Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Mai nk. 6-7
  • 19-25/05

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 19-25/05
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Mai nk. 6-7

19-25/05

MASESE 14

Loyembo 89 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Kanisáká malamu liboso osala likambo na ntango ya likama

(Min. 10)

Kebá ete ondima te “liloba nyonso” oyo oyoki (Mas 14:15; w23.02 23 par. 10-12)

Kolanda kaka te mayele na yo to ndenge oyo osalaki kala (Mas 14:12)

Koyoka te baoyo baboyaka litambwisi ya ebongiseli ya Yehova (Mas 14:7)

Libota moko ezali kotala emisyo ya TV JW.

MPO NA KOMANYOLA: Bankulutu, bozali pene ya kolanda malako mpe kotyela Yehova motema ntango likama esalemi?—w24.07 5 par. 11

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mas 14:17—Na ndenge nini bakoki koyina “moto oyo atalelaka makambo malamumalamu”? (it-1 398)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mas 14:​1-21 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Moto yango ayebisi yo ete azali komitungisa mpo na makambo etali nkita, lakisá ye likambo moko oyo Biblia elobi. (lmd liteya 3 pwɛ 3)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Pesá moto zulunalo oyo elobeli likambo oyo asepelaki na yango ntango bosololaki mbala oyo eleki. (lmd liteya 9 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) Lendisá moyekoli na yo atángaka Biblia mokolo na mokolo, mpe lakisá ye ndenge akoki kokokisa mokano yango. (th liteya 19)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 126

7. Omibongisa libela mpo na likama

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Ekosalema na nkulutu moko. Soki ezali na malako oyo euti na Betele mpe na lisangani ya bankulutu, lobelá mpe yango.

Wana tozali kokoba na “mikolo ya nsuka,” toyebi ete makambo ya mabe ekobakisama. (2Tim 3:1;Mt 24:8) Na ntango ya likama, mbala mingi basaleli ya Yehova bazwaka malako oyo eyei na ntango oyo ebongi mpe oyo ekoki kobatela bomoi. Kobatelama na biso na ntango wana etaleli ndenge oyo botosi na biso ezali kotinda biso tómibongisa banda sikoyo na elimo mpe tómilɛngɛla na makambo mosusu.—Mas 14:​6, 8.

  • Omibongisa na elimo: Zalá na mimeseno malamu ya elimo. Yekolá malamu kosalela mayele ndenge na ndenge ya kosakola. Kobulungana te soki mpo na mwa ntango okabwani na bandeko mosusu ya lisangá. (Mas 14:30) Okozala ata moke te mosika na Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo.—od 176 par. 15-17

  • Omilɛngɛla na makambo mosusu: Longola basakosi ya biloko ya ntina, libota mokomoko esengeli kobomba mwa bilei, mai, bankisi, mpe biloko mosusu ya ndenge wana oyo ekosalisa soki esɛngi kotikala kaka na ndako mpo na mwa ntango.—Mas 22:3; g17.5 lok. 4

Libota yango ezali kobomba biloko oyo ekosalisa bango soki likama ebimi.

Lakisá VIDEO Omibongisi mpo na makama oyo ekoki kobima? Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso na ntango ya likama?

  • Makambo nini tokoki kosala mpo na komibongisa?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazwi likama?

OMITUNA BOYE:

‘Na oyo etali komibongisa, mateya nini nazwi na kotalela makama oyo ebimaka yango moko to oyo moto abimisi, oyo euti kosalema?’

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 26 par. 18-22, etanda na lok. 209

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 116 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto