Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Janvier nk. 6-7
  • 27/01–02/02

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 27/01–02/02
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Janvier nk. 6-7

27/01–02/02

NZEMBO 140-143

Loyembo 44 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Salá na boyokani na mabondeli oyo osalaki mpo na kosɛnga lisalisi

(Min. 10)

Zalá pene ya kondima mpamela mpe toli (Nz 141:5; w22.02 12 par. 13-14)

Manyoláká misala ya kobikisa ya Yehova (Nz 143:5; w10 15/3 32 par. 4)

Lukáká kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango (Nz 143:10; w15 15/3 32 par. 2)

Ndeko mobali ya elenge azali koyekola ye moko. Bililingi: 1. Azali kobondela libándá. 2. Azali koyoka toli ya ndeko ya mokóló oyo babimi na ye mosala ya kosakola.

Nzembo 140-143 ezali kaka te na mabondeli ya Davidi ya kosɛnga lisalisi; ezali mpe na maloba oyo emonisi ete asalaki na boyokani na mabondeli na ye.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 140:3—Mpo na nini Davidi akokanisaki lolemo ya bato mabe na oyo ya nyoka? (it-2 1134)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 141:​1-10 (th liteya 12)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bandá lisolo nsima ya kosalisa moto na likambo moko. (lmd liteya 3 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Moto yango ayebisi yo ete azalaka na ntango mingi te. (lmd liteya 7 pwɛ 3)

6. Limbolá bindimeli na yo

(Min. 5) Elakiseli. ijwfq lisolo 21—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila? (th liteya 7)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 141

7. Omibongisa mpo na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga to lipaso

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Yehova alaki ete akozala “lisalisi oyo ezwamaka noki na ntango ya mpasi.” (Nz 46:1) Makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga to lipaso ekoki kotungisa biso mingi. Kasi, Yehova apesi biso nyonso oyo esengeli mpo tómibongisa mpo na makambo ya ndenge wana. Na ndakisa, ebongiseli na ye epesi karte Pas de sang (DPA), Attestation individuelle (ic),a mikanda mosusu oyo etali lisalisi ya mongangab ata mpe Komite ya boyokani na minganga (CLH). Nyonso wana esalisaka biso tótosa mibeko ya Nzambe na oyo etali makila.—Mis 15:​28, 29.

Ndeko mwasi moko azali kotondisa karte Pas de sang.

Lakisá VIDEO Omibongisi mpo na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga mbangumbangu? Nsima tuná bayangani boye:

  • Matomba nini basusu bazwaki mpo batondisaki karte DPA?

  • Matomba nini basusu bazwaki ndenge basalelaki formilɛrɛ Makambo oyo mwasi ya zemi asengeli koyeba (S-401)?

  • Mpo na nini eleki malamu kobenga mbala moko bandeko ya CLH na likambo nyonso oyo esɛngi kokɔta lopitalo, lipaso, to lisalisi mosusu ya monganga, na ndakisa mpo na kansɛr, ata soki ezali komonana lokola mbala mosusu ekosɛnga makila te?

OMIBONGISI?

  • Komá bikateli na yo na karte Pas de sang (DPA)

  • Bengá mbala moko bandeko ya CLH

  • Yebá liboso ndenge ya kolimbwela monganga ekateli na yo na oyo etali kozongisa makila, kosalela biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya biloko minei ya minene ya makila, mpe mayele mosusu oyo ekosɛnga básalela makila na yo moko.—Talá lff liteya 39

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 21 par. 14-22

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 103 mpe libondeli

a Basakoli oyo bazwá batisimo bakoki kosɛnga karte Pas de Sang (DPA) mpo na bango moko mpe attestation individuelle mpo na bana na bango ya mike epai ya ndeko oyo atalelaka mikanda.

b Makambo oyo mwasi ya zemi asengeli koyeba (S-401), Makambo oyo moto bakosala lipaso to bakopesa lisalisi ya maladi ya kansɛr (chimiothérapie) asengeli koyeba (S-407), mpe Makambo baboti basengeli koyeba wana bazali kolukela mwana na bango lisalisi ya monganga (S-55), bokoki kosɛnga yango epai ya bankulutu na bino soki esengeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto