Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Janvier nk. 5-16
  • 20-26/01

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 20-26/01
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Janvier nk. 5-16

20-26/01

NZEMBO 138-139

Loyembo 93 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Kotika te kobanga epekisa yo kopesa eyano

(Min. 10)

Tolingaka kosanzola Yehova na motema na biso mobimba (Nz 138:1)

Ntango ozali kobanga kopesa eyano na makita, sɛngá Yehova asalisa yo (Nz 138:3)

Kobanga ekoki kozala elembo ya malamu (Nz 138:6; w19.01 10 par. 10)

Ndeko mwasi moko atomboli lobɔkɔ mpo na kopesa eyano na makita.

LIKANISI: Kopesa biyano ya mikuse ekoki kokitisa kobanga na yo.—w23.04 21 par. 7.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 139:​21, 22—Esɛngisami na bakristo kolimbisa moto nyonso? (it-2 490 par. 9)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 139:​1-18 (th liteya 2)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. (lmd liteya 2 pwɛ 3)

5. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 4) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Sɛngá moto yango bóyekola Biblia mpe lakisá ye ndenge esalemaka. (lmd liteya 10 pwɛ 3)

6. Diskur

(Min. 5) ijwyp lisolo 105—Motó ya likambo: Nasala nini mpo natika kozala nsɔninsɔni? (th liteya 16)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 59

7. Okoki kozala na esengo na mosala ya Nzambe ata soki ozali moto ya nsɔninsɔni

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Omonaka ete ozali moto ya nsɔninsɔni? Mbala mingi olingaka te ete basusu báyeba ete ozali wana? Motema na yo ebɛtaka mbangumbangu ntango olingi koloba na bato? Na bantango mosusu, kozala moto ya nsɔninsɔni ekoki kopekisa biso kosala makambo oyo tozali kolinga kosala. Kasi, bato mingi oyo balongaki ezaleli ya nsɔninsɔni bakokisi mikano na bango ya elimo mpe bazali na esengo na mosala ya Nzambe. Ndakisa na bango ekoki koteya biso nini?

Lakisá VIDEO Nazali kosala nyonso atako nazali nsɔninsɔni. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Matomba nini ndeko Lee azwaki ndenge alandaki toli ya nkɔkɔ na ye ete ‘ameka kosala nyonso mpo na kosalela Yehova’?

Biblia emonisi ete mbala mosusu Moize, Yirimia, mpe Timote bazalaki kobunda na ezaleli ya nsɔninsɔni. (Kob 3:11; 4:10; Yir 1:​6-8; 1Ti 4:12) Kasi, balongaki kosala makambo minene na mosala ya Yehova mpo Yehova azalaki elongo na bango. (Kob 4:12; Yir 20:11; 2Ti 1:​6-8)

Bililingi: 1. Moize asimbi bitanda mibale oyo ezali na Mibeko Zomi. 2. Yirimia azali kobondela. 3. Timote azali kotánga rulo.

Tángá Yisaya 43:​1, 2. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Likambo nini Yehova alaki basaleli na ye?

Ndenge nini Yehova akoki kosalisa baoyo bazalaka nsɔninsɔni mpo bázala na esengo na mosala na ye lelo?

Lakisá VIDEO Batisimo ekoki komemela yo esengo mingi—Video ya mokuse. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini ndeko mwasi Jackson azalaki koyoka ete Yehova azalaki kopesa ye nguya mpe kosalisa ye na mosala ya kosakola?

  • Ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa moto oyo azalaka nsɔninsɔni?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 21 par. 8-13, etanda na lok. 169

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 151 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto