Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Septembre nk. 14-15
  • 20-26/10

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 20-26/10
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Septembre nk. 14-15

20-26/10

MOSAKOLI 9-10

Loyembo 30 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Talelá mikakatano na yo na ndenge oyo ebongi

(Min. 10)

Toyebi ete soki tokutani na mikakatano, elakisi te ete Yehova aboyi biso (Mos 9:11; w13 15/8 14 par. 20-21)

Toyebaka ete makambo ya kozanga bosembo ekozanga te na mokili oyo ya Satana (Mos 10:7; w19.09 5 par. 10)

Tosengeli kozwa ntango ya kosepela na makabo oyo Yehova apesi biso, ata ntango tozali na mikakatano (Mos 9:​7, 10; w11 15/10 8 par. 1-2)

Mwasi moko atɛlɛmi pembeni ya mai mpe azali kotala likoló.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mos 10:​12-14—Likebisi nini bavɛrsɛ yango epesi na oyo etali kotɔnga basusu? (it “Kotɔnga, Kokosela moto makambo” par. 4, 8)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mos 10:​1-20 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Bandá lisolo na moto oyo azali na mawa. (lmd liteya 3 pwɛ 4)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lobelá likambo moko oyo ezali na eteni “Tolingaka koteya solo” na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato elongo na moto oyo ayebisi yo ete azali komitungisa mpo na nkita. (lmd liteya 4 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 17 na mokuse, bozongeli, mpe oyo okoki kosala. (lmd liteya 12 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 47

7. Ndenge ya kobatela makanisi malamu ntango likama esalemi

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Tokutanaka na komekama mpe mikakatano mokolo na mokolo. Kasi, mikakatano mosusu eyaka na mbalakaka mpe ezalaka makasi mingi na boye ete ekoki kobulunganisa biso na makanisi, na nzoto, mpe ata na elimo. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi ya malamu na ntango yango?

Ata soki tokutani na likama ya ndenge nini, tóyeba ete Yehova ‘asalaka ete tózwa libateli.’ (Yis 33:6) Mpo tótyela ye motema, tosengeli kozala na bokatikati mpe na bopɔlɔ. (Mas 11:2) Soki likama moko monene ekómeli biso, ekoki kosɛnga ete tózwa ntango mpo na kokokisa bamposa na biso moko to ya moto oyo tolingaka, mpe ya kozwa bikateli ya malamu, to ya kolela mpenza. (Mos 4:6)

Lokola Yehova asalelaka basaleli na ye mpo na kolendisa basusu, tosengeli mpe kondimaka to kosɛngaka lisalisi. Kobosanaka te ete bandeko na yo bakristo balingaka yo mingi mpenza, mpe bayokaka esengo ntango basalisi yo.

Tángá 2 Bakorinti 4:​7-9. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela mimeseno na biso ya elimo ata ntango ezali mpasi kosala bongo?

Elilingi oyo euti na video “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.” Ndeko Septer ná mwasi na ye bazali kolela liwa ya mwana na bango.

Lakisá VIDEO Yehova azali pene na baoyo motema ebukani. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Yehova asalisaki Ndeko Septer ná mwasi na ye?

  • Ndenge nini bandeko ya lisangá basalisaki bango?

  • Liteya nini mosusu ozwi na lisolo na bango?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 28, maloba ya ebandeli ya eteni 6, mpe liteya 29

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 28 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto