Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Mai nk. 6-7
  • 27/05–02/06

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 27/05–02/06
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Mai nk. 6-7

27/05-02/06

NZEMBO 42-44

Loyembo 86 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Kobá kozwa matomba na mateya ya Nzambe

(Min. 10)

Salelá mabaku ya kosambela Yehova elongo na basusu, malamu okende na esika ya losambo soki likoki ezali (Nz 42:​4, 5; w06 1/6 lok. 9 par. 4)

Bondelá liboso ya koyekola Liloba ya Nzambe (Nz 42:8; w12 15/1 lok. 15 par. 2)

Tiká solo ya Biblia etambwisa makambo nyonso ya bomoi na yo (Nz 43:3)

Bandeko basi bazali kolanda liyangani na likebi mpe bazali kozwa banoti.

Mateya ya Nzambe epesaka biso makasi ya koyika mpiko mpe ya kokokisa elaka na biso ya kosalela ye.—1Pe 5:10; w16.09 lok. 6 par. 11-12.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 44:19—Maloba “esika oyo bambwa ya zamba efandaka” ekoki mbala mosusu komonisa nini? (it-1-F lok. 417)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 44:​1-26 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá nkolo-ndako obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 5 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 5) NDAKO NA NDAKO. Bengisá moto yango na diskur ya bato nyonso. Bólobela video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? (lmd liteya 7 pwɛ 5)

6. Diskur

(Min. 3) lmd apɛndisi A pwɛ 4—Motó ya likambo: Moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔnɔ. (th liteya 2)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 21

7. Zwá bikateli ya malamu na oyo etali mosala mpe kelasi

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bililingi: Ndeko mobali moko azali kotánga Bilbia mpe komanyola na oyo akosala nsima ya kosilisa kelasi. 1. Azali kosolola na mopesi-toli na eteyelo. 2. Akɔti Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. 3. Azali kosakola na mboka mopaya.

Elenge, ozali kokanisa kosala nini nsima ya kozwa diplome? Mbala mosusu okanisaka kosala mosala oyo ekopesa yo nzela ya kokóma mobongisi-nzela. To mbala mosusu ozali kokanisa kokoba kotánga mpo oyekola likambo moko, to mpe mpo ozwa papye to diplome oyo ekosalisa yo ozwa mosala na likambo oyo oyekoli. Oyo ezali ntango moko ya malamu na bomoi na yo! Kasi, mbala mosusu ozali komitungisa mingi mpo na likambo oyo osengeli kopona to mpe basusu bazali kotya yo mbamba mpo ozwa ekateli oyo ekosepelisa bato. Nini ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu?

Tángá Matai 6:​32, 33. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mpo na nini ezali malamu kozala na mikano ya sikisiki ya elimo na makanisi liboso ya kozwa bikateli na oyo etali mosala mpe kelasi?

  • Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango básalela Matai 6:​32, 33?—Nz 78:​4-7

Kebá ete omemama te na mposa ya bozwi to lokumu ntango ozali kozwa bikateli. (1Yn 2:​15, 17) Kobosana te ete kozala na mbongo mingi ekoki kosala ete ezala mpasi mpo moto andima nsango ya Bokonzi. (Lk 18:​24-27) Komipesa na koluka bozwi epekisaka moto akola malamu na elimo mpe aluka kosepelisa Yehova.—Mt 6:24; Mr 8:36.

Lakisá VIDEO Kotya motema te na biloko oyo esilaka!—Bozwi. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Masese 23:​4, 5 ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu?

MAKANISI

  • Omityela mikano ya elimo oyo okokokisa nsima ya ntango moke mpe mosusu nsima ya ntango molai

  • Salá nyonso mpo bikateli na yo na oyo etali kelasi mpe mosala oyo okopona eyokana na mikano na yo ya elimo

  • Luká eloko oyo ekosalisa yo mpe bongolá makambo soki esengeli. Soki ozwi ekateli ya kolanda formasyo moko to kokoba kotánga, omindimisa ete okozwa mosala na likambo oyo oyekoli

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 10 par. 5-12

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 47 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto