12-18/05
MASESE 13
Loyembo 34 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. “Mwinda ya bato mabe” ekosa yo te
(Min. 10)
Bato mabe bazali na avenire te (Mas 13:9; it-2 109 par. 4-5)
Kozala te moninga ya baoyo bamonisaka makambo ya mabe lokola ezali malamu (Mas 13:20; w12 15/7 12 par. 3)
Yehova apambolaka moto ya sembo (Mas 13:25; w04 15/7 31 par. 6)
Bomoi ya baoyo balandaka bamposa ya mokili emonanaka lokola ezali ya esengo kasi ezalaka mpenza bongo te. Kasi baoyo basalaka mokano ya Yehova bazali na esengo ya solosolo
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mas 13:24—Likebisi nini vɛrsɛ yango epesi na oyo etali komonisa bolingo oyo ebongi te? (it-1 109 par. 3)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 13:1-17 (th liteya 10)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Nsima ya kolobela likambo moko oyo ezali kosalema mikolo oyo, lakisá moto yango likambo moko na Biblia oyo ekosalisa ye mingi koleka. (lmd liteya 2 pwɛ 5)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bengisá moto yango na makita. (lmd liteya 2 pwɛ 3)
6. Diskur
(Min. 5) lmd apɛndisi A pwɛ 9—Motó ya likambo: Bana oyo bazalaka na limemya mpe na botosi epai ya baboti na bango, bakolonga na bomoi. (th liteya 16)
Loyembo 77
7. “Pole ya bato ya sembo engɛngaka makasi”
(Min. 8) Lisolo na bayangani.
Liloba ya Nzambe ezali na boyebi ná bwanya oyo eleki nyonso. Soki tozali kosalela yango na bomoi na biso, tokolonga mpe tokozala na esengo libela. Yango ezali eloko oyo mokili ekoki kopesa biso te.
Lakisá VIDEO Mokili ekoki kopesa yo te eloko oyo ezali na yango te. Na nsima tuná bayangani boye:
Ndenge nini lisolo ya ndeko mwasi Gainanshina emonisi ete “pole ya bato ya sembo” eleki “mwinda ya bato mabe”?—Mas 13:9
Kolekisa ntango na yo te na kolɔta biloko ya mokili oyo, to na koyoka mawa ndenge ozwá bikateli oyo epesi yo nzela ya kosalela Yehova. (1Yoa 2:15-17) Kasi, tyá makanisi na “motuya monene ya boyebi” oyo ozwi.—Flp 3:8.
8. Bamposa ya lisangá
(Min. 7)
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 26 par. 9-17