Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Janvier nk. 8-9
  • 03-09/02

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 03-09/02
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Janvier nk. 8-9

03-09/02

NZEMBO 144-146

Loyembo 145 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”

(Min. 10)

Yehova apambolaka baoyo batyelaka ye motema (Nz 144:​11-15; w18.04 32 par. 3-4)

Tosepelaka na elikya na biso (Nz 146:5; w22.10 28 par. 16-17)

Bato oyo Yehova azali Nzambe na bango bakozala na esengo libela na libela (Nz 146:10; w18.01 26 par. 19-20)

Bililingi ya bandeko mibali mpe bandeko basi ndenge na ndenge oyo bazali na esengo.

Ntango tozali kosalela Yehova na bosembo, tokoki kozala na esengo ata soki tozali na mikakatano

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 145:​15, 16—Bavɛrsɛ yango esengeli kotinda biso tósalaka nini epai ya banyama? (it-1 125 par. 1)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 144:​1-15 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Moto yango ayebisi yo ete atángaka na iniversite. (lmd liteya 1 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bólobela video moko oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya. (lmd liteya 7 pwɛ 4)

6. Diskur

(Min. 4) lmd apɛndisi A pwɛ 7—Motó ya likambo: Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye. (th liteya 1)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 59

7. Yehova alingi ozala na esengo

(Min. 10) Lisolo na bayangani.

Yehova azali Nzambe ya esengo. (1Ti 1:11) Apesi biso makabo ebele ya kitoko oyo emonisaka ndenge alingaka biso mingi mpe alingi ete tózala na esengo. (Mos 3:​12, 13) Tótalela makabo mibale kati na yango​—bilei mpe likoki ya koyoka.

Baninga bafandi elongo pembeni ya mɔtɔ oyo bapelisi. Moko na bango azali kobɛta miziki.

Lakisá VIDEO Bozalisi emonisaka ete Yehova alingaka tósepela—Bilei ya kitoko mpe makambo oyo tosepelaka koyoka. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mpo na nini likabo ya bilei mpe likoki ya koyoka endimisi yo ete Yehova alingi ete ozala na esengo?

Tángá Nzembo 32:8. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini koyeba ete Yehova alingi ozala na esengo ezali kolendisa yo olanda litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya Biblia mpe ya ebongiseli na ye?

8. Bamposa ya lisangá

(Min. 5)

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 22 par. 1-6

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 85 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto