 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Lelo oyo, bato mingi baboyaka biso mpo toboyaka kokɔta na makambo ya politiki. Balingaka ete tópona mokonzi moko na ntango ya maponami. Nzokande soki toponi moto moko boye ayangela biso, yango ekomonisa ete tozali koboya Yehova. (1 Sa. 8:4-7) Bato mosusu bakanisaka ete tosengeli kotonga biteyelo ná balopitalo mpe kosalisa bato oyo bazali kokelela. Lokola totyaka makanisi na biso nyonso na mosala ya kosakola na esika ya koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo, yango esalaka ete bato báboya biso.
20 Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. (Tángá Matai 7:21-23.) Mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosala mosala oyo Yesu apesaki biso. (Mat. 28:19, 20) Tosengeli komipesa soki moke te na makambo ya politiki to mpe koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo. Tolingaka bato mpe totyelaka mikakatano na bango likebi, kasi toyebi ete lolenge eleki malamu ya kosalisa bazalani na biso ezali ya koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bango bákóma baninga ya Yehova.
Biloko ya motuya ya elimo
Tiká ete elimo na yo ya komipesa ekumisa Yehova!
3 Elenge mobali moko nkombo na ye Elihu azalaki kolanda lisolo ya Yobo ná mibali wana misato. Ntango lisolo na bango esilaki, Elihu atunaki Yobo mpo na Yehova boye: “Soki ozali mpenza na elonga, eloko nini okopesa ye, to eloko nini akozwa na lobɔkɔ na yo?” (Yobo 35:7) Elihu alingaki nde koloba mpe ete milende oyo tosalaka mpo na kosalela Nzambe ezali mpamba? Te. Yehova asembolaki Elihu te, ndenge asalaki yango mpo na mibali wana mosusu. Elihu azalaki kolobela likambo mosusu. Azalaki koloba ete ata soki tosambeli Yehova te, akozanga eloko te. Yehova akoká na nyonso. Ezali na eloko moko te oyo tokoki kosala mpo na kokómisa ye mozwi to makasi koleka. Kutu, bizaleli malamu to makoki nyonso oyo tozali na yango eutaka nde epai ya Nzambe, mpe amonaka ndenge oyo tosalelaka yango.
15-21/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 36-37
Ntina oyo okoki kondima elaka ya Nzambe ya bomoi ya seko
Tokoki mpenza koyeba Nzambe?
NDENGE NZAMBE AZALAKA SEKO NA SEKO: Biblia eteyaka ete Nzambe azali “libela na libela.” (Nzembo 90:2) Na maloba mosusu, Nzambe azali na ebandeli te, akozala mpe na nsuka te. Na makanisi ya bomoto, “motángo ya mbula na ye eyebani te.”—Yobo 36:26.
Litomba oyo okoki kozwa: Nzambe alaki ete soki oyebi ye mpenza malamu, okozwa bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Ndenge nini tokoki kotyela elaka yango motema soki Nzambe ye moko azalaka seko na seko te? Kaka “Mokonzi ya seko” nde akoki kokokisa elaka ya ndenge wana.—1 Timote 1:17.
Osepelaka na makabo kitoko ya Nzambe?
6 Lokola mabele ekabwani na moi na ntaka oyo ebongi, yango wana tozangaka mai te. Soki mabele ezalaka mwa moke pene na moi, bomoi elingaki kozala te mpo mai nyonso elingaki kokauka mpe mabele elingaki kozala mɔtɔ mpe kotikala kaka na mabanga. Soki mabele ezalaka mwa moke mosika na moi, mai elingaki kokóma libanga mpe mabele elingaki kotonda na banɛjɛ mpe na mabanga ya malili. Lokola Yehova atyá mabele na esika oyo ebongi, yango esalaka ete mai ezala ntango nyonso na mabele mpo bato ná banyama mpe biloko mosusu bázala na bomoi. Molunge ya moi ematisaka mai oyo ezali na mbu mpe na mabele likoló mpo ekóma mapata. Mbula na mbula, bakilomɛtrɛ kibe ya mai pene na 500000 emataka na likoló. Nsima ya mikolo pene na 10, mai yango ekweaka lisusu na mabele lokola mbula to nɛjɛ. Na nsima, mai yango ezongaka lisusu na mbu to na bibale mosusu, mpe emataka lisusu na likoló. Yehova asalá bongo mpo mai ezalaka ntango nyonso na mabele. Yango emonisi ete Yehova azali na bwanya mpe na nguya ya kokamwa mpenza.—Yobo 36:27, 28; Mos. 1:7.
Batelá elikya na yo ya bokristo makasi
16 Elikya na biso ya bomoi ya seko ezali likabo moko ya motuya oyo euti na Nzambe. Tozali kozela na mposa makasi bomoi malamu na mikolo ezali koya, oyo tozali na elikya ete ekokokisama mpenza. Elikya yango ezali lokola longo, oyo esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tóyikela mikakatano, minyoko, ata mpe liwa mpiko. Elikya yango ezali lokola ekɔti, oyo ebatelaka makanisi na biso mpo tókoka koboya makambo ya mabe mpe tókangama na oyo ezali malamu. Elikya na biso oyo euti na Biblia esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe mpe emonisi ete Nzambe alingaka biso mingi. Tozwaka mapamboli mingi ntango tobatelaka elikya na biso mpe tokómisaka yango makasi.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 503
Bansango
Na kala, bansango mpe makanisi na mikili oyo Biblia elobeli ezalaki kopesama epai ya bato na ndenge mingi. Mbala mingi, bansango ya ekólo to ya ekólo ya bapaya ezalaki kopesama na monɔkɔ. (2Sa 3:17, 19; Yb 37:20) Bato ya mombongo, oyo mbala mingi bazalaki kosala mobembo ná bato ebele, bazalaki kopesa bansango ya bamboka mosika epai bazalaki kotɛlɛma mpo na kozwa bilei, mai, mpe biloko mosusu na bingumba to na nzela. Lokola Palestine ezali na banzela oyo esangisi yango na Azia, Afrika, mpe Mpoto, bato ya mibembo oyo bazalaki kouta mpe kokende mosika mpenza bazalaki koleka wana. Na yango bato ya ekólo bakokaki mbala moko kozwa bansango ya makambo ya ntina ya bikólo ya bapaya. Bansango ya ekólo to ya ekólo ya bapaya, ezalaki mbala mingi kopesama na zando ya engumba.
22-28/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 38-39
Ozwaka ntango ya kotala bozalisi?
Ondimaka kozela Yehova?
7 Biblia emonisi ndenge oyo Yehova akelaki mabele. Elobi ete atyaki “bolai na yango,” apikaki “bitɛlɛmiselo na yango,” mpe atyaki “libanga na yango ya litumu.” (Yobo 38:5, 6) Azwaki kutu ntango ya kotalatala mosala na ye. (Eba. 1:10, 12) Kanisá ndenge baanzelu bazalaki komiyoka ntango bazalaki komona Yehova azali kosala eloko moko nsima ya mosusu. Na ntembe te basepelaki mpenza! Yango wana na ntango moko boye “babandaki koganga na esengo.” (Yobo 38:7) Yango eteyi biso nini? Esɛngaki bankóto ya bambula mpo Yehova asilisa kokela. Kasi ntango Yehova atalaki biloko nyonso oyo akelaki, amonaki ete ezalaki “malamu mingi.”—Eba. 1:31.
Lisekwa emonisaka bolingo, bwanya, mpe motema molai ya Nzambe
2 Yehova abandaki naino na kokela mwana na ye Yesu. Na nsima, na nzela ya Mwana yango ya liboso, “biloko mosusu nyonso ezalisamaki,” ezala mpe bamilio ya baanzelu. (Kol. 1:16) Yesu asepelaki na libaku oyo azalaki na yango ya kosala elongo na Tata na ye. (Mas. 8:30) Baanzelu mpe bazalaki na ntina ya kosepela. Bazalaki komona ndenge Yehova ná Yesu, Mosali na ye ya mayele, bazalaki kokela likoló mpe mabele. Baanzelu yango bamiyokaki ndenge nini? “Babandaki koganga na esengo” ntango mabele esalemaki, mpe na ntembe te, bakobaki kosepela mbala nyonso oyo Yehova akeli eloko moko; mingimingi ntango akelaki bato. (Yobo 38:7; Mas. 8:31) Biloko nyonso oyo Yehova akelaki, emonisaki bolingo mpe bwanya na ye.—Nz. 104:24; Rom. 1:20.
Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye
8 Ebongi mpenza tótyela Yehova motema. Yehova asalisaki Yobo mpo atyela ye motema mingi koleka. (Yobo 32:2; 40:6-8) Ntango Yehova azalaki kosolola na Yobo, alobelaki biloko mingi oyo akelá, lokola minzoto, mapata, mpe mikalikali. Yehova alobelaki mpe banyama, na ndakisa ngɔmbɛ-mobali ya zamba mpe mpunda. (Yobo 38:32-35; 39:9, 19, 20) Biloko yango nyonso emonisaka kaka te nguya ya kokamwa oyo Nzambe azali na yango, kasi mpe bolingo mpe bwanya mingi oyo azali na yango. Masolo yango esalisaki Yobo atyela Yehova motema na ye mobimba. (Yobo 42:1-6) Ndenge moko mpe, ntango toyekolaka bozalisi, yango esalisaka biso tómona ete Yehova azali na bwanya oyo ezangá nsuka, mpe azali na nguya mingi koleka biso. Akoki kosilisa mikakatano na biso nyonso mpe akosala yango. Yango ekoki kosalisa biso tókóma kotyela ye lisusu motema mingi koleka.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 122
Mopesi-mibeko
Yehova, Mopesi-mibeko. Yehova azali mpenza Mopesi-mibeko kaka moko ya solo na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ye nde moto atya mibeko oyo etambwisaka biloko ya molɔ́ngɔ́ (Yb 38:4-38; Nz 104:5-19), mpe bomoi ya banyama. (Yb 39:1-30) Lokola Yehova asalá mpe moto, moto azali na nse ya mibeko yango, mpe lokola azali ekelamu oyo azali na mayele, mayoki, makoki ya kokanisa mpe ya elimo, azali mpe na nse ya mibeko ya Nzambe oyo etali mabe ná malamu. (Ro 12:1; 1‵Ko 2:14-16) Lisusu, mibeko ya Yehova etambwisaka baanzelu, bikelamu ya elimo.—Nz 103:20; 2Pe 2:4, 11.
Mibeko oyo Yehova atyá mpo na kotambwisa biloko ya molɔ́ngɔ́ ebongwanaka te. (Yir 33:20, 21) Na molɔ́ngɔ́ mobimba, mibeko na ye ebongwanaka te mpe ebongi kotyelama motema, na bisika oyo bato ya mayele bayebi mibeko yango, bakoki koyeba ntaka oyo sanza, baplanɛti mpe minzoto esalaka longwa na esika moko tii na esika mosusu na bosikisiki mpenza. Moto oyo alandaka te mibeko ya molɔ́ngɔ́ akutanaka mbala moko na mikakatano. Ndenge moko mpe, moto oyo abongoli to aboyi kotosa mibeko ya Yehova oyo etali mabe ná malamu akozanga te kozwa etumbu. Ezali mpe bongo mpo na mibeko ya Yehova oyo etali bozalisi, atako mbala mosusu moto akozwa etumbu mbala moko te ntango abuki mibeko yango. “Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”—Ga 6:7; 1Ti 5:24.
29/01–04/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 40-42
Mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Yobo
“Nani ayebi makanisi ya Yehova?”
4 Ntango tozali komanyola misala ya Yehova, tosengeli kokeba na momeseno ya kosambisa Nzambe na kolanda mibeko ya bato. Momeseno yango nde emonisami na maloba ya Yehova oyo ezali na Nzembo 50:21 ete: “Okanisaki ete ngai nakokóma mpenza lokola yo.” Ezali ndenge moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki eleki sikoyo mbula koleka 175 ete: “Bato balingaka kosambisa Nzambe na kolanda mibeko na bango moko, mpe kokanisa ete ye mpe alandaka kaka mibeko oyo bato basengeli kolanda.”
5 Tosengeli kokeba ete ndenge oyo tomonaka Yehova elanda te mibeko mpe bamposa na biso moko. Mpo na nini ezali na ntina? Ntango tozali koyekola Makomami, tokoki komona lokola misala mosusu ya Yehova ezali sembo te, na kolanda makanisi na biso ya mokuse, ya kozanga kokoka. Bayisraele ya kala bamonaki makambo ndenge wana mpe bakanisaki mabe mpo na ndenge oyo Yehova azalaki kosalela bango makambo. Yehova ayebisaki bango boye: “Bokoloba mpenza ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te.’ Nabondeli bino, bóyoka, Ee ndako ya Yisraele. Nzela na ngai nde ezali sembo te? Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?”—Ezk. 18:25.
6 Mpo na kokima motambo ya kosambisa Yehova na kolanda mibeko na biso moko, tosengeli kondima ete ndenge na biso ya kotalela makambo ezalaka na ndelo mpe na bantango mosusu, ezalaka na libunga monene. Yobo asengelaki koyekola likambo yango. Ntango azalaki konyokwama, Yobo azangaki elikya mpe akómaki kotalela kaka makambo na ye moko. Abosanaki makambo oyo elekaki minene. Kasi, na bolingo nyonso, Yehova asalisaki ye afungola makanisi na ye. Na nzela ya mituna koleka 70 oyo atunaki Yobo, oyo Yobo akokaki koyanola ata moko te, Yehova amonisaki ete Yobo ayebaki makambo nyonso te. Yobo amikitisaki mpe abongisaki ndenge na ye ya kotalela makambo.—Tángá Yobo 42:1-6.
Tyá makanisi na yo na likambo oyo eleki ntina
12 Yehova azangaki nde boboto ndenge alobaki na Yobo makambo wana nzokande Yobo anyokwamaki mingi? Te, ata Yobo ye moko mpe akanisaki bongo te. Amonaki ntina ya toli ya Yehova mpe andimaki. Alobaki kutu ete: “Nabongoli motema na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:1-6) Liboso, elenge mobali moko na nkombo Elihu apesaki Yobo toli mpo asembola makanisi na ye. (Yobo 32:5-10) Ntango Yobo ayokaki toli wana ya bwanya oyo eutaki epai ya Yehova mpe abongolaki makanisi na ye, Yehova ayebisaki bato mosusu ete asepeli na Yobo mpo na bosembo na ye.—Yobo 42:7, 8.
“Tyelá Yehova elikya”
17 Yobo azali moko ya basaleli ya Yehova oyo bamonisaki mpiko mpe batikalaki ngwi ntango bakutanaki na komekama makasi. Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo alobeli mingi na bango, abengi bango “lipata monene boye ya batatoli.” (Ebr. 12:1) Bango nyonso bakutanaki na komekama makasi; kasi na bomoi na bango mobimba, batikalaki sembo epai ya Yehova. (Ebr. 11:36-40) Mpiko na bango mpe milende na bango ekendaki na mai? Soki moke te! Atako na bomoi na bango bamonaki te kokokisama ya bilaka ya Nzambe, bakobaki kotyela ye elikya. Lisusu, lokola bamindimisaki ete Yehova azalaki kondima bango, bandimaki mpenza ete bakomona ndenge bilaka yango ekokokisama. (Ebr. 11:4, 5) Ndakisa na bango ekoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kotyela Yehova elikya.
18 Lelo oyo, tozali kobika na mokili oyo makambo na yango ezali kobeba se kobeba. (2 Tim. 3:13) Satana azali kokoba komeka basaleli ya Nzambe. Atako mikakatano ezali kozela biso, tiká tózala na ekateli ya kosala mingi na mosala ya Yehova, mpe tóndima ete “totye elikya na biso epai ya Nzambe moko ya bomoi.” (1 Tim. 4:10) Kobosana te, mbano oyo Nzambe apesaki Yobo emonisi “ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Biso mpe tokoki kotikala sembo epai ya Yehova, mpe komindimisa ete akopesa mbano na “baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”—Tángá Baebre 11:6.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 344
Kotyola
Yobo azalaki moyengebene mpe abatelaki mpenza bosembo na ye atako atyolamaki mingi. Kasi akómaki mokemoke na makanisi mabe mpe asalaki libunga, oyo mpo na yango basembolaki ye. Elihu alobaki boye mpo na ye: “Nani azali lokola Yobo, oyo azali komɛla lityo lokola mai?” (Yb 34:7) Yobo akómaki komitungisa mingi mpo na bosembo na ye moko na esika ya komitungisa mpo na bosembo ya Nzambe, mpe akómaki na ezaleli ya komona ete azali sembo mpenza koleka Nzambe. (Yb 35:2; 36:24) Ntango amonaki kotyola makasi ya “baninga” na ye misato, Yobo amonaki ete bazalaki kotyola ye mpenza, na esika amona ete bazalaki kotyola Nzambe. Yango wana, azalaki lokola moto oyo amipesi na kotyolama mpe kosepela na yango; azalaki kozwa yango lokola azalaki komɛla mai na esengo. Na nsima Nzambe alimbolelaki Yobo ete batyoli yango (nsima ya kotalela makambo nyonso) bazalaki nde koloba lokuta mpo na Nzambe. (Yb 42:7) Ndenge moko mpe, Yehova ayebisaki mosakoli Samwele ntango Yisraele esɛngaki mokonzi ete: “Baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.” (1Sa 8:7) Lisusu Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bikólo nyonso ekoyina bino [mpo na bino moko te, kasi] mpo na nkombo na ngai.” (Mt 24:9) Kobatela maloba oyo na makanisi ekosalisa mokristo ayikela kotyolama mpiko na makanisi oyo ebongi mpe ekobongisa ye mpo na kozwa mbano mpo ayiki mpiko.—Lk 6:22, 23.
5-11/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 1-4
Zalá na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe
“Nakoningisa bikólo nyonso”
8 Ndenge nini bato bayambi nsango yango? Mingi baboyi koyoka yango. (Tángá Nzembo 2:1-3.) Bikólo ekómi kobanga. Baboyi kondima Mokonzi oyo Yehova atyá. Bamonaka te ete nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka ezali “nsango malamu.” Kutu baguvɛrnema mosusu epekisi mosala ya kosakola! Atako bakonzi mingi balobaka ete basalelaka Nzambe, balingaka te kotika bokonzi na bango. Ndenge kaka bakonzi basalaki yango na mikolo ya Yesu, lelo oyo mpe bakonzi batɛmɛlaka Moto oyo Yehova atyá mafuta mpe bayekoli na ye ya sembo.—Mis. 4:25-28.
Kobá koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani
11 Mposa ya konduka biloko ya mokili. Soki tomonaka ete mbongo to biloko oyo tozali na yango ezali na ntina mingi, ekoki kozala mpasi te tókɔta na makambo ya mokili. Nsima ya 1970, Batatoli ya Yehova mingi na Malawi basundolaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango mpo baboyaki kokɔta na lisangá moko ya politiki. Likambo ya mawa, bandeko mosusu baboyaki kotika bomoi ya malamu oyo bazalaki na yango. Ndeko mwasi moko nkombo na ye Ruth alobi boye: “Tokimaki elongo na bandeko mosusu, kasi na nsima, bakɔtaki na lisangá ya politiki mpe bazongaki na mboka na bango mpo bakokaki te bomoi ya mpasi na kaa ya bato bakimá mboka.” Kasi basaleli mingi ya Nzambe bazali ndenge wana te. Baboyaka kokɔta na makambo ya mokili, ata soki yango esɛngi ete bázala na mbongo mingi te to bábungisa biloko nyonso oyo bazalaki na yango.—Ebr. 10:34.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 261
Mposo ya blé
Mposo ya pɛpɛlɛ oyo ezipaka mbuma ya orje to ya blé. Atako Biblia esalelaka mposo ya blé na ndenge ya elilingi, emonisaka mosala ya kotutatuta mbuma oyo ezalaki kosalema na ntango ya kala. Nsima ya kobuka mbuma, mposo yango oyo bazalaki kolya te ezalaki na ntina te, na yango ezalaki mpenza elembo oyo ebongi ya eloko oyo ezali pɛpɛlɛ, ezangi ntina, mpe oyo okoki kosepela na yango te, eloko oyo basengelaki kokabola yango na oyo ezali malamu mpe kobwaka.
Ya liboso, kotutatuta mbuma ezalaki kolongola mposo mpe mbuma ezalaki kotikala. Nsima ya kopupola, mposo oyo ya pɛpɛlɛ ezalaki kokende lokola putulu na mopɛpɛ. (Talá KOPUPOLA.) Yango emonisi malamu ndenge oyo Yehova alongolaka bapɛngwi na kati ya bato na ye mpe lisusu alongolaka bato mabe mpe bikólo oyo etɛmɛlaka ye. (Yb 21:18; Nz 1:4; 35:5; Yis 17:13; 29:5; 41:15; Hos 13:3) Bokonzi ya Nzambe ekobukabuka mpenza mikemike banguna na yango na ndenge ete bakomemama na pɛtɛɛ nyonso lokola mposo ya blé.—Da 2:35.
Mbala mingi bazalaki kosangisa mposo ya mbuma ya blé oyo ezangi ntina mpe kotumba yango, mpo mopɛpɛ emema yango te mpe ebebisa te mbuma oyo bayanganisi. Ndenge moko mpe, Yoane Mobatisi asakolaki kobebisama na mɔtɔ oyo ekoyela bato mabe oyo basalaka losambo ya lokuta. Motutituti-mbuma, Yesu Kristo, akoyanganisa mbuma ya blé, “kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.”—Mt 3:7-12; Lk 3:17; talá KOTUTATUTA.
12-18/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 5-7
Tikalá sembo ata soki basusu bazali kosala makambo nini
Ndenge oyo koyekola Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na mikakatano
7 Moninga to ndeko moko ya libota asalelaki yo likambo moko oyo epesaki yo mpasi na motema? Soki ezali bongo, okoki kozwa mateya soki oyekoli makambo oyo mokonzi Davidi asalaki ntango mwana na ye Abisalome asalaki likambo moko oyo epesaki ye mpasi na motema, mpe alukaki kobɔtɔla ye bokonzi.—2 Sam. 15:5-14, 31; 18:6-14.
8 (1) Bondelá. Sikoyo lokola lisolo yango ezali na makanisi na yo, yebisá Yehova ndenge oyo ozali komiyoka mpo na makambo ya mabe oyo basalelaki yo. (Nz. 6:6-9) Yebisá ye ndenge ozali mpenza komiyoka. Na nsima, sɛngá ye asalisa yo mpo omona mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano oyo ozali kokutana na yango.
Yebá ete mateya oyo ondimaka ezali solo
3 Kondima na biso esengeli kosimbama kaka te na bolingo oyo Kristo asɛngaki bayekoli na ye bámoniselanaka. Mpo na nini? Mpo soki kondima na biso esimbami kaka na bolingo oyo bakristo bamoniselanaka, tokoki kobungisa yango. Na ndakisa, tokoki kotika kosalela Yehova soki ndeko moko na lisangá, ata mpe nkulutu to mobongisi-nzela, asali lisumu moko ya monene. Tokoki mpe kotika kosalela Yehova soki ndeko moko apesi biso nkanda to akómi mopɛngwi mpe akómi koloba ete mateya oyo tondimaka ezali lokuta. Na yango, mpo kondima na biso ezala makasi, esengeli kosimbama na boyokani malamu oyo tozalaka na yango ná Yehova. Yango eteyi biso nini? Soki ondimelaka Nzambe kaka mpo na makambo oyo bato mosusu basalaka, kasi te mpo na boyokani oyo ozali na yango ná Yehova, kondima na yo ekozala makasi te. Ndenge oyo oyokaka mpo na Yehova mpe mpo na basaleli na ye ekoki kokolisa kondima na yo. Kasi ezali mpe na ntina mingi oyekola Biblia na mozindo, okanga ntina ya makambo oyo ozali koyekola, mpe osala bolukiluki mpo omindimisa ete makambo oyo ozali koyekola mpo na Yehova ezali solo. Osengeli komindimisa ete Biblia eteyaka biso solo na ntina etali Yehova.—Rom. 12:2.
4 Yesu alobaki ete bato mosusu bakondima solo “na esengo,” kasi kondima na bango ekolɛmba ntango bakutani na mikakatano. (Tángá Matai 13:3-6, 20, 21.) Mbala mosusu bato yango bayebaki te ete baoyo bazali kolanda Yesu bakokutana na mikakatano. (Mat. 16:24) To mbala mosusu bazalaki kokanisa ete kozala mokristo elimboli kozala na bomoi oyo ezangi mikakatano, ezangi mpasi, mpe etondi kaka na mapamboli. Kasi na mokili ya lelo, mikakatano ekozanga te. Makambo ekoki kobongwana mpe yango ekoki kosilisa esengo na biso mpo na mwa ntango.—Nz. 6:6; Mos. 9:11.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 776
Nkunda
Na Baroma 3:13 ntoma Paulo azongeli maloba oyo ezali na Nzembo 5:9, akokanisi mongongo ya bato mabe mpe ya bato ya lokuta na “lilita ya polele.” Ndenge kaka lilita ya polele esengeli kotonda na bakufi mpe na kopɔla, mingongo na bango mpe efungwami mpo na maloba oyo ekufá mpe ya kopɔla.—Talá mpe Mt 15:18-20.
19-25/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 8-10
“Ee Yehova, nakosanzola yo”!
Zwá na motuya esika oyo ozali na yango na libota ya Yehova
6 Yehova abongiselá biso esika moko ya malamu mpenza. Bambula mingi liboso akela mobali ya liboso, Yehova abongisaki mabele mpo na bato. (Yobo 38:4-6; Yir. 10:12) Lokola azali na boboto mpe akabaka, apesá biso biloko mingi ya kitoko mpo tózala na esengo. (Nz. 104:14,15, 24) Na ntango moko boye, atalaki na likebi biloko oyo akelaki mpe “amonaki ete ezali malamu.” (Eba. 1:10,12, 31) Apesaki mpe bato lokumu na ndenge ayebisaki bango ‘báyangela’ biloko nyonso oyo ezali awa na mabele. (Nz. 8:6) Mokano ya Nzambe ezali ete bato ya kokoka bábatela na esengo biloko yango ya kitoko mpo na libela. Opesaka Yehova matɔndi mpo na elaka yango ya kitoko?
Osepelaka na makabo kitoko ya Nzambe?
10 Tokomonisa botɔndi mpo na likabo oyo Nzambe apesá biso ya koloba soki tozali kolimbolela bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo ntina oyo biso tondimaka ete Nzambe akelá biloko nyonso. (Nz. 9:1; 1 Pe. 3:15) Bato yango balobaka ete mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele, ebimá kaka yango moko. Soki tosaleli Biblia mpe makambo mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo, tokoki kolongisa Tata na biso ya likoló mpe kolimbola na baoyo bazali na mposa ya koyoka ntina oyo biso tondimaka mpenza ete Yehova azali Mozalisi ya likoló mpe mabele.—Nz. 102:25; Yis. 40:25, 26.
Ozali “ndakisa . . . na maloba”?
13 Yembáká na motema mobimba. Ntango toyembaka nzembo ya Bokonzi, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosanzola Yehova. Ndeko mwasi moko na nkombo Sara amonaka ete ayebi koyemba malamu te. Kutu, alingaka kosanzola Yehova na loyembo. Mpo na yango, amonaka malamu abongisa nzembo oyo bakoyemba na makita na ndako, kaka ndenge asengeli kobongisa biteni mosusu ya makita. Amekamekaka nzembo yango mpe alukaka koyeba ndenge maloba ya nzembo yango ezali na boyokani na makambo oyo bakolobela na makita. Alobi boye: “Yango esalisaka ngai natya makanisi na maloba, mpe natya likebi mingi te na likoki na ngai ya koyemba.”
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 663
Mosapi
Na ndenge ya elilingi, Nzambe asalaka mosala na “mosapi” to “misapi” na ye, na ndakisa ntango akomaki Mibeko Zomi na bitanda ya mabanga (Kob 31:18; Mib 9:10), ntango asalaki makamwisi (Kob 8:18, 19), mpe ntango asalaki likoló (Nz 8:3). Maloba “mosapi” ya Nzambe esalelami na mosala ya kozalisa mpo na kolobela elimo santu na ye, ndenge lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli emonisi yango, esika oyo elobi ete nguya ya Nzambe (rouah, “elimo”) ezalaki kotambola epai na epai likoló ya mai. (Eba 1:2) Kasi, Makomami ya Grɛki ya bokristo esalisi biso mpenza tókanga malamu ntina ya maloba oyo ya elilingi oyo Biblia esaleli, Matai alobi ete Yesu abenganaki bademo na ‘elimo santu ya Nzambe’ mpe Luka alobi ete ezalaki “mosapi ya Nzambe.”—Mt 12:28; Lk 11:20.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Salisá moyekoli na yo ya Biblia asanzola Yehova
Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
15 Ozali koyeba lisusu ndenge ozalaki kobanga mwa moke mpo na kokóma Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu ozalaki kokanisa ete okokoka te kosakola. To mpe mbala mosusu ozalaki kobanga ete baninga to bandeko na yo ya libota bátɛmɛla yo. Soki ezali bongo, osengeli komitya na esika ya moyekoli na yo. Yesu ayebaki ete bato mosusu bakoki kobanga. Kasi alendisaki bayekoli na ye bátika te ete kobanga epekisa bango kosalela Yehova. (Mat. 10:16, 17, 27, 28) Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bálongola kobanga? Mpe ndenge nini okoki kolanda ndakisa na ye?
16 Malɛmbɛmalɛmbɛ, lakisá moyekoli na yo ndenge ya koyebisa basusu makambo oyo azali koyekola. Ekoki kozala ete bayekoli ya Yesu babangaki ntango atindaki bango bákende kosakola. Kasi Yesu asalisaki bango na ndenge ayebisaki bango esika mpe nsango oyo basengelaki kosakola. (Mat. 10:5-7) Ndenge nini okoki komekola Yesu? Salisá moyekoli na yo ayeba esika oyo akoki kosakola. Na ndakisa, tuná ye soki ayebi moto moko oyo akoki kozwa matomba soki ayekoli liteya moko boye ya Biblia. Na nsima, salisá ye abongisa ndenge oyo akoki kolobela liteya yango na ndenge ya pɛtɛɛ. Soki likoki ezali, okoki komekameka ndenge ya kosala yango elongo na moyekoli na yo mpe kosalela makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Soki moto alobi na yo” mpe “Soki moto atuni yo,” oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela! Na nsima, lakisá moyekoli na yo ndenge ya kosalela Biblia mpo na kopesa biyano ya pɛtɛɛ mpe na ndenge ya mayele.
17 Salisá moyekoli na yo atyelaka Yehova motema. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Yehova akosalisa bango mpo alingaka bango. (Tángá Matai 10:19, 20, 29-31.) Yebisáká moyekoli na yo ete Yehova akosalisa mpe ye. Okoki kosalisa ye atyelaka Yehova motema soki ozali kobondela elongo na ye mpo na mikano oyo azali na yango. Francizek, oyo afandaka na Pologne alobi boye: “Ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia azalaki kolobela mbala na mbala mikano oyo nazalaki na yango na mabondeli na ye. Ntango namonaki ndenge Yehova ayanolaki na mabondeli ya ndeko yango, nabandaki mbala moko kobondela. Nazalaki komona ndenge Yehova azalaki kosalisa ngai ntango nazalaki kosɛnga nzela na mosala mpo nakende makita mpe liyangani ya etúká.”
18 Yehova atyelaka mpenza bayekoli na biso ya Biblia likebi. Ayebi milende oyo tosalaka mpo na kosalisa bato bápusana penepene na ye, mpe alingaka biso mingi mpo na yango. (Yis. 52:7) Soki ozali te na moto oyo oyekolaka na ye Biblia, okoki kaka kosalisa bayekoli ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo soki ozali kokende elongo na basakoli mosusu ntango bakei koyekola na bato Biblia.
26/02–03/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 11-15
Omimona na Mokili ya Sika ya kimya ya Nzambe
Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
11:3 (NW)—Miboko nini ebebisami? Ezali miboko oyo esimbi mokili ya bato, elingi koloba, mibeko, molɔngɔ, mpe bosembo. Soki miboko yango ebebi, mobulu ekɔtaka mpe bosembo ezalaka lisusu te. Na ntango wana, esɛngaka ete “moyengebene” atyela Nzambe motema mobimba.—Nzembo 11:4-7.
Mobulu ekosila mokolo mosusu?
Biblia elobi ete mosika te Nzambe akolongola mobulu na mabele. Mokili ya lelo oyo etondi na mobulu ezali kozela ‘mokolo oyo Nzambe akosambisa mpe akobebisa bato oyo batyolaka ye.’ (2 Petro 3:5-7) Bato bakonyokwama lisusu te mpo na mobulu. Nini ekoki kondimisa biso ete Nzambe alingi kozwa makambo na mabɔkɔ mpe kosilisa mobulu?
Biblia elobi ete Nzambe ‘ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’ (Nzembo 11:5) Nzambe oyo akelá biso alingaka kimya mpe bosembo. (Nzembo 33:5; 37:28) Yango wana akotika te ete bato ya mobulu bázala mpo na libela.
Ondimaka kozela mpe komonisa motema molai?
15 Mpo na nini Davidi andimaki kozela mpe komonisa motema molai? Apesaki eyano na Nzembo 13, esika atunaki mbala minei: “Kino ntango nini?” Alobi boye: “Natye motema na motema boboto na yo; tiká motema na ngai ezala na esengo na lobiko na yo. Nakoyembela Yehova, mpo ye apesi ngai mbano.” (Nzembo 13:5, 6) Davidi ayebaki ete Yehova alingaka ye mpe akozala ntango nyonso sembo epai na ye. Akanisaki ndenge Yehova asalisaki ye liboso, mpe azelaki ntango oyo Yehova akosilisa mikakatano na ye. Davidi ayebaki ete mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, asengelaki kozela.
Bokonzi ekokisi mokano ya Nzambe na mabele
16 Kimya. Nsukansuka, maloba ya Yisaya 11:6-9 ekokokisama malamumalamu na ndenge ya solo. Mibali, basi, mpe bana bakozala na kimya esika nyonso oyo bakokende na mabele mobimba. Ekelamu moko te, ezala moto to nyama, akonyokola basusu. Kanisá ntango oyo okobanda komona mabele mobimba lokola ndako na yo, epai okoki kobɛta mai na ebale, na laki, mpe na mbu; okoki kokatisa bangomba, mpe kotambolatambola na esobe na kimya nyonso. Mpe soki butu ekɔti, okobanga eloko te. Maloba ya Ezekiele 34:25 ekokokisama mpo basaleli ya Nzambe bákoka ‘kofanda mpenza na kimya na esobe mpe bakolala na bazamba.’
Biloko ya motuya ya elimo
Obongwaná?
12 Nzokande, lelo oyo, bato mingi na mokili bakokani na bato oyo Paulo alobelaki. Bakanisaka ete kotosa mibeko ezali makambo ya kala mpe ete moto moko te asengeli kotinda basusu bátosa mibeko. Balakisi mpe baboti mingi batikaka bana básala oyo balingi mpe balobaka ete moto na moto azali na bonsomi ya kokanisa makambo oyo alingi. Mpo na bango, moto moko te akoki mpenza koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ata bato mingi oyo balobaka ete basambelaka bamonaka ete bazali na bonsomi ya kosala oyo bango moko bakanisi ete ezali malamu; bamonaka te ete basengeli kotosa Nzambe mpe mibeko na ye. (Nz. 14:1) Makanisi ya ndenge wana ekoki kozala mpenza likama mpo na bakristo ya solo. Baoyo bazali ekɛngɛ te bakoki kokanisa ete ezali mpe bongo mpo na bibongiseli oyo ezwamaka na lisangá ya Nzambe. Bakoki kobanda koboya kolanda bibongiseli oyo ezali kozwama na lisangá to kutu koimaima mpo na likambo oyo esepelisi bango te. To bakoki kobanda kotya ntembe mpo na batoli ya Biblia oyo bapesaka biso na ntina etali kominanola, kosalela Internet, to kotánga bakelasi ya milaimilai.