Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp21 No. 3 lok. 15
  • Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE NINI TOKOKI KOLINGA YEHOVA MPE KOYOKA MONGONGO NA YE?
  • Yo moko nde osengeli kopona!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Okoki kokóma moninga ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • “Bato ya komikitisa bakozwa mabele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Maloba ya ebandeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
wp21 No. 3 lok. 15
Mobali moko azali na restora moko mpe azali kolakisa moninga na ye eloko moko na telefone.

Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya

Eleki sikoyo mbula soki 3 500, Yehova Nzambe ayebisaki bato oyo bazalaki kosambela ye ete bakoki kopona kozala na bomoi ya malamu. Ayebisaki bango boye: “Natye bomoi ná liwa liboso na yo, lipamboli ná elakeli mabe; mpe osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo.”​—Kolimbola Mibeko 30:19.

Mpo na kozala na bomoi ya malamu, bato yango basengelaki koyeba kopona. Lelo oyo, biso mpe tosengeli koyeba kopona. Biblia ezali kolimbola ndenge oyo tokoki kopona kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, elobi boye: “Na kolingáká Yehova Nzambe na yo, na koyokáká mongongo na ye.”​—Kolimbola Mibeko 30:20.

NDENGE NINI TOKOKI KOLINGA YEHOVA MPE KOYOKA MONGONGO NA YE?

YEKOLÁKÁ MAKAMBO OYO EZALI NA BIBLIA: Mpo na kolinga Yehova, osengeli libosoliboso koyekola makambo na ye na Biblia. Ntango ozali koyekola, okoyeba ete azali Nzambe ya bolingo oyo alingi mpenza bolamu na yo. Asɛngi yo obondelaka ye “mpo atyelaka yo likebi.” (1 Petro 5:7) Biblia epesi elaka ete soki osali makasi oyekolaka makambo ya Nzambe, ye mpe “akopusana penepene na yo.”​—Yakobo 4:8.

SALELÁKÁ MAKAMBO OYEKOLI: Koyoka Nzambe elimboli kolanda toli ya malamu mpenza oyo ezali na Biblia. Ntango ozali kotosa Nzambe, “okolongisa banzela na yo mpe na ndenge yango okosala makambo na bwanya.”​—Yosua 1:8.

Mpo na koyeba makambo mosusu, kende na site, jw.org, epai okoki kotánga Biblia mpe koyekola yango,a to okoki kosɛnga moto moko aya kotala yo mpo asalisa yo okanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia.

Ndimá toli ya Biblia sikoyo mpo ozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya!

a Boyekoli yango na nzela ya Internet ezali na minɔkɔ 7, na kati na yango minɔkɔ lokola Chinois Mandarin mpe Chinois Cantonais .

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto