Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Juillet nk. 4-5
  • 15-21/07

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 15-21/07
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Juillet nk. 4-5

15-21/07

NZEMBO 63-65

Loyembo 108 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. “Bolingo na yo ya sembo ezali malamu koleka bomoi”

(Min. 10)

Boyokani ya malamu na Nzambe ezali na motuya koleka ata bomoi (Nz 63:3; w01 15/10 nk. 15-16 par. 17-18)

Komanyola ndenge oyo Yehova amonisaka bolingo ya sembo etindaka biso tómonisela ye botɔndi mingi (Nz 63:6; w19.12 lok. 28 par. 4; w15 15/10 lok. 22 par. 7)

Botɔndi mpo na bolingo ya sembo ya Nzambe etindaka biso tósanzola ye na esengo (Nz 63:​4, 5; w09 15/7 lok. 16 par. 6)

Bililingi: Ndeko mwasi moko azali kotánga Biblia. 1. Azali na esengo na mosala ya kosakola elongo na ndeko mosusu. 2. Azali kopesa eyano na makita.

MPO NA LOSAMBO NA KATI YA LIBOTA: Bólobela ndenge Yehova amoniselá bino bolingo ya sembo.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 64:3—Ndenge nini vɛrsɛ yango ezali kotinda biso tózala ntango nyonso na maloba ya boboto? (w07 15/11 lok. 15 par. 6)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 63:1–64:10 (th liteya 12)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. Nkolo-ndako alobaka monɔkɔ na yo te. (lmd liteya 3 pwɛ 4)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lisolo ekatani liboso kutu opesa litatoli. (lmd liteya 2 pwɛ 4)

6. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Luká koyeba makambo nini esepelisaka moto yango, mpe bóyokana mpo olandela bokoli. (lmd liteya 1 pwɛ 5)

7. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 4) Elakiseli. ijwfq 51—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazongaka lisusu mpo na kosolola na moto oyo alobaki ete “Nasepelaka na mateya na bino te”? (lmd liteya 4 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 154

8. Ndenge ya komonisa Nzambe ete tolingaka ye

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Yehova ‘atondi na bolingo ya sembo.’ (Nz 86:15) Maloba “bolingo ya sembo” emonisaka bolingo oyo esɛngaka komipesa mobimba, kotika te, kotingama mpe kokangama makasi na moto moko. Yehova amonisaka bolingo epai na bato nyonso, kasi “bolingo ya sembo” esalelamaka mpo na kolobela bolingo oyo amonisaka kaka epai ya basaleli na ye, baoyo bazali na boyokani ya malamu elongo na ye. (Nz 33:18; 63:3; Yn 3:16; Mis 14:17) Tokomonisa botɔndi mpo na bolingo ya sembo ya Yehova soki tozali komonisa ye ete tolingaka ye. Ndenge nini? Soki tozali kotosa mibeko na ye, ata mpe etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli.’—Mt 28:19; 1Yn 5:3.

Lakisá VIDEO Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na mosala ya kosakola. Na nsima tuná bayangani boye:

Ndenge nini bolingo ekotinda biso tóyebisa basusu nsango malamu ntango

    Elilingi ya video “Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na mosala ya kosakola.” Tata oyo azalaki na video alali mpɔngi na kiti nsima ya kouta mosala.
  • tolɛmbi?

  • Elilingi ya video “Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na mosala ya kosakola.” Tata moko azali na mosala ya kosakola elongo na mwana na ye, nkolo-ndako apesi tata eyano na nkanda.
  • batɛmɛli biso?

  • Elilingi ya video “Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na mosala ya kosakola.” Mama ná mwana oyo bazalaki na video bazali kosolola na moto moko na magasin.
  • tozali kosala makambo na biso ya mokolo na mokolo?

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 12 par. 14-20

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 79 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto