Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Novembre nk. 10-11
  • 08-14/12

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 08-14/12
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Novembre nk. 10-11

08-14/12

YISAYA 6-8

Loyembo 75 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yisaya azali kotala likoló mpe andimi kozala molobeli ya Nzambe.

1. “Ngai oyo! Tindá ngai!”

(Min. 10)

Kozanga kokakatana, Yisaya andimaki kozala molobeli ya Nzambe (Yis 6:8; ip-1 93-94 par. 13-14)

Mokumba ya Yisaya ezalaki ya mpasi (Yis 6:​9, 10; ip-1 95 par. 15-16)

Mosala ya Yisaya ezalaki elilingi ya mosala oyo Yesu asengelaki kosala (Mt 13:​13-15; ip-1 99 par. 23)

Yisaya azali koyebisa Bayisraele nsango ya Yehova na wenze moko. Bayisrale mosusu bazali kokipe ye te, basusu basiliki mpe bakei.

MPO NA KOMANYOLA: Ndenge nini nakoki komonisa lisusu mingi elimo ya komipesa na bolingo na ngai moko?

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yis 7:​3, 4—Mpo na nini Yehova abikisaki mokonzi mabe Ahaze? (w06 1/12 9 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yis 8:​1-13 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Teyá moto likambo moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 4 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá moto yango obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 9 pwɛ 3)

6. Kolandela bokoli

(Min. 5) NDAKO NA NDAKO. Lakisá ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. (lmd liteya 9 pwɛ 5)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 83

7. Kosakola ndako na ndako: mosala oyo toyebani na yango

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Batatoli ya Yehova bayebani ete basakolaka ndako na ndako mpo na komekola Yesu ná bakristo ya siɛklɛ ya liboso.—Lk 10:5; Mis 5:42.

Ya solo, totikaki kosakola ndako na ndako na ntango ya maladi mabe ya coronavirus. Na yango, tokobaki kopalanganisa nsango malamu kaka na kati ya masolo, kokoma mikanda, mpe na nzela ya telefone. Tozali na esengo ndenge tozwaki libaku ya komesana na mayele yango ya kosakola! Atako bongo, kosakola ndako na ndako ezali kaka mayele na biso ya libosoliboso ya kopalanganisa nsango malamu. Obimaka mosala ya kosakola ndako na ndako mbala na mbala?

Ndenge nini mosala ya kosakola ndako na ndako esalisaka biso tósala makambo oyo elandi?

  • Tókutana na bato nyonso ya teritware

  • Tókolisa makoki na biso ya koteya mpe tólona bizaleli lokola mpiko, koboya kopona bilongi, mpe komipimela

  • Tóbanda koyekola Biblia na bato

Elilingi oyo euti na video “Tosakolaka ata na mbula to mipɛpɛ makasi.” Bandeko basi mibale bazali koteya mwasi moko na porte ya ndako na ye.

Lakisá VIDEO Tosakolaka ata na mbula to mipɛpɛ makasi. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Elimo ya komipimela ya bandeko ya Îles Féroé eteyi yo nini?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 42-43

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 123 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto