Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Juillet nk. 10-16
  • 05-11/08

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 05-11/08
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Juillet nk. 10-16

05-11/08

NZEMBO 70-72

Loyembo 59 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. ‘Yebisá libota oyo ekoya’ nguya ya Nzambe

(Min. 10)

Davidi amonaki ndenge Yehova abatelaki ye na bolenge (Nz 71:5; w99 1/9 lok. 13 par. 17)

Davidi amonaki ndenge Yehova asalisaki ye ntango akómaki mobange (Nz 71:9; g04 8/10 23 par. 3)

Davidi alendisaki bilenge na masolo ya makambo oyo akutanaki na yango (Nz 71:​17, 18; w14 15/1 lok. 23 par. 4-5)

Libota oyo ezalaki na lisolo ya pɔsɔ eleki “Malako oyo etali Losambo na kati ya libota.” Babengisi ndeko moko ya mobange ná mwasi na ye na losambo na kati ya libota mpe bazali koyoka na esengo ntango mibange yango bazali kolakisa bafɔtɔ mpe kobɛta masolo.

OMITUNA BOYE: ‘Ndeko nini oyo asaleli Yehova bambula mingi tokobengisa na Losambo na kati ya libota mpo tótuna ye mituna?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 72:8—Ndenge nini elaka oyo Yehova apesaki Abrahama oyo ezali na Ebandeli 15:18 ekokisamaki na boyangeli ya Salomo? (it-1 lok. 825)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 71:​1-24 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Ntango moto yango abandi kobimisa ntembe, katá lisolo na ndenge ya malamu. (lmd liteya 4 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Kobá lisolo na ndeko moko ya libota, oyo azali sikoyo koyebisa yo ntina oyo azali kobanga koyekola Biblia. (lmd liteya 8 pwɛ 4)

6. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 5) Diskur. ijwfq 49—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova basembolaka mateya na bango mosusu? (th liteya 17)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 76

7. Makanisi mpo na Losambo na kati ya libota

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bato ya libota yango bazali koyemba nzembo ya Bokonzi.
Bato ya libota yango bazali kotala emisyo ya TV JW.
Mwana moko ya mwasi azali kopesa moto eyano ntango libota ezali komekameka ndenge ya koteya bato.

Losambo na kati ya libota ezali na ntina mingi mpo bana báyekola ‘mitinda mpe makebisi ya Yehova.’ (Ef 6:4) Koyekola ezali mosala, kasi yango ekoki kosepelisa, mingimingi soki bana bayekoli kolinga mateya ya Biblia. (Yn 6:27; 1Pe 2:2) Lobelá eteni “Makanisi mpo na Losambo na kati ya libota,” oyo ekoki kosalisa baboti básalaka ete mpokwa ya Losambo na kati ya libota eteya bana mpe esepelisa bango, na nsima tuná bayangani mituna oyo:

  • Na makanisi oyo tolobeli, oyo wapi okomeka kosalela?

  • Osalelaki mayele mosusu oyo omonaki ete esalisaki libota?

MAKANISI MPO NA LOSAMBO NA KATI YA LIBOTA

BIBLIA:

  • Bóyoka audio ya botángi ya Biblia mpo na likita ya kati ya pɔsɔ, to bótánga yango na mongongo makasi moto na moto na ngala na ye. Moto mokomoko akoki kotánga maloba ya moto moko na eteni oyo bozali kotánga

  • Bongisá mituna oyo biyano na yango ezali na botángi ya Biblia ya pɔsɔ yango. Sɛngá moto mokomoko ya libota apona motuna moko mpe asalela yango bolukiluki. Na nsima, bakoki kolobela makambo oyo bayekoli

  • Bimisá motuna to lobelá likambo moko, mpe na nsima bóluka mitinda ya Biblia na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo oyo bokoki kosalela

  • Bósala elakiseli ya lisolo moko ya Biblia

  • Pɔsɔ na pɔsɔ, komá vɛrsɛ moko ya Biblia na papye, na ndakisa bavɛrsɛ oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato—Kómisá bango bayekoli, mpe na nsima bómeka kokanga vɛrsɛ yango na motó. Nsima ya bapɔsɔ, bózongela bapapye ya liboso

  • Bóyekola eteni moko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

  • Sɛngá bato ya libota bálobela na mokuse makambo oyo batángaki na masolo “Biyano na mituna ya Biblia” to “Bavɛrsɛ oyo elimboli nini?” oyo ezali na eteni MATEYA YA BIBLIA na jw.org

MAKITA:

  • Bóbongisa elongo eteni moko ya makita

  • Bóbongisa biyano mpe bómeka ndenge oyo bokoloba. Bótalela molai na yango

  • Bóyemba banzembo ya Bokonzi

  • Bótalela makambo oyo bokoki koloba mpo na kolendisa moto liboso to nsima ya makita

  • Soki moto akozala na devuare, ameka yango liboso ya libota mobimba

MOSALA YA KOSAKOLA:

  • Bómibongisa mpo na kosakola ndako na ndako

  • Bómibongisa mpo na kozongela bato

  • Bókanisa esika oyo bokoki kopesa litatoli ya libaku malamu, mpe bómeka ndenge ya kosala yango na boboto

  • Bólobela mikano ya sikisiki mpo bósakola mingi na eleko ya Ekaniseli to ntango bozwi konje na mosala to na kelasi

BAMPOSA YA LIBOTA:

  • Bósala elakiseli mpo na kopesa eyano na motuna oyo ebimi, to oyo ekoki kobima, na ndakisa mpo na ntina toboyaka kokɔta na makambo ya politiki, matumoli ya baninga, kolingana na moto, to kosangana na bafɛti ya mokili

  • Bósala elakiseli, bana bázwa esika ya baboti, baboti esika ya bana. Bana básala bolukiluki mpo na likambo yango, mpe básolola yango na baboti

MAKANISI MOSUSU:

  • Bótala emisyo moko ya TV JW

  • Bótánga lisolo moko to bótala video na jw.org, mpe bólobela yango

  • Bótalela mwa likambo oyo ezali na eteni “Bilenge” to “Bana” na kati ya esika bakomi MATEYA YA BIBLIA na jw.org

  • Bózongela banɔti oyo bozwaki na liyangani ya etúká to ya zongazonga

  • Bótala to bósala bolukiluki mpo na eloko moko oyo Nzambe akelá, mpe bólobela makambo eteyi biso mpo na Yehova

  • Na bantango mosusu, bóbengisa ndeko moko, mpe bótuna ye mituna

  • Bómityela mikano ya elimo, mpe bólobela ndenge ya kokokisa yango

  • Bósala eloko moko elongo, na ndakisa liyemi, karte, to tablo moko

Lakisá VIDEO Kobá kosala ete losambo na bino ya libota esepelisaka. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini mobali akoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisa mwasi na ye ntango bazali na bana na ndako te?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 13 par. 17-24

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 123 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto