09-15/06
MASESE 17
Loyembo 157 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
Moyisraele moko ná mwasi na ye bazali kolya limpa ya mpamba mpe bazali na kimya
1. Batelá kimya na libala na yo
(Min. 10)
Esɛngaka kosala milende mpo na kobatela kimya, kasi milende yango ebotaka mbuma malamu (Mas 17:1; talá elilingi)
Boyá kolandelaka makambo ya mikemike (Mas 17:9; g 9/14 11 par. 2)
Yebá kopekisa mayoki na yo (Mas 17:14; w08 1/5 10 par. 6–11 par. 1)
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mas 17:24—Na ndenge nini “miso ya zoba etambolatambolaka tii na bansuka ya mabele”? (it-2 432 par. 8)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 17:1-17 (th liteya 10)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. (lmd liteya 3 pwɛ 5)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 6 pwɛ 4)
6. Diskur
(Min. 5) ijwbv lisolo 60—Motó ya likambo: Masese 17:17 elimboli nini? (th liteya 13)
Loyembo 113
7. Bósalaka makambo oyo ekosala ete bósololaka malamu na libota
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Kosolola malamu nde esalaka ete libota ezala na esengo. Bato ya libota oyo basololaka polele bakokisaka mikano mosusu elongo mpe basalisanaka na ntango ya mpasi. (Mas 15:22) Makambo nini bokoki kosala mpo bósololaka polele na libota?
Bólekisaka ntango elongo. (Mib 6:6, 7) Libota oyo bato na yango basalaka makambo mosusu mpe makambo ya elimo elongo, mpe baminanolaka elongo, balinganaka makasi mpe batyelanaka motema. Bazwaka mpe mabaku malamu mpo na kosolola. Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga otya bamposa na yo pembeni mpo bósala makambo oyo bato ya libota basepeli kosala, kasi komonisa bolingo ndenge wana ekobimisa matomba mpenza! (Flp 2:3, 4) Ndenge nini bokoki kosalela malamu mpenza ntango oyo bozali kolekisa elongo?—Ef 5:15, 16.
Lakisá VIDEO Landá nzela oyo epesaka kimya na libota—Sololáká malamu. Na nsima tuná bayangani boye:
Kosalela telefone na ndenge ya mabe ekoki kosala nini na libota?
Na video yango, liteya nini mosusu ozwi na oyo etali kosolola malamu?
Yokáká na likebi. (Yak 1:19) Mbala mingi, bana babimisaka makambo oyo ezali na motema na bango soki bayebi ete baboti bakomitya na esika na bango to bakosambisa bango te. Na yango, saláká makasi osilika te soki mwana ayebisi yo likambo moko oyo etungisi yo. (Mas 17:27) Kasi, meká komitya na esika na ye. Saláká makasi okanga ntina ya makanisi mpe mayoki na ye mpo oyeba kokitisa ye motema to kosalisa ye na ndenge ekomonisa ete olingaka ye.
8. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 27 par. 19-22, etanda na lok. 212