03-09/06
NZEMBO 45-47
Loyembo 27 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
Yesu Kristo ná mwasi na ye, bato 144 000
1. Loyembo oyo etali libala ya Mokonzi moko
(Min. 10)
Nzembo 45 elobeli libala ya Masiya Mokonzi (Nz 45:1, 13, 14; w14 15/2 nk. 9-10 par. 8-9)
Libala ya Mokonzi yango ekosalema nsima ya Armagedone (Nz 45:3, 4; w22.05 lok. 17 par. 10-12)
Bato nyonso bakozwa mapamboli mpo na libala yango (Nz 46:8-11; it-1-F lok. 1041)
OMITUNA BOYE: ‘Motema na ngai ezalaka na “esengo mingi” ya kosakola nsango malamu oyo etali Mokonzi na biso, Yesu Kristo?’—Nz 45:1.
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Nz 45:16—Vɛrsɛ yango ezali koteya biso nini mpo na bomoi na Paradiso? (w17.04 lok. 11 par. 9)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Nz 45:1-17 (th liteya 5)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. (lmd liteya 1 pwɛ 3)
5. Diskur
(Min. 5) ijwbv 26—Motó ya likambo: Nzembo 46:10 elimboli nini? (th liteya 18)
6. Kolimbola bindimeli na yo
(Min. 4) Elakiseli. ijwyp lisolo 59—Motó ya likambo: Okanisaka nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi? (lmd liteya 6 pwɛ 5)
Loyembo 131
7. Kobá komonisa bolingo na libala na yo
(Min. 10) Lisolo na bayangani.
Fɛti ya libala ezalaka ntango moko ya esengo mpenza. (Nz 45:13-15) Mbala mingi, mokolo ya libala ezalaka mokolo ya esengo koleka na bomoi ya bato oyo babalani. Kasi babalani bakoki kosala nini mpo bábatela esengo yango na boumeli ya bomoi na bango na kati ya libala?—Mos 9:9.
Komonisa bolingo ezali sekele mpo libala ezala na esengo. Babalani basengeli komekola ndakisa ya Yisaka ná Rebeka. Biblia emonisi ete nsima ya kolekisa bambula 30 na libala na bango, bazalaki kaka komoniselana bolingo. (Eb 26:8) Nini ekoki kosalisa babalani bámoniselana bolingo ndenge wana?
Lakisá VIDEO Ndenge ya kozala na libala ya esengo: Monisá ete olingaka molongani na yo. Na nsima tuná bayangani boye:
Nini ekoki kosala ete bolingo ya babalani ekóma malilimalili?
Molongani mokomoko akoki kosala nini mpo mosusu amona ete alingaka ye mpe akokisaka bamposa na ye?—Mis 20:35
8. Bamposa ya lisangá
(Min. 5)
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 10 par. 13-21