13-19/10
MOSAKOLI 7-8
Loyembo 39 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. “Malamu kokende na ndako oyo bazali kolela ebembe”
(Min. 10)
Zwáká ntango ya kobɔndisa baoyo bazali kolela ebembe (Mos 7:2; it “Matanga” par. 9)
Mpo na kobɔndisa bango, lobelá bizaleli malamu ya moto oyo akufi (Mos 7:1; w19.06 24 par. 15)
Bondelá elongo na bato oyo bazali kolela ebembe (w17.07 16 par. 16)
KOBOSANA TE: Mbala mingi, baoyo moto oyo balingaki akufi bazalaka na mposa bandeko na bango bakristo bákoba kosalisa bango mpo na mwa ntango nsima ya kokunda ebembe.—w17.07 16 par. 17-19.
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mos 7:20-22—Ndenge nini bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tóyeba soki tókende to te kosolola na moto oyo maloba na ye epesaki biso mpasi? (w23.03 31 par. 18)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mos 8:1-13 (th liteya 10)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Luká koyeba likambo nini ekosepelisa moto yango, mpe bóyokana mpo olandela bokoli. (lmd liteya 2 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. (lmd liteya 2 pwɛ 3)
6. Kolandela bokoli
(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. Lobelá site Internet na biso, jw.org. (lmd liteya 9 pwɛ 4)
7. Limbolá bindimeli na yo
(Min. 5) Elakiseli. ijwfq lisolo 50—Motó ya likambo: Batatoli basalaka nini mpo na kokunda ebembe? (th liteya 17)
Loyembo 151
8. Kómisá kondima makasi na elikya ya lisekwa
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Elaka oyo Yehova apesi ya kosekwisa bato ezali moko ya biloko ya motuya mingi oyo tozali na yango. Yango eteyaka biso ete Yehova azali na nguya, bwanya, motema mawa, mpe mingimingi bolingo mpo na mokomoko na biso.—Yoa 3:16.
Soki tozali na kondima makasi na elikya ya lisekwa, tokosuka kaka te na kotala mikakatano oyo tozali na yango. (2Ko 4:16-18) Elikya yango ekoki kopesa biso kimya mpe kobɔndisa biso ntango tokutani na monyoko, tobɛli, to moto oyo tolingaka akufi. (1Tes 4:13) Tokoki kozala na esengo ya solosolo te soki tozali na kondima te na elikya ya lisekwa. (1Ko 15:19) Okoki komityela mokano ya kokómisa makasi kondima na yo na elikya yango ya kitoko.
Tángá Yoane 11:21-24. Na nsima tuná bayangani boye:
Ndenge nini Marta amonisaki kondima makasi na elikya ya lisekwa?
Mbano nini azwaki mpo na kondima na ye?—Yoa 11:38-44
Lakisá VIDEO Mekolá basi ya kondima makasi!—Marta. Na nsima tuná bayangani boye:
Mpo na nini olingaka elikya ya lisekwa?
Ndenge nini okoki kobatela makasi kondima na yo na elikya ya lisekwa?
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 26-27