Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
02-08/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 79-81
Monisá ete olingaka nkombo ya Yehova oyo etondi na nkembo
Lisiko—‘Libonza oyo ekoki mpenza’ oyo euti na Tata
5 Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka nkombo ya Yehova? Na etamboli na biso. Yehova asɛngaka biso tózala basantu. (Tángá 1 Petro 1:15, 16.) Yango elingi koloba ete tosengeli kosambela kaka ye mpe kotosa kaka ye na motema na biso mobimba. Ata ntango bazali konyokola biso, tosalaka nyonso tózala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo Yehova ateyaka biso. Ntango tozali kotosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso, tokumisaka nkombo na ye. (Matai 5:14-16) Tomonisaka ete mibeko na ye ezali malamu mpe ete Satana azali mokosi. Tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tosalaka mabunga. Kasi soki tosali mabunga, tobongolaka motema mpe tosalaka makasi tótika kosala makambo oyo ebebisaka lokumu ya nkombo ya Nzambe.—Nz. 79:9.
Baroma 10:13—‘Kobelela nkombo ya Nkolo’
Na Biblia, maloba ‘kobelela nkombo ya Yehova’ elimboli kaka te koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango na losambo. (Nzembo 116:12-14) Esangisi mpe kotyela Nzambe motema mpe kondima ete akosunga biso.—Nzembo 20:7; 99:6.
Nkombo ya Nzambe ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu Kristo. Maloba ya liboso na libondeli na ye ya ndakisa ezalaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama,” to ekóma mosantu. (Matai 6:9) Yesu mpe amonisaki ete tosengeli koyeba, kotosa, mpe kolinga Yehova soki tolingi kozwa bomoi ya seko.—Yoane 17:3, 6, 26.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 lok. 53
Yozefe
Nkombo ya Yozefe ezwi lokumu. Lokola Yozefe azalaki na lokumu na kati ya bana ya Yakobo, ebongaki mpenza ndenge nkombo na ye esalelamaki na bantango mosusu mpo na kolobela mabota nyonso ya Yisraele (Nz 80:1) to mabota oyo ekómaki bokonzi ya nɔrdi. (Nz 78:67; Am 5:6, 15; 6:6) Nkombo na ye mpe ezali na kati ya bisakweli ya Biblia. Na emonaneli ya Ezekiele, libula ya Yozefe ezali biteni mibale (Ezk 47:13), nkombo ya porte moko ya engumba “Yehova azali wana” ezali Yozefe (Ezk 48:32, 35), mpe na esakweli oyo etali kosangisa lisusu bato ya Yehova na bomoko, elobeli Yozefe lokola nkumu ya eteni moko ya ekólo mpe Yuda nkumu ya eteni mosusu. (Ezk 37:15-26) Esakweli ya Obadia emonisaki ete “libota ya Yozefe” mpe ekobebisama elongo na “libota ya Esau” (Ob 18), mpe esakweli ya Zekaria emonisaki ete Yehova akobikisa “bakitani ya Yozefe.” (Zek 10:6) Nkombo ya Yozefe nde ezali na kati ya mabota ya Yisraele ya elimo, kasi ya Efraime te.—Em 7:8.
Ndenge Emoniseli 7:8 etángi Yozefe emonisi ete esakweli oyo Yakobo alobaki na mbeto liboso akufa etalelaki mpe Yisraele ya elimo. Na yango, ezali na ntina tósimba ete Mabɔkɔ ya Yakobo, elingi koloba Yehova Nzambe, oyo atyaki Kristo Yesu mobateli ya mpate oyo aleki malamu, oyo apesaki bomoi na ye mpo na “bampate.” (Yoa 10:11-16) Kristo Yesu azali mpe libanga ya ntina mingi ya moboko ya ndako oyo likoló na yango tempelo ya Nzambe, elingi koloba Yisraele ya elimo ezali. (Ef 2:20-22; 1Pe 2:4-6) Mpe Mobateli ya mpate mpe Libanga yango azali elongo na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—Yoa 1:1-3; Mis 7:56; Ebr 10:12; talá mpe Eba 49:24, 25.
09-15/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 82-84
Sepelá na mabaku malamu oyo ozali na yango
Mateya oyo tokoki kozwa epai ya bandɛkɛ
Bato ya Yerusaleme bayebaki nyampeke malamu mpo ezalaki kosala zumbu na yango na baplafɔ. Bandɛkɛ yango mosusu esalaki zumbu na yango na tempelo ya Salomo. Ekoki kozala ete banyampeke oyo ezalaki kosala zumbu na yango na tempelo, ezalaki komona ete ezali esika ya kimya mpo na kobɔkɔla bana na yango malamu.
Moko ya bana ya Kora oyo azalaki kosala na tempelo pɔsɔ moko nsima ya sanza motoba mpe akomaki Nzembo 84—amonaki bazumbu yango. Azalaki na mposa ya kozala lokola bandɛkɛ yango oyo ezalaki na esika ya kofanda ya libela na ndako ya Yehova; alobaki boye: “Ee Yehova ya mampinga! Molimo na ngai ezali na mposa ya mapango ya Yehova mpe lisusu eyoki mposa na yango makasi. . . . Ata ndɛkɛ ezwi ndako, mpe nyampeke zumbu na yango, epai etye bana na yango— Etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!” (Nzembo 84:1-3) Biso ná bana na biso, tomonisaka mpe mposa wana ya kozalaka elongo na lisangá ya basaleli ya Nzambe?—Nzembo 26:8, 12.
Omityela mikano oyo ekoki na yo mpo okoba kosalela Yehova na esengo
Bobange to maladi ekoki kopekisa biso tósala mingi na mosala ya Yehova. Soki ozali na bana ya mike, ekoki kozala ete okokaka lisusu koyekola to kolanda makita na ndenge ebongi te mpo bana bazali kolya yo ntango mpe makasi na yo nyonso. Kasi, ekoki nde kozala ete ozali komona kaka mokakatano wana mpe obosani ete ezali mpe na makambo mosusu oyo okoki kosala?
Eleki lelo bankóto ya bambula, Molevi moko ayokaki mposa ya likambo moko oyo ekokaki kosalema te. Azalaki na libaku ya kosalaka na kati ya tempelo pɔsɔ mibale na mbula. Kasi, akómaki na mposa ya kofanda pene na etumbelo libela na libela. (Nz. 84:1-3) Nini esalisaki mobali yango ya sembo asepela kaka na libaku kitoko oyo azalaki na yango? Ayaki komona ete kolekisa ata mokolo moko ya mpamba na kati na mapango ya tempelo ezalaki libaku moko monene. (Nz. 84:4, 5, 10) Biso mpe, na esika tómonaka kaka makambo oyo tokoki kosala te, tosengeli nde kolukaka komona makambo oyo tokoki kosala mpe kozala na botɔndi mpo na yango.
Ozali na motuya na miso ya Yehova Nzambe na yo!
12 Soki ozali kobundana na maladi moko boye, yebá ete Yehova ayebi mpasi na yo. Sɛngá ye asalisa yo mpo obatela makanisi ya malamu. Lisusu, tángáká Biblia mpo omona maloba ya malamu oyo Yehova akomisá mpo na yo. Tyáká likebi na bavɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova azwaka basaleli na ye na motuya mingi. Soki ozali kosala bongo, okomona ete Yehova azali malamu epai ya basaleli na ye nyonso ya sembo.—Nz. 84:11.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 lok. 459
Mwana mobali oyo tata akufá
Lokola ezalaki mpasi te bato bábosana bana oyo batata bakufá mpe oyo bazangaki moto ya kobatela bango, Yehova asalelaki maloba “mwana mobali oyo tata akufá” mpo na komonisa soki Yisraele ezalaki kolanda bosembo to te. Ntango ekólo yango ezalaki na boyokani malamu na Yehova, mwana mobali oyo tata akufá azalaki kobatelama malamu. Ntango bosembo ezalaki lisusu te na ekólo, bazalaki kosundola mwana mobali oyo tata akufá, mpe yango ezalaki komonisa ete ekólo ebebi. (Nz 82:3; 94:6; Yis 1:17, 23; Yir 7:5-7; 22:3; Ezk 22:7; Zek 7:9-11; Mal 3:5) Elakeli mabe ya Yehova ezalaki likoló ya baoyo bazalaki konyokola mwana oyo tata akufá. (Mib 27:19; Yis 10:1, 2) Yehova amimonisi lokola Mosikoli (Mas 23:10, 11), Mosungi (Nz 10:14), mpe Tata (Nz 68:5) ya bana yango. Ye moko akataka likambo na bango (Mib 10:17, 18), amoniselaka bango motema mawa (Hos 14:3), asalisaka bango (Nz 146:9), mpe abatelaka bango na bomoi.—Yir 49:11.
Moko ya makambo oyo emonisaka bakristo ya solo ezali ete batyelaka basi oyo mibali bakufá to bitike likebi. Moyekoli Yakobo akomelaki bakristo ete: “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na mpasi na bango, mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.”—Yak 1:27.
16-22/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 85-87
Libondeli esalisaka biso tóyika mpiko
Ozali kongɛngisa nkembo ya Yehova?
10 Mpo tóngɛngisa nkembo ya Nzambe, tosengeli mpe ‘kotingama na mabondeli.’ (Rom. 12:12) Tosengeli kobondela Yehova asalisa biso tósalela ye na ndenge oyo akondima. Tokoki kosɛnga ye apesa biso elimo santu, akómisa kondima na biso makasi, apesa biso makasi mpo tókwea na komekama te, mpe apesa biso mayele ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Tim. 2:15; Mat. 6:13; Luka 11:13; 17:5) Se ndenge mwana atyelaka tata na ye motema, biso mpe tosengeli kotya motema epai ya Yehova, Tata na biso ya likoló. Soki tosɛngi ye asalisa biso mpo tósalela ye malamu koleka, tokoki kozala na elikya ete akosala yango. Tókanisa ata mokolo moko te ete mabondeli na biso ekotungisa ye! Kutu, na nzela ya libondeli, tósanzolaka ye, tópesaka ye matɔndi, tólukaka litambwisi na ye, mingimingi ntango tomekami, mpe tósɛngaka ye asalisa biso tósalela ye na ndenge oyo ekopesa nkombo na ye nkembo.—Nz. 86:12; Yak. 1:5-7.
Ndenge oyo Yehova ayanolaka na mabondeli na biso
17 Tángá Nzembo 86:6, 7. Mokonzi Davidi amindimisaki ete Yehova azalaki koyoka mpe koyanola na mabondeli na ye. Yo mpe okoki kozala na kondima ya bongo. Bandakisa oyo tolobeli na lisolo oyo endimisi biso ete Yehova akoki kopesa biso bwanya mpe nguya oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. Akoki kosalela bandeko na biso bakristo, ezala mpe bato oyo bakómi naino kosambela ye te mpo na kosalisa biso na lolenge moko boye.
18 Atako Yehova akoyanola ntango nyonso te na mabondeli na biso na ndenge oyo tozali kokanisa, toyebi ete akoyanola yango kaka. Akopesa biso oyo tosengeli na yango mpe kaka na ntango oyo tosengeli na yango mpenza. Na yango, kobá kobondela na kondima mpe zalá na elikya ete Yehova akotyela yo likebi mpe ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi’ na mokili ya sika oyo ezali koya.—Nz. 145:16.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 lok. 492 par. 2
Motema
Kosala likambo na “motema mobimba.” Motema ya moto esengeli kozala mobimba mpo esala malamu, kasi motema ya elilingi ekoki kokabwana. Davidi abondelaki boye: “Salisá ngai nabanga nkombo na yo na motema moko”; yango emonisi ete moto akoki kozala na motema oyo ekabwani na mayoki na ye mpe makambo oyo azali kobanga. (Nz 86:11) Moto ya ndenge wana akoki kozala “na motema ya ndambo,” elingi koloba kosambela Nzambe kaka tiká asambela. (Nz 119:113; Em 3:16) Moto akoki mpe kozala na “mitema mibale” (liloba na liloba, na motema moko mpe motema moko), koluka kosalela bankolo mibale, to koloba likambo moko nzokande azali kokanisa likambo mosusu. (1Nt 12:33; Nz 12:2, msl) Yesu amonisaki polele bokosi ya bato ya mitema mibale.—Mt 15:7, 8.
23-29/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 88-89
Boyangeli ya Yehova eleki malamu
Pesá boyangeli ya Yehova mabɔkɔ!
5 Yehova azali na lotomo ya koyangela mpo na ntina mosusu. Asalelaka bokonzi na ye na bosembo mpenza. Ayebisi biso: “Nazali Yehova, ngai Moto namonisaka motema boboto, bosembo mpe boyengebene kati na mabele; mpo nasepelaka na makambo wana.” (Yirimia 9:24) Yehova azali na mposa ya mibeko ya bato te mpo ayeba oyo ezali sembo. Ye nde akataka oyo ezali sembo to te. Mpe na kolanda bosembo na ye ya kokoka, Yehova atyelaki bato mibeko. Mokomi ya nzembo alobaki ete “Boyengebene mpe lisambisi ezali esika oyo kiti ya bokonzi na [ye] efandi mpo na libela.” Na yango, mobeko nyonso, etinda nyonso, to ekateli nyonso oyo euti epai ya Yehova ezalaka sembo. (Nzembo 89:14; 119:128) Satana alobaki ete Yehova azali Moyangeli mabe. Kasi, ye moko azali kokoka kotya bosembo na mokili te.
Pesá boyangeli ya Yehova mabɔkɔ!
10 Boyangeli ya Yehova enyokolaka te. Kutu, epesaka nde bonsomi mpe esengo na bato oyo batosaka ye. (2 Bakorinti 3:17) Davidi alobaki mpo na Yehova ete: “Lokumu mpe nkembo ezali liboso na ye, bokasi mpe esengo ezali na esika na ye.” (1 Ntango 16:7, 27) Etane, mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Esengo na bato oyo bazali koganga na esengo. Ee Yehova, na pole ya elongi na yo bazali kaka kotambola. Na nkombo na yo bazali na esengo mokolo mobimba mpe na boyengebene na yo batombwami.”—Nz. 89:15, 16.
11 Soki tozali komanyola bolamu ya Yehova mbala na mbala, tokomindimisa mpenza ete boyangeli na ye eleki malamu. Toyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki na Nzambe ete: “Mokolo moko na mapango na yo eleki mikolo nkóto epai mosusu!” (Nzembo 84:10) Lokola Yehova nde abongisá biso mpe akelá biso, ayebi malamu nini ekopesa biso esengo. Apesaka biso koleka oyo tosengeli na yango. Likambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso, ezalaka mpo na bolamu na biso. Ata soki ekosɛnga tómipimela makambo mosusu, tokozala kaka na esengo soki totosi Yehova.—Tángá Yisaya 48:17.
Zalá na kondima makasi na Bokonzi
14 Tótalela oyo Yehova alakaki Davidi, mokonzi ya Yisraele na nzela ya kondimana ya Davidi. (Tángá 2 Samwele 7:12, 16.) Yehova asalaki kondimana yango ná Davidi ntango oyo Davidi azalaki koyangela Yerusaleme, mpe alakaki ye ete Masiya akozala mokitani na ye. (Luka 1:30-33) Na yango, Yehova amonisaki lisusu polele molɔngɔ oyo ekomema tii na momboto mpe alobaki ete mokitani ya Davidi nde akozala na “lotomo oyo euti na mibeko” mpo na kiti ya Bokonzi ya Masiya. (Ezk. 21:25-27) Na nzela ya Yesu, bokonzi ya Davidi “ekozala na nsuka te.” Ya solo, “ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe kiti na ye ya bokonzi lokola moi.” (Nz. 89:34-37) Na ntembe te, boyangeli ya Masiya ekobeba soki moke te, mpe makambo oyo boyangeli yango ekosala ekoumela libela!
Biloko ya motuya ya elimo
“Yo moko kaka nde ozali sembo”
4 Na Makomami ya Liebele, liloba “bosembo” elimboli boboto oyo moto amonisaka na eloko oyo alingi tii mokano na ye mpo na eloko yango ekokokisama. Moto oyo azali sembo alingaka. Likambo ya kobenda likebi ezali ete mokomi ya nzembo abengaki sanza “motatoli ya sembo na likoló” mpamba te na butu nyonso emonanaka. (Nzembo 89:37) Awa balingi koloba ete tokoki kotyela sanza motema mpo ezangaka kobima te. Kasi sanza ekoki te kozala sembo lokola moto. Mpo na nini? Mpamba te, bosembo oyo moto amonisaka ezalaka nde elembo ya bolingo na ye, ezaleli oyo biloko ezalaka na yango te.
5 Na ndenge Makomami ezali kolobela yango, bosembo emonanaka na boninga. Komonisa bosembo elakisi ete boyokani ya malamu ezali kati na moto oyo amonisi yango mpe oyo bamoniseli ye yango. Bosembo ya ndenge wana ezalaka ntango nyonso. Ezali te lokola mbonge ya mai monene oyo ekendaka bipai nyonso mopɛpɛ ememaka yango. Kasi, bosembo, to bolingo ya sembo, eumelaka mpe ezalaka makasi; yango wana, elongaka ata mikakatano oyo eleki makasi.
30/09–06/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 90-91
Mpo ozala na bomoi molai, tyelá Yehova motema
Baluki kokómisa bomoi molai
Bato mingi ya siansi bazali koloba ete atako bankisi oyo epekisaka moto kokóma mobange noki ezali mingi, moto akoki te kokóma na bomoi molai koleka ndenge ezalaka. Ya solo, kobanda siɛklɛ ya 19, bato bakómi koumela mwa moke na bomoi. Yango ezali mpo bato bazali kotya bopɛto, bazali na bankisi oyo ezali kopekisa moto akóma na maladi mpe bankisi mosusu oyo ezali kosilisa bamaladi mingi. Bato mosusu ya siansi bandimaka ete mikolo ya mbula ya moto ekómi na esika oyo esengeli kosuka.
Esali sikoyo mbula soki 3500, Moize, mokomi moko ya Biblia akomaki: “Mikolo ya bambula na biso ezali mbula ntuku nsambo (70); mpe soki mpo na nguya mingi ekómi mbula ntuku mwambe (80). Yango etondi kaka na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi; mpo ekoleka mpenza nokinoki, mpe tozali kopumbwa mpe kokende.” (Nzembo 90:10) Atako bato basali nini mpo na kokómisa molai mikolo ya bambula na biso, mbula na biso ezali kaka ndenge Moize alobaki.
Na ngambo mosusu, banyama mosusu ekoki kozala na bomoi bankama ya bambula, mpe banzete mosusu ekoki kosala bankotó ya bambula. Soki tokokanisi mikolo ya bomoi na biso na oyo ya bikelamu mosusu ya bomoi, tokoki komituna: ‘Bomoi nyonso esuki kaka na mbula 70 to 80?’
wp19.1 lok. 5, etanda
Nkombo ya Nzambe nani?
Bato mingi bamitunaka motuna wana. Mbala mosusu yo mpe omitunaka bongo. Na maloba mosusu, motuna yango ezali boye: Soki Nzambe nde akelá mokili mpe biloko nyonso, bongo Nzambe ye moko autá wapi?
Bato mingi ya mayele balobaka ete mokili mpe biloko nyonso ezali na ebandeli. Likanisi yango eyokani na maloba ya vɛrsɛ ya liboso ya Biblia; elobi ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”—Ebandeli 1:1.
Mokili ekokaki te komikela yango moko; ekokaki mpe te kobima kaka boye. Ekoki kosalema te ete eloko te ebimisa eloko. Soki eloko moko te ezalaki liboso mokili ebanda, mokili elingaki kozala te. Mpo mokili esalema, esengelaki nguya moko oyo ezalaka seko na seko ezala liboso. Yehova Nzambe, oyo azali na nguya mpe na bwanya oyo ezali na nsuka te, mpe azali na nzoto ya mosuni te nde Mozalisi ya biloko nyonso.—Yoane 4:24.
Biblia elobi boye mpo na Nzambe: “Liboso bangomba ebotama, to obanda kobimisa mokili mpe mabele . . . libela na libela yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:2) Maloba wana elakisi ete Nzambe azali na ebandeli te. Yango wana, “na ebandeli” akelaki mokili.—Emoniseli 4:11.
Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso esalisaka biso tólongola kobanga
16 Satana ayebi ete tozwaka bomoi na biso na motuya. Kasi, alingi ete tópesa nyonso oyo tozali na yango, ata mpe boyokani oyo tozali na yango ná Yehova kaka mpo na kobatela bomoi na biso. (Yobo 2:4, 5) Satana azali moto mabe mpenza! Kasi, lokola azali “moto oyo akoki kopesa liwa,” Satana alukaka kosalela mposa wana ya kobanga liwa mpo tótika kosalela Yehova. (Ebr. 2:14, 15) Na bantango mosusu, basaleli ya Satana balukaka koboma basaleli ya Yehova soki bawangani te kondima na bango. Mpe na bantango mosusu, Satana akoki komona ete tosengeli na lisalisi ya monganga nokinoki mpe kosalela yango mpo ameka kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. Minganga to bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kotya biso mpanzi likoló mpo tóndima bázongisa biso makila, likambo oyo ekobuka mobeko ya Nzambe. To mbala mosusu moto moko akoki komeka kondimisa biso tóndima lisalisi ya monganga oyo ezali kobuka mitinda ya Biblia.
17 Atako tolingaka kokufa te, toyebi ete Yehova akokoba kolinga biso ata soki esɛngi tókufa. (Tángá Baroma 8:37-39.) Ntango baninga ya Yehova bakufaka, akobaka kobatela bango na makanisi na ye, lokola nde bazali kaka na bomoi. (Luka 20:37, 38) Azalaka mpenza na mposa makasi ya kozongisa bango na bomoi. (Yobo 14:15) Yehova asili kofuta eloko moko ya motuya mingi mpo ‘tókoka kozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16) Toyebi ndenge alingaka biso mingi mpe atyelaka biso likebi. Na yango, na esika ya kosundola Yehova ntango tozali kobɛla to tolingi tókufa, tosengeli kotyela ye motema ete akobɔndisa biso mpe akopesa biso bwanya mpe makasi. Yango nde Valérie ná mobali na ye basalaki mpenza.—Nz. 41:3.
Biloko ya motuya ya elimo
Ozalaka na anzelu moko oyo abatelaka yo?
Biblia eteyaka te ete moto mokomoko azali na anzelu oyo abatelaka ye. Ya solo, mokolo moko Yesu alobaki: “Bókeba, bótyola moko ya bana mike [bayekoli ya Kristo] oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 18:10) Yesu alingaki te koloba ete moto mokomoko azalaka na anzelu moko oyo abatelaka ye, kasi amonisaki ete baanzelu batyelaka moyekoli na ye mokomoko likebi. Na yango, basambeli ya solo basalaka makambo na bozoba te mpe batyaka bomoi na bango na likama te mpo baanzelu ya Nzambe bábatela bango.
Yango elingi nde koloba ete baanzelu basalisaka bato te? Ezali bongo te. (Nzembo 91:11) Bato mosusu bandimaka ete Nzambe asalelaki anzelu mpo na kobatela bango mpe kotambwisa bango. Kenneth, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, andimaka yango. Tokoki koboya likanisi wana mbala moko te, mpo ekoki mpe kozala solo. Mbala mingi, Batatoli ya Yehova bamonaka ete baanzelu batambwisaka bango ntango bakendaka kosakola. Kasi, lokola baanzelu bamonanaka te, tokoki koloba mpenza te ndenge oyo Nzambe asalelaka bango mpo na kosalisa moto mokomoko na makambo ndenge na ndenge. Nzokande, ezali mabe te kopesa Mozwi-ya-Nguya-Nyonso matɔndi mpo na likambo nyonso oyo asali mpo na biso.—Bakolose 3:15; Yakobo 1:17, 18.
07-13/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 92-95
Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu!
Elenge, otye makanisi na yo na mikano ya elimo?
5 Ntina ya libosoliboso ya komityela mikano ya elimo ezali mpo na komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na bolingo na ye mpe makambo nyonso oyo asalelaka biso. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi . . . mpo osepelisi ngai, Ee Yehova, mpo na mosala na yo; mpo na misala ya mabɔkɔ na yo, nazali koganga na esengo.” (Nzembo 92:1, 4) Kanisá naino nyonso oyo Yehova asaleli yo: asalisi yo oyeba ye, apesi yo bomoi, Biblia, lisangá, mpe elikya ya kofanda libela na libela na Paradiso. Soki omityeli mikano ya elimo, okomonisa Yehova ete ozali na botɔndi mpo na makambo nyonso wana, mpe yango ekokómisa yo moninga na ye.
Olandaka makanisi ya nani?
8 Lokola moboti ya malamu, Yehova alingi bana na ye bázala na bomoi ya malamu mpenza. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana, apesi biso mitinda ya ntina mingi na oyo etali bizaleli malamu mpe ndenge ya kosalela basusu makambo. Asɛngi biso tóyekola kotalela makambo lokola ye mpe tómonisa yango na etamboli na biso. Ezali te mpo na kotya biso nkaka. Epesaka biso bwanya mpe esalisaka biso tóyeba kotalela makambo malamu. (Nzembo 92:5; Masese 2:1-5; Yisaya 55:9) Tokobanda kozwa bikateli ya malamu oyo ekopesa biso esengo mpe tokozala kaka na makambo oyo tolingaka. (Nzembo 1:2, 3) Makanisi ya Yehova ezali mpenza malamu mpo na biso!
Ozali na motuya na miso ya Yehova Nzambe na yo!
18 Soki ozali kokóma mobange, yebá ete Yehova akozanga mosala ya kopesa yo te. (Nz. 92:12-15) Yesu ateyaki ete ata soki tozali na makoki mingi te to tomoni ete milende na biso ezali moke, Yehova asepelaka na nyonso oyo tokoki kosalela ye. (Luka 21:2-4) Na yango, salá kaka oyo okoki kosala. Na ndakisa, okoki koyebisa basusu makambo ya Yehova, kobondela mpo na bandeko, mpe kolendisa bango bátikala sembo. Soki Yehova amonaka ete ozali moninga na ye ya mosala, ezali te mpo na makambo oyo osalaka, kasi nde mpo na elimo na yo ya botosi.—1 Ko. 3:5-9.
Biloko ya motuya ya elimo
‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’
18 Talá ndenge ntoma Paulo amonisi ete bwanya ya Yehova eleki mpenza bwanya mosusu nyonso: “E! Bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Baloma 11:33) Ndenge Paulo abandi vɛrsɛ oyo na liloba “E!,” emonisi ete akamwe na limemya mpenza. Liloba ya Grɛki oyo asaleli mpo na “bozindo” ezali mpenza penepene na liloba oyo elimboli “lobwaku mozindo.” Na yango, maloba na ye ebimisi likambo yango polele na makanisi na biso. Yango elingi koloba ete, ntango tozali kokanisa bwanya ya Yehova, ezali lokola nde tozali kotala malamumalamu na lobwaku moko oyo nsuka to nse na yango ezali komonana te, esika moko ya mozindo mpe ya monene mpenza oyo tokoki ata moke te koyeba bonene na yango to oyo tokoki ata komeka te koyema yango ndenge ezali mpenza. (Nzembo 92:5) Wana ezali mpenza likanisi oyo ezali kotinda biso na komikitisa, boye te?
14-20/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 96-99
‘Sakolá nsango malamu’!
Nsango malamu ezali nini?
BAKRISTO basengeli kosakola “nsango malamu ya bokonzi,” koyebisa yango epai ya basusu, kolimbola ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya mokili mobimba oyo ekoyangela mabele na bosembo nyonso. Kasi, maloba “nsango malamu” esalelami mpe na lolenge mosusu na Biblia. Na ndakisa, tokutaka maloba lokola “nsango malamu ya lobiko” (Nzembo 96:2); “nsango malamu ya Nzambe” (Baroma 15:16); mpe “nsango malamu oyo etali Yesu Kristo.”—Marko 1:1.
Na mokuse, nsango malamu esangisi solo nyonso oyo Yesu alobaki mpe oyo bayekoli na ye bakomaki. Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:19, 20) Na yango, mosala ya bakristo ya solo ezali te kaka ya koyebisa bato Bokonzi; basengeli mpe kosala makasi bákómisa bango bayekoli.
Nini ekosalema na Mokolo ya Kosambisama?
Ndenge emonisami na elilingi oyo ezali awa na lobɔkɔ ya mobali, bato mingi bakanisaka ete na Mokolo ya Kosambisama, bamiliare ya bato bakotɛlɛma liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe mpo na kosambisama na kolanda makambo oyo basalaki kala—bamosusu bakozwa lifuti ya bomoi na likoló mpe basusu bakonyokwama na lifelo. Kasi, Biblia emonisi ete Mokolo ya Kosambisama ekozala nde mpo na kosikola bato na makambo ya kozanga bosembo. (Nzembo 96:13) Nzambe aponi Yesu azala Mosambisi oyo akozongisela bato bosembo.—Tángá Yisaya 11:1-5; Mis 17:31.
Kimya na boumeli ya mbula nkóto mpe mpo na libela!
18 Boyokani malamu wana ebebaki ntango Satana akosaki bato mpo bátombokela Yehova. Nzokande, kobanda 1914, Bokonzi ya Masiya ezali mokemoke kozwa bibongiseli mpo na kozongisa bomoko mpe kimya yango. (Ef. 1:9, 10) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto, makambo kitoko oyo tomoni naino te ekosalema. Na nsima “nsuka” ekoya, elingi koloba ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ekosila. Nini ekosalema na nsima? Atako azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” Yesu alukaka kobɔtɔla esika ya Yehova te. Na komikitisa nyonso “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata.” Akosalela bokonzi oyo bapesi ye “mpo na nkembo ya Nzambe.”—Mat. 28:18; Flp. 2:9-11.
19 Na ntango wana, bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela awa na mabele bakokóma bato ya kokoka. Bakolanda ndakisa ya Yesu, mpe na komikitisa nyonso, bakondima boyangeli ya Yehova. Bakomonisa ete bazali na mposa ya kosala yango na ndenge bakolonga na komekama ya nsuka. (Em. 20:7-10) Na nsima, batomboki nyonso, ezala baanzelu to bato, bakobomama mpo na libela. Ekozala mpenza ntango moko ya esengo! Na mokili mobimba, bato bakokumisa Yehova, mpe ye akozala “makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—Tángá Nzembo 99:1-3.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 lok. 425
Loyembo
Balobeli “loyembo ya sika” kaka na mokanda ya Nzembo te, kasi mpe na makomi ya Yisaya mpe ya ntoma Yoane. (Nz 33:3; 40:3; 96:1; 98:1; 144:9; 149:1; Yis 42:10; Re 5:9; 14:3) Likambo oyo bazalaki koloba na bisika mingi oyo basaleli “loyembo ya sika” emonisi ete bazalaki koyemba loyembo yango ntango likambo moko esalemi oyo emonisi ete Yehova azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Ndenge esakolamaki na esengo nyonso na Nzembo 96:10: “Yehova akómi Mokonzi.” Emonani ete makambo ya sika oyo emonisi lisusu polele bokonzi ya Yehova, mpe oyo yango ekosala na likoló mpe awa na mabele nde likambo oyo bazalaki kolobela na “loyembo ya sika.”—Nz 96:11-13; 98:9; Yis 42:10, 13.
21-27/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 100-102
Monisá botɔndi mpo na bolingo ya sembo ya Yehova
Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo
18 Bolingo na yo mpo na Yehova ezali ezaleli moko ya malamu, eloko oyo eleki malamu oyo ozali na yango. (Tángá Masese 3:3-6.) Soki ozali kolinga Yehova makasi, yango ekosalisa yo olonga mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Mbala mingi Biblia elobelaka motema boboto to bolingo ya sembo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye. Yango emonisi ete akosundola basaleli na ye te mpe akotika te kolinga bango. (Nz. 100:5) Nzambe asalá yo na elilingi na ye. (Eba. 1:26) Ndenge nini okoki komonisa bolingo ya ndenge wana?
19 Banda naino na komonisa botondi. (1 Tes. 5:18) Mokolo na mokolo, omitunaka boye: ‘Ndenge nini Yehova amoniseli ngai bolingo?’ Na nsima, salá makasi opesaka Yehova matondi na libondeli; lobeláká makambo ya sikisiki oyo asaleli yo. Monáká mpenza ndenge Yehova amoniselaka yo bolingo, kaka ndenge ntoma Paulo amonaki yango. (Tángá Bagalatia 2:20.) Omituna boye, ‘Nakosepela mpe komonisela ye bolingo?’ Kolinga Yehova ekosalisa yo okoba kotɛmɛla komekama mpe oyika mpiko na mikakatano. Ekosalisa yo otika te momeseno malamu ya makambo ya elimo, mpe okoba komonisela Tata na yo bolingo mokolo na mokolo.
“Bóbatela makanisi na bino, bókebaka!”
10 Ezali na makama mosusu oyo tosengeli koboya, na ndakisa: Kozala seresere na moto oyo azali molongani na biso te, komɛla masanga mingi, kolya na lokoso, koloba maloba mabe, ata mpe kotala bafilme ya mobulu, pornografi, mpe makambo mosusu oyo ekokani na yango. (Nz. 101:3) Monguna na biso, Zabolo, alukaka mbala na mbala mabaku mpo na kobebisa boninga na biso na Yehova. (1 Pe. 5:8) Soki tozali ekɛngɛ te, Satana akoki kolona na motema mpe na makanisi na biso ezaleli ya likunya, kozanga bosembo, lokoso, koyinana, lolendo, mpe ya kokangela basusu nkanda na motema. (Gal. 5:19-21) Na ebandeli, tokoki kokanisa ete makanisi ya ndenge wana ezali na yango mabe te. Kasi soki tozwi bibongiseli te mpo na kopikola yango mbala moko, ekokola mbangu lokola matiti mabe mpe ekobimisela biso makama.—Yak. 1:14, 15.
Okotya likebi na makebisi ya polele ya Yehova?
7 Koboya kozala elongo na bateyi ya lokuta elimboli nini? Tosololaka na bango te mpe toyambaka bango na bandako na biso te. Totángaka mpe babuku na bango te, totalaka bango na televizyo te, tokɔtaka na basite ya Internet na bango te, mpe tobakisaka te makanisi na biso na makambo oyo bakomi na Internet. Mpo na nini ekateli makasi ndenge wana? Libosoliboso mpo tolingaka “Nzambe ya solo.” Yango wana tolingaka te koyoka mateya ya lokuta oyo eyokani te na solo ya Liloba na ye. (Nz. 31:5; Yoa. 17:17) Tolingaka mpe ebongiseli oyo Yehova asalelaka mpo na koteya biso mateya kitoko ya solo, na ndakisa, nkombo ya Yehova mpe ndimbola na yango, mokano na ye mpo na mabele, ndenge moto akómaka soki akufi, mpe elikya ya lisekwa. Oyebi lisusu ndenge oyokaki mbala ya liboso oyo oyekolaki mateya yango mpe mateya mosusu? Sikoyo, mpo na nini otika moto oyo azali kofinga ebongiseli oyo eteyá yo makambo yango ya solo abebisa makanisi na yo?—Yoa. 6:66-69.
8 Ata soki bateyi ya lokuta balobi nini, tokolanda bango te! Mpo na nini tókende na mabulu wana ya mai oyo ekauká, kaka mpo tókosama mpe tólɛmba nzoto? Tózwa nde ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe na ebongiseli oyo banda kala esilisaka mposa na biso ya mai na ndenge epesaka biso mai ya pɛto mpe oyo ekitisaka motema, elingi koloba mateya ya solo oyo euti na Liloba ya Nzambe.—Yis. 55:1-3; Mat. 24:45-47.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 lok. 522
Libɛki (pélican)
Ntango ndɛkɛ babengi libɛki elye mpe etondi, mbala mingi epumbwaka mpe ekendaka na esika oyo ekoki kozala yango moko, mpe kuna ezalaka mawamawa, ekɔtisaka motó na mapeka na yango. Lokola na ntango yango eninganaka te, na mosika ekoki komonana lokola libanga moko ya mpɛmbɛ. Na bantango mosusu, ndɛkɛ yango etikalaka bongo bangonga mingi, mpe yango emonisi ete mokomi ya nzembo azalaki na mawa mpe azalaki kosala eloko te ntango alobelaki mpasi na ye na maloba oyo: “Nakokani na ndɛkɛ oyo ebengami libɛki ya esobe.” (Nz 102:6) Na vɛrsɛ yango, “esobe” elimboli kaka te mokili ekauká, kasi nde esika oyo bato bafandaka te, mbala mosusu pembeni ya mai ya moke. Tii lelo oyo na bileko mosusu, bandɛkɛ ebengami libɛki ekendaka na nɔrdi ya lobwaku ya Yordani. Mitindo misato ya ndɛkɛ babengi libɛki ezalaka na Yisraele. Libɛki ya mpɛmbɛ ya ɛsti (Pelecanus onocrotalus) nde ezalaka mingi; libɛki ya nsuki elingamá (Pelecanus crispus) mpe libɛki ya mokɔngɔ ya mwa motane (Pelecanus rufescens) oyo emonanaka mpenza mingi te.
Ndɛkɛ babengi libɛki elingaka mingi esika oyo bato bazalaka te, epai moto akotungisa yango te. Kuna nde etongaka zumbu na yango, maki na yango ebimisaka bana, mpe ekendaka kofanda nsima ya kokanga mbisi. Lokola elingaka kozala na esika na yango moko kaka, na esika oyo bato bazalaka te, Biblia esaleli ndɛkɛ yango mpo na kolobela kobebisama mpenza. Mpo na komonisa libebi ya Edome oyo esengelaki koya, Yisaya asakolaki ete libɛki ekozwa mokili yango. (Yis 34:11) Sefania asakolaki ete bandɛkɛ babengi libɛki ekofanda na kati ya mitó ya makonzí ya Ninive, oyo emonisaki ete ekobebisama mpenza mpe moto ata moko te akotikala.—Sef 2:13, 14.
28/10–03/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 103-104
Abosanaka te “ete tozali putulu”
Mekolá Yehova—Kozalaka makambo makasimakasi te
5 Komikitisa mpe boboto ya Yehova etindaka biso tózalaka makambo makasimakasi te. Na ndakisa, komikitisa ya Yehova emonanaki ntango alingaki koboma bato mabe ya Sodoma. Na nzela ya anzelu na ye, Yehova apesaki moto ya sembo Lota mitindo ete akima na etúká ya ngombangomba. Lota abangaki kokende kuna. Yango wana, Lota asɛngaki ete ye ná libota na ye bákende na Zoare, engumba moko moke oyo Yehova akanaki kobebisa yango. Yehova akokaki kotingama ete Lota alanda malako na ye mokomoko kaka ndenge ezali. Kasi, Yehova atikaki Lota akende na Zoare, mpe abebisaki engumba yango te. (Eba. 19:18-22) Mwa basiɛklɛ na nsima, Yehova ayokelaki bato ya Ninive mawa. Atindaki mosakoli Yona akende koyebisa bato mabe ya Ninive ete bango ná engumba na bango bakobebisama. Kasi, ntango bato ya Ninive babongolaki motema, Yehova ayokelaki bango mawa mpe abebisaki engumba yango te.—Yona 3:1, 10; 4:10, 11.
Tyelá Yehova motema, ndenge Samsone asalaki
16 Atako Samsone akutanaki na makambo ya mpasi mpo na libunga na ye, alukaki kaka kosala mokano ya Yehova. Ata soki osali libunga moko oyo esɛngi bápamela yo to mpe obungisa mokumba na yo, osengeli te kotika kosalela Yehova. Kobosana te ete Yehova asundolaka biso te. (Nz. 103:8-10) Atako mabunga na biso, Yehova akoki kopesa biso makasi ya kosalela ye, kaka ndenge asalaki mpo na Samsone.
17 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Michael. Amipesaki mingi na mosala ya Yehova, azalaki mosaleli na misala mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi likambo ya mawa, asalaki libunga moko oyo esalaki ete abungisa mikumba na ye na lisangá. Alobi boye: “Liboso, makambo na ngai nyonso na mosala ya Yehova ezalaki kotambola malamu. Mpe na mbala moko, nayokaki lokola natutani na efelo ya mabanga. Nakanisaki ata moke te ete Yehova akosundola ngai, kasi nazalaki komituna soki boyokani na ngai ná ye ekozonga lisusu ndenge ezalaki liboso, to soki nakokaki kosalela ye lisusu na lisangá ndenge nazalaki kosala yango.”
18 Likambo ya esengo, Michael atikaki te kosalela Yehova. Alobi lisusu boye: “Namipesaki na kobongisa boyokani na ngai ná Yehova; nazalaki mbala mingi kosopela ye motema na ngai na libondeli, nazalaki koyekola, mpe komanyola.” Na nsima, Michael azongelaki mikumba na ye na lisangá. Sikoyo azali nkulutu mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Alobi boye: “Lisalisi mpe malendisi oyo nazwaki, mingimingi epai ya bankulutu, esalisaki ngai namona ete Yehova azalaki kaka kolinga ngai. Nakoki lisusu kosalela lisangá na lisosoli ya pɛto. Likambo yango eteyaki ngai ete Yehova alimbisaka moto nyonso oyo abongoli mpenza motema.” Tózala na kondima ete ata soki tosali mabunga, Yehova akosalela biso mpe akopambola biso, soki tosali nyonso mpo na kobongisa etamboli na biso mpe tokobi kotyela ye motema.—Nz. 86:5; Mas. 28:13.
Oyo okoki kosala mpo okokisa mikano na yo ya elimo
2 Soki omityelaki mokano moko oyo okokisi naino te, tobondeli yo olɛmba nzoto te. Kokokisa ata mokano moko ya moke esɛngaka ntango mpe milende mingi. Kaka mposa oyo ozali na yango ya kokokisa mokano oyo omityeli, ezali komonisa ete ozwaka na motuya mingi boyokani na yo na Yehova mpe olingi kosala oyo okoki na mosala na ye. Yehova asepelaka na milende oyo ozali kosala. Kutu, asɛngaka biso te koleka oyo tokoki kopesa ye. (Nz. 103:14; Mika 6:8) Na yango, omityela mokano oyo okozala na likoki ya kokokisa. Okoki kosala nini mpo okokisa mokano moko oyo omityeli? Tiká tótalela mwa makanisi ya ntina.
Biloko ya motuya ya elimo
Nguya ya kokela—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”
18 Ndenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye ya kokela eteyi biso nini? Biloko ndenge na ndenge oyo Yehova akelá etindi biso tóbanga ye mpe tómemya ye mingi. Mokomi moko ya nzembo alobaki boye: ‘Misala na yo mingi boni, ee Yehova! . . . Mokili etondi maa na biloko oyo osalaki.’ (Nzembo 104:24) Maloba yango ezali mpenza solo! Tii sikoyo, bato ya mayele na bioloji bayekoli awa na mabelé mitindo koleka milio moko ya biloko oyo ezali na bomoi; kasi ezali na basusu oyo bazali kokanisa ete mitindo ya biloko oyo ezali na bomoi ekoki kozala milio 10, basusu kutu milio 30, to koleka. Ekómaka ete bato oyo basalaka misala ya ntɔki báyeba lisusu te eloko nini ya sika bakoki kosala. Nzokande, emonani polele ete likoki oyo Yehova azali na yango ya kosala mpe kokela biloko ya sika mpe ya ndenge na ndenge esukaka te.