Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp21 No. 2 nk. 7-9
  • Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TÓTALA MAKAMBO MIBALE OYO YESU ALOBAKI MPO NA NSUKA:
  • ELEMBO
  • “MIKOLO YA NSUKA”
  • ETIKALI MOKE MABELE EKÓMA PARADISO!
  • Biyano na mituna minei oyo etali nsuka ya mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
wp21 No. 2 nk. 7-9
Yesu azali kolimbwela bantoma na ye elembo ya mikolo ya nsuka.

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?

Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ntango Biblia elobelaka nsuka ya mokili, elingaka koloba te ete mabele ná bato nyonso bakokufa. Kasi, ezali nde nsuka ya makambo ya mabe mpe ya bato nyonso oyo bazali kosala yango. Biblia eyebisi biso ntango nini mokili mabe oyo ekosuka?

TÓTALA MAKAMBO MIBALE OYO YESU ALOBAKI MPO NA NSUKA:

“Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—MATAI 25:13.

“Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.”​—MARKO 13:33.

Yango wana, moto moko te awa na mabele ayebi mpenza ntango mokili oyo ekosuka. Kasi, Nzambe abongisá “ntango oyo etyamá,” elingi koloba, ‘mokolo mpe ngonga’ ya sikisiki, oyo nsuka ekoya. (Matai 24:36) Yango elingi nde koloba ete ezali ata na ndenge moko te ya koyeba ete nsuka ekómi pene? Ezali bongo te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bátala ebele ya makambo oyo ekolakisa ete nsuka ekómi mpenza pene.

ELEMBO

Makambo yango ezali elembo ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Yesu alobaki: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala, mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” (Matai 24:​3, 7) Alobaki mpe ete “bamaladi mabe” ekozala. (Luka 21:​11) Ozali komona makambo oyo Yesu asakolaki?

Lelo oyo, bato bazali konyokwama mpo na bitumba, nzala, mabele ezali koningana, mpe bamaladi mabe ndenge na ndenge. Na ndakisa, na mobu 2004, mabele eninganaki makasi na ebale monene oyo babengi océan indien mpe ebimisaki mbonge ya nsɔmɔ oyo babengi tsunami, mpe yango ebomaki bato soki 225 000. Na boumeli ya mbula misato, maladi ya coronavirus ebomi bato soki 6 900 000 na mokili mobimba. Yesu alobaki ete makambo lokola oyo wana ekomonisa ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene.

“MIKOLO YA NSUKA”

Biblia elobi ete “mikolo ya nsuka” ezali eleko oyo ezali liboso ya nsuka ya mokili. (2 Petro 3:3, 4) Na 2 Timote 3:1-5, Biblia emonisi ete na mikolo ya nsuka bizaleli ya bato ekobeba makasi mpenza. (Talá etanda “Liboso ya nsuka ya mokili.”) Lelo oyo, ozali komona ete bato bazali koluka kaka matomba na bango moko, bazali na lokoso, na nkanda makasi, mpe bazali na bolingo te? Yango mpe emonisi ete nsuka ya mokili ekómi mpenza pene.

Mikolo ya nsuka ekoumela ntango boni? Biblia elobi ete, ekozala kaka “ntango mokuse.” Na nsima, Nzambe akoboma “baoyo bazali kobebisa mabele.”​—Emoniseli 11:15-18; 12:12.

Bitumba

Basoda na etumba, babatami nsima ya mwa efelo moko mpe bazali kobɛta masasi.
  • Banda 2007 tii 2017, bato ebele mpenza (118%) bakufaki na bitumba mpe na mobulu to terorisme

Maladi

Moto moko na mbeto ya lopitalo.
  • Maladi oyo ebomaki bato mingi: Maladi ya motema, AVC, maladi ya mpema, mikakatano nsima ya kobotama, pulupulu, kansɛr, maladi ya ntolo

Nzala

Mwana moko ya mwasi azali na nzala mpe asimbi saani.
  • Na 2021, bato 9,8% ya mokili bazalaki na biloko ya kolya te mpe mwana soki moko kati na bana misato oyo bakómi naino na mbula mitano te bazalaki kolya malamu te mpe bakolaki malamu te

Mosala ya kosakola na mokili mobimba

Batatoli ya Yehova bazali kosakola na shario mpe kosolola na mobali moko.
  • Basakoli koleka milio 8,6 (Batatoli ya Yehova) bakabolaka mikanda na minɔkɔ koleka 1 000 na mikili 240

ETIKALI MOKE MABELE EKÓMA PARADISO!

Nzambe asilá kopona mokolo mpe ngonga oyo ye akosukisa mokili mabe oyo. (Matai 24:36) Kasi, nsango malamu ezali ete Nzambe “alingi moto ata moko te abomama.” (2 Petro 3:9) Azali kopesa moto nyonso libaku ya koyekola mokano na ye mpe kotosa ye. Mpo na nini? Mpo alingi ete tóbika ntango mokili oyo ekobomama mpe tókɔta na mokili na ye ya sika, ntango mabele ekokóma paradiso.

Nzambe atyá programɛ ya koteya bato na mokili mobimba mpo na kosalisa bango báyekola ndenge ya kokóma bato oyo bakofanda na mokili ya sika, oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosakolama na “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Matai 24:14) Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova balekisaka bamiliare ya bangonga na mosala ya kosakola mpe koteya bato nsango oyo epesaka elikya. Yesu alobaki ete mosala yango ya kosakola ekosalema na mokili mobimba liboso nsuka eya.

Ntango oyo bato basengelaki koyangela etikali moke esila. Kasi, likambo ya esengo ezali ete okoki kobika ntango mokili oyo ekosuka mpe kokɔta na Paradiso oyo Nzambe alaki. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo okoki kofanda na mokili yango ya sika.

LIBOSO YA NSUKA YA MOKILI

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.” ​—2 TIMOTE 3:1-5.

Esakweli ya Yesu oyo elobeli “mikolo ya nsuka” ezali kopesa biso elikya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto